Yaka, Landa Ngai
Sanza ya mibale 9–15. “Noa Azwaki Ngolu na Miso ya Nkolo”: Genese 6–11; Mose 8


Sanza ya mibale 9–15. ‘Noa Azwaki Ngolu na Miso ya Nkolo’: Genese 6–11; Mose ,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

Sanza ya mibale 9–15. ‘Noa Azwaki Ngolu na Miso ya Nkolo’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

banyama bazali kolongwa na masuwa elongo na Noa mpe libota na ye batelemi likolo ya libanga

Jehovah Keeps a Promise [Yehova Akokisaka Elaka], na Sam Lawlor

Sanza ya mibale 9–15: “Noa Azwaki Ngolu na Miso ya Nkolo”

Genese 6–11; Mose 8

Kobika na mikolo ya nsuka, tozali na ntina ya sikisiki ya kotya bokebi na lisolo ya Mpela. Ntango Yesu Klisto ateyaki lolenge nini tosengeli kokengela Boyei na Ye ya Mibale, Alobaki, “Lokola ezalaki na mikolo ya Noa, ekozala se bongo lisusu na boyei ya Mwana ya Moto” (Joseph Smith—Matai 1:41). Lisusu, maloba oyo elimboli mokolo ya Noa, lokola “mabe mpenza” mpe “etondaki na yauli,” ekoki kaka na pete kolimbola ntango na biso (Geness 6:12–13; Mose 8:28). Lisolo ya Ndako Molai ya Babele lisusu emonanaka kozala na mikolo na biso, na bolimboli na yango ya lolendo, elandami na mobulungano mpe bokabwani.

Masolo oyo ya kala ezwami kaka te mpo ete ezali kolakisa biso nkuna wana ezongaka yangomei na lisitwale mobimba. Ya motuya mingi, eteyaka biso nini kosala na oyo etali yango. Noa “azwaki ngolu na miso ya Nkolo” (Mose 8:27). Mpe libota ya Yedele mpe ndeko na ye ya mobali batalelaki Nkolo mpe babatelamaki uta na mobulungano mpe bokabwani na Babele (botala Etele 1:33–43). Soki tomituni lolenge nini kosala bokengi na bisomei mpe ya mabota na biso na ntango ya mabe mpenza mpe ya yauli, masolo oyo ezali na mikapo oyo ezali na mingi ya koteya biso.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Genese 6; Mose 8

elembo ya seminele
Ezali na bokengi ya molimo kati na kolandaka profeta ya Nkolo.

Bozali komona eloko moko kati na bolimboli ya mikolo ya Noa oyo emonani lokola ekokani na bizalela kati na mikolo na biso? Mingimingi, boluka kati na Mose 8:15–24, 28. Makambo nini bomoni ezongelami?

Bokokani moko ya motuya bokomona ezali ete Nzambe abiangaki Noa azala profeta, mpe abiangi profeta lisusu lelo. Bokanisa kosala molongo ya bosolo boyekoli etali Nkolo uta na Mose 8:13–30. Lolenge nini profeta na biso na bomoi azali lokola Noa? Solo, profeta ya Nkolo lelo azali te kokebisa biso na Mpela to kobengisa biso tosalisa na kotonga masuwa. Kasi azali kokebisa biso na likambo nini? Mpe azali kobengisa biso tosala nini? Mpo na kosalisa koyanola mituna oyo, bokoki kozongela mokapo moko ya Teachings of Presidents of the Church [Mateya ya Bakambi ya Eklezia] na Biblioteke ya Nsango Malamu, mingimingi eteni ya “Invitations and Promised Blessings [Mabengisi mpe Mapamboli Elakama]”. Ntango mosusu bokoki kopona likebisi moko mpe libengisi moko oyo ezali komonana lokola mingimingi motuya mpo na bino.

