Yaka, Landa Ngai
Sanza ya yambo 26–Sanza ya mibale 1. “Boteya Makambo oyo na Bonsomi Nyonso epayi ya Bana na Bino”: Genese 5; Mose 6


Sanza ya yambo 26–Sanza ya mibale 1. ‘Boteya Makambo oyo na Bonsomi Nyonso epayi ya Bana na Bino’: Genese 4; Mose 5, ” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

Sanza ya yambo 26–Sanza ya mibale 1. ‘Boteya Makambo oyo na Bonsomi Nyonso epayi ya Bana na Bino’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

Adama mpe Eva

Better Than Paradise [Malamu Mingi Koleka Paradizo], na Kendal Ray Johnson

Sanza ya yambo 26–Sanza ya Mibale 1: “Boteya Makambo oyo na Bonsomi Nyonso epayi ya Bana na Bino”

Genese 5; Mose 6

Mingi ya Genese 5 ezali molongo ya bankola kati na Adama na Eva mpe Noa. Totangaka bankombo ebele, kasi toyekolaka mingi te na oyo etali yango. Nsima totangi milongo oyo ya kobenda bokebi kasi oyo elimbolami te: “Mpe Enoka atambolaki elongo na Nzambe: mpe azalaki te; mpo Nzambe azwaki ye” (Genese 5:24). Ya solo ezali na lisolo moko nsima ya molongo oyo! Kasi kozanga ndimbola mosusu, molongo ya bankola ezongeli.

Matondo, Mose 6 emonisi makambo mikemike ya lisolo ya Enoka —mpe ezali mpenza lisolo. Toyekoli na ntina ya bomikitisi ya Enoka, bozangi libateli na ye, makoki oyo Nzambe amonaki kati na ye, mpe mosala monene oyo asalaki lokola mosakoli ya Nzambe. Tozwi lisusu elilingi ya polele ya libota ya Adama mpe Eva lokola ezalaki kokoba na nzela ya bankola. Tozali kotanga na ntina ya “bokonzi monene” ya Satana kasi mpe ya baboti oyo bateyaki bana “banzela ya Nzambe” (Mose 6:15, 21). Mingimingi ya motuya ezali oyo toyekoli etali malongi oyo baboti bateyaki: bondimi na Yesu Klisto, boyamboli, libatisi, mpe kozwa Molimo Mosantu (botala Mose 6:50–52). Malongi yango, lokola bonganganzambe oyo ememi yango, “ezalaki na ebandeli [mpe] ekozala na nsuka ya mokili lisusu” (Mose 6:7).

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Mose 6:26–36

Lisumu ezali kopekisa makoki na ngai ya komona, koyoka, mpe kolanda makambo ya Nzambe.

Ntango bozali koyekola Mose 6:-26–36, nini boyekoli etali bambuma ya lisumu? Lolenge nini bomoni bambuma yango? Bizaleli nini Enoka azalaki na yango oyo esalisaki ye alonga bambuma wana? Lolenge nini Nzambe apambolaki ye lokola mbano?

Mose 6:26–47

elembo ya seminele
Nzambe abengi ngai nasala mosala na Ye atako botau na ngai.

Soki bomiyoki bokoki te na oyo Nkolo asengi bino bosala, bozali bino moko te. Ata Enoka amiyokaki bongo ntango Nkolo abengaki ye azala profeta. Ntango bozali kotanga Mose 6:26–36, boluka mpo na nini Enoka amiyokaki akoki te mpe nini Nkolo ayebisaki ye mpo na kopesa ye mpiko.

Kati na milongo 37–47, bokoki koluka lolenge Nkolo asungaki Enoka mpe apesaki ye nguya ya kosala mosala na Ye (botala lisusu Mose 7:13). Bokoki kokokanisa makambo ya Enoka na oyo ya baprofeta mosusu oyo bamiyokaki ya kokoka te, lokola Mose (botala Esode 4:10–16), Yelemia (botala Yelemia 1:4–10), Nefi (botala 2 Nefi 33:1–4), mpe Moroni (botala Etele 12:23–29). Nini boyoki Nzambe alingi boyekola uta na makomi oyo etali mosala na Ye apesaki bino kosala?