Mpaka Allen D. Haynie ateyaki, “Tata na biso na Lola abonga nie mpe ya bolingo aponi ndakisa ya bosolo emonisama mpo na bana na Ye na nzela ya profeta” (“A Living Prophet for the Latter Days [Profeta Moko na Bomoi mpo na Mikoloya Nsuka],” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 25). Bokanisa koyekola nsango ya Mpaka Haynie, kolukaka bantina ya kozala na profeta ezali elembo moko ya bolingo ya tata na Lola. Lolenge nini kolandaka profeta ya Nkolo esalisaki bino boyoka bokengi ya kobika na mikolo ya nsuka?

Botala lisusu Topics and Questions, “Baprofeta,” Biblioteke ya Nsango Malamu; “Forgiveness: My Burden Was Made Light [Bolimbisi: Mokumba na Ngai Ekomisaamaki Pepele]” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.

1:37

Why Do We Have Prophets?

Genese 6:5–13

Mpela ezalaki ekela ya ngolu ya Nzambe.

Bato misusu bamitunaka oyo etali boyengebene ya Nzambe na kotindaka Mpela mpo na “kolongola moto” (Genese 6:7). Mpaka Neal A. Maxwell alimbolaki ete na ntango ya Mpela, “mabe ekomaki na esika ya kolongola makoki ya kosala ete milimo ekokaki te, na boyengebene, kotindama awa” (We Will Prove Them Herewith [Tokomeka Bango Kuna] [1982], 58). Bokoki lisusu kokanisa lolenge nini Mpela ezalaki ekela ya ngolu. Bozwi nini na Genese 6:5–13 oyo elakisi ngolu ya boboto mpe bolingo ya Nkolo mpo na bato?

Genese 9:8–17

Bilembo to bililingi esalisaka ngai namikundola mayokani na ngai na Nkolo.

Engebene na Genese 9:8–17, monama ekoki komema nini na molimo na bino? Nini Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 9:21–25 (na bobakisi ya Biblia) ebakisi na bososoli na bino? Bokoki lisusu kokanisa kosala molongo ya makambo misusu (lokola bililingi, biloko, to eloko kani mosusu) oyo Nzambe apesi bino mpo na kokundolisa bino mayokani na bino. Makambo oyo eteyi bino nini? Lolenge nini ezali kosalisa bino bomikundola?

Botala lisusu Gerrit W. Gong, “Always Remember Him [Bomikundola Ye Ntango Nyonso],” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 108–11; “Reverently and Meekly Now,” Hymns, no. 185.

Linongi na bato komataka yango na nsinga mpe bibuteli

Ndako Molai ya Babele, na Grant Romney Clawson

Genese 11:1–9

Kolanda Yesu Klisto ezali nzela se moko ememaka epayi ya Tata na Lola.

Lisolo ya bato ya Babele kotongaka linongi epesaka bokeseni kitoko na lisolo ya Enoka mpe bato na ye kotongaka Siona, oyo boyekolaki poso eleki. Bituluku nyonso mibale bazalaki komeka kokoma na lola kasi na ndenge ekeseni. Lolenge nini bato ya Siona bazwaki lola? (botala Mose 7:18–19, 53, 62–63, 69). Boyekoli nini uta na Genese 11:1–9 mpe Elamani 6:26–28 etali bato ya Babele? Nini yango eteyi bino etali makasi na biso moko mpo na kozonga liboso ya Nzambe? Nzambe apesaki nini mpo na kosalisa biso “tokoma na lola”? (Genese 11:4; botala lisusu Yoane 3:16).

Boyekola na molende. Koyekola ekoki kosenga mingi koleka kaka kotanga to koyoka. Ndakisa, ntango bozali koyekola oyo etali Ndako Molai ya Babele, bino mpe libota to kelasi na bino bokoki kokoma, na biteni ya papie, makambo oyo ememaka biso mosika na Nzambe. Nsima, na biteni misusu ya papie, bokoki kokoma makambo oyo ememaka biso pene koleka na Nzambe. Bobongisa liboke ya bapapie na lolenge ya linongi mpe liboke ya mibale na lolenge ya tempelo.