Enoka azali kosambela

A Seer Hath the Lord Raised Up [Nkolo Abimisi Momoni Moko] (Mose 6:36), na Eva Timothy

Mingi ya bapostolo mpe baprofeta ya mikolo na biso balobelaki mayoki ekokana na oyo ya Enoka ntango balimbolaki lolenge nini bamiyokaki kozwa mabiangi na bango. Ndakisa, botala litatoli ya Mpaka Ulisses Soares kati na “Baprofeta Balobaka na Nguya ya Molimo Mosantu” (Liahona, Sanza ya mitano 2018, 98–99).

Nini bokoki koyekola uta baprofeta mpe bapostolo etali mayoki na bino ya bozangi bomikoki? Ntango nini boyokaki Mobikisi kosalisa bino ntango Asengaki bino bosala makambo ya makasi? Bokanisa kokoma na nse mwa makambo oyo bokokutana na yango na mikolo na bino ekoya ntango bokolinga kotia motema na lisalisi ya Mobikisi. Lolenge nini tokoki kotalela makambo oyo na kondima epayi ya Yesu Klisto?

Botala lisusu David A. Bednar, “Botikala kati na Ngai, mpe Ngai kati na Bino; Yango wana, Botambola elongo na Ngai,Liahona, Sanza ya mitano 2023, 123–25; “I’ll Go Where You Want Me to Go,” Hymns, no. 270.

Mose 6:48–68

Nsango malamu ya Yesu Klisto eteyamaki uta na ebandeli.

Lokola tozali na buku ya Mose, toyebi ete Nzambe azalaki koteya bana na Ye lolenge nini bakozwa bosikoli libela banda na Adama mpe Eva. Ntango bozali koyekola Mose 6:48–68, boluka oyo tosengeli koyeba mpe kosala mpo na kosikolama. Botala motuna ya Adama na molongo 53. Bosila komituna bongo? Boyekoli nini uta na eyano ya Nkolo na milongo 53–65? Bokoki kokanisa na ntina ya milongo oyo lokola nsango ya Nkolo na mosala ya libatisi ya Adama. Boyekoli nini etali libatisi uta na nsango oyo? Mpo na nini bokanisi Akokanisi libatisi na kozala ya “kobotama lisusu”? (molongo 59). Nini bokoki kosala mpo na kokoba kozala ya “kobotama lisusu” kati na bomoi na bino mobimba?

Boluka bilembo. Kati na makomi, makambo to milulu ekoki kolakisa to kozala bilembo ya bosolo ya molimo, mingimingi bosolo etali Mobikisi (botala Koteya na Lolenge ya Mobikisi7). Bilembo oyo ekoki kokolisa bososoli na bino na ntina na Ye mpe malongi na Ye. Na ndakisa, boyekoli nini uta na bilembo ya mitema mpe matoyi na Mose 6:27, miso mpe mabele ya lima kati na Mose 6:35, to mayi kati na Mose 6:59–60?

Mose 6:51–62

“Boteya Makambo oyo na Bonsomi Nyonso epayi ya Bana na Bino.”

Nsima ya koteya Adama bosolo ya nsango malamu ya Yesu Klisto, na Mose 6:51–63, Nkolo alobaki na Adama ateya bankola ekoya. Bokanisa kokoma molongo ya bosolo oyo bozwi na milongo oyo. (Ekoki kozala malamu kokabola maloba yango na bituluku ya mikemike ya milongo, lokola milongo 51–52, 53–57, 58–60, 61–63). Mpo na nini bosolo oyo ezali ya motuya epayi ya nkola ya sika? Nini lisusu bokoki koyekola uta na malako ya Nkolo epayi ya baboti kati na Mosiya 4:14–15 mpe Malongi mpe Mayokani 68:25–28; 93:40–50?

Kotanga oyo etali “buku ya bokundoli” oyo libota ya Adama mpe Eva babombaki ekoki kofula bino to libota na bino mpo na kosala buku na yo moko ya bokundoli. Nini boyoki Nkolo alingi bobakisa? Bokanisa kobomba makambo uta na buku na bino ya bokundoli na FamilySearch.org.

Botala lisusu Dieter F. Uchtdorf, “Jesus Christ Is the Strength of Parents,” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 55–59;; “Parenting: Touching the Hearts of Our Youth,” “But Why?” (videos), Biblioteke ya Nsango Malamu.

libota ezali kotanga makomi elongo

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mose 6:26–34

Nzambe akoki kosalisa ngai nasala makambo ya mpasi.

  • Ntango Enoka abengemaki mpo na kosakola nsango malamu, abangaki ete akokaki kokweya. Kasi Nzambe asalisaki ye. Botanga elongo lisolo oyo kati na Mose 6:26–34 (botala lisusu “Enoch the Prophet” kati na Masolo ya Kondimana na Kalandimana, 19–21). Mpo na nini Enoka ayokaki ete akokaki te koteya nsango malamu? (botala Mosiya 6:31). Lolenge nini Nkolo asalisaki Enoka? (botala Mose 6:32–34; 7:13).

  • Bana na bino bakoki kosepela kokabola to kosala masano ya bandakisa misusu na ntina ya ndenge Nkolo asalisaki bato basala makambo ya mpasi—ndakisa, Noa, Dawidi, Ammona, to Samwele molamanite (botala Gospel Art Book [Buku ya Bilili ya Nsango Malamu], nos. 7, 19, 7881). Bokoki lisusu kokabola boyebi na bino moko mpe botika bana na bino baloba oyo etali lolenge nini Nzambe asalisaki bango basala makambo ya mpasi.

Mose 6:50–62

Bondimi kati na Klisto, boyamboli, libatisi, mpe kozwa Molimo Mosantu ezali kolengela ngai nazonga epayi ya Nzambe.

  • Nzambe ateyaki Adama nini tosengeli kosala mpo na kozonga epayi na Ye—kozala na bondimi kati na Yesu Klisto, koyambola, kobatisama, mpe kozwa likabo ya Molimo Mosantu. Bosalisa bana na bino bazwa mibeko yango kati na Mose 6:52, 57. Nsima bokoki kosalisa bango bakoma lisikulu moko ya mokuse oyo etali moko ya mibeko. Lisikulu moko na moko ekoki kosangisa makomi uta na Mose 6, boyebi, mpe litatoli moko. Bobengisa bango bakabola masikulu na bango elongo moko na mosusu.

  • Bokoki mpe lisusu kolakisa bililingi oyo elakisaka mibeko ya yambo ya nsango malamu (botala eteni ya bondimi ya minei). Botya bango na molongo oyo ezali komema na foto ya Yesu Klisto. Ntango bozali kotanga Mose 6:52, bana na bino bakoki kotelema pembeni ya foto ya malamu ntango bayoki maloba oyo ebalani na foto.

  • Bana na bino bakoki kosepela koyemba banzembo oyo ezali koteya mibeko kati na Mose 6:52, lokola “Faith,” “When I Am Baptized,” mpe “The Holy Ghost” (Children’s Songbook, 96–97, 103, 105). Bosalisa bango bazwa mibeko kati na Mose 6:52.

Mose 6:57–58

Tata na Lola alingaka baboti bateya bana na bango.

  • Mpo na kolendisa bana na bino basunga baboti na bango na mokumba na bango lokola bateyi ya nsango malamu, bokanisa kosenga mwana moko atanga Mose 6:58 mpe abimisa motindo Nzambe apesaki na baboti. Nsima bokoki kolakisa foto ya Adama mpe Eva koteyaka bana na bango (lokola oyo ezali na nsuka ya liyemi oyo) mpe botika bana na bino balobela oyo etali ya maye bamoni kati na foto. Bana na bino bakoki koyema bililingi ya mabota na bango kotangaka makomi elongo, kosambelaka elongo, to kosakanaka elongo.

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Adama mpe Eva bazali koteya bana na bango na nse ya nzete

Adam and Eve Teaching Their Children [Adama mpe Eva Bazali Koteya Bana na Bango], na Del Parson

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nsango malamu eteyi biso lolenge nini kozonga epayi ya Tata na Lola.