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Genese 6:14–22; 7–8; Mose 8:16–24

Kolandaka profeta ya Nkolo ekopambola ngai mpe libota na ngai.

  • Bana mingi balingaka lisolo ya Noa mpe masuwa. Bokanisa kopesa bana na bino mabaku ya kokabola maye bayebi etali yango. Mpo na kosalisa bango, bokoki kosalela bafoto oyo ezali na mateya oyo, “Noa mpe Libota na Ye” na Masolo ya Kondimana na Kala (22–25), mpe molongo ya misato ya “Follow the Prophet” (Children’s Songbook, 110–11). Bana na bino bakoki kosepela kosala lisano ya biteni ya lisolo yango—ndakisa, na kosalaka lokola kosalela esalelo moko mpo na kotonga masuwa to kotambolaka lokola banyama ezali kokota na masuwa.

  • Ntango bozali kosolola elongo etali Noa, bosalisa bana na biso bamona lolenge nini topambolami na kozala na profeta ya Nzambe lelo. Bosalisa bana na bino baluka Mose 8:16–24 mpo na kozwa makambo baprofeta ya Nkolo bazali kokoba koteya lelo. Lolenge nini topambolami ntango tozali kotosa mateya oyo?

Genese 9:15–16

Nzambe akokokisa bilaka na Ye epayi na ngai.

  • Bana na bino bakoki kosepela koyemaka to kopakolaka langi na monama ntango bozali kosolola etali maye yango ezali kotalisa (botala Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 9:21–25 [na bobakisi ya Biblia]). Nzambe alingaki Noa mpe libota na ye bakanisa nini ntango nyonso bazalaki komona monama?

  • Bokoki lisusu kolakisa bana na bino eloko moko bozali na yango oyo ezali kokundolisa bino eloko moko ya motuya na bomoi na bino, lokola lopete ya libala, foto, to zulunale. Botika bana na bino bakabola bandakisa na bango moko. Oyo ekoki kokamba bango na lisolo etali makambo oyo esalisaka biso tomikundola mayokani na biso, lokola elambo, oyo esalisaka biso tomikundola mayokani na biso ya libatisi mpo na kolanda Yesu Klisto (botala Malongi mpe Mayokani 20:75–79).

Minama mibale

Nzambe ayebisaki libota ya Noa ete monama ekozala “elembo ya boyokani oyo natie kati na ngai mpe bino” (Genese 9:12).

Genese 11:1–9

Kolanda Yesu Klisto ezali nzela se moko ememaka na lola.

  • Ekoki kozala nsai mpo na kotonga linongi na biliki to biloko misusu elongo na bana. Ntango bozali kosala bongo, bolimbola ete bato ya Babele bakanisaki bakokaki kokoma na lola na kotongaka ndako molai. Bokoki nsima koluka elongo foto ya Mobikisi mpe kotuna bana na bino lolenge nini Asalisaka biso tokota na lola. Nsima bokoki kosolola na moko na mosusu etali makambo bokoki kosala mpo na kolanda Mobikisi.

  • Longola kotangaka lisolo ya ndako molai ya Babele na Genese 11:1–9, bino mpe bana na bino bokoki kotanga Elamani 6:28. Engebene na molongo oyo, mpo na nini bato ya Babele batongaki ndako molai? Mpo na nini kotongaka ndako molai oyo ezalaki lolenge ya mabe ya kokoma lola? Nsima bokoki koluka na 2 Nefi 31:20–21 mpe Elamani 3:28 mpo na kozwa lolenge ya malamu ya kokoma na lola. Toli nini tokolinga kopesa bato ya Babele?

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Masuwa ya Noa

Noah’s Ark [Masuwa ya Noa], na Adam Klint Day. adamdayart.com

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Kolanda profeta ekopambola ngai mpe libota na ngai