“Sanza ya Yambo 19–25. Bokweyi ya Adama mpe Eva: Genese 3– 4; Mose 4–5, ” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya Yambo 19–25. Bokweyi ya Adama mpe Eva,” Yaka, Landa Ngai: 2026
Adam and Eve [Adama mpe Eva], na Douglas M. Fryer
Sanza ya Yambo 19–25: Bokweyi ya Adama mpe Eva.
Genese 3–4; Mose 4–5
Na ebandeli, lisolo ya Bokweyi ya Adama mpe Eva ekoki komonana lokola likambo ya mawa. Adama mpe Eva babenganamaki na Elanga kitoko ya Edene. Bantindamaki kati na mokili ya mpasi, mawa, mpe liwa (botala Genese 3:16–19). Mpe bakabwanaki na Tata na bango ya Lola. Kasi bosolo oyo ezongisamaki na nzela ya Profeta Joseph Smith kati na buku ya Mose epesaka biso bomoni se moko ya Bokweyi.
Iyo, Elanga ya Edene ezalaki kitoko. Kasi Adama mpe Eva bazalaki na mposa ya mingi koleka banzinganzinga ya kitoko. Bazalaki na mposa—mpe biso nyonso tozali na mposa—ya libaku ya kokola. Kotika Elanga ya Edene ezalaki litambe ya liboso ya ntina ya bozongi epayi ya Nzambe mpe nsukansuka kokoma lokola Ye. Yango elingaki koloba kokutana na botemeli, kosala maponi, kosala mabunga, koyekola koyambola, mpe kotia motema na Mobikisi, oyo Bomikabi na ye ekokisaka bokoli mpe “esengo ya bosikoli na biso” (Mose 5:11). Bongo, ntango botangi etali Bokweyi ya Adama mpe Eva, totie makanisi te oyo ezali lokola likambo ya mawa kasi na makambo ekoki kosalema—na paladiso te oyo Adama na Eva babungisaki, kasi na nkembo oyo maponi na bango epesaki biso nzela ya kozwa.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Genese 3; Mose 4
Bokweyi ezalaki eteni moko ya ntina ya mwango ya Nzambe.
Ezalaki solo ete boponi ya Adama mpe Eva ememaki na mikakatano tobikaka na bomoi ya kufa. Kasi elimboli te ete toyokaka mawa mpo na boponi na bango. Ntango bozali kotanga Genese 3 mpe Mose 4, bokoki komituna binomei, mpo na nini Bokweyi ezalaki motuya kati na mwango ya Nzambe?
Engebene na Mose 5: 9–12, lolenge nini Adama mpe Eva bayokaki na oyyo etali Bokweyi? Lolenge nini bokoki kosalela maloba na bango na makambo na bino kati na mokili oyo ya masumu? Toyekoli lisusu nini uta na 2 Nefi 2:19–25?
Botala lisusu Mosiya 3:19; Alma 12:21–37; mpe Malongi mpe Mayokani 29:39–43.
Leaving Eden [Kolongwa na Edene], na Annie Henrie Nader
Genese 3:1–7; Mose 4:22–31; 5:4–15
Yesu Klisto apesaka elikya mpe bosikoli.
Lisolo ya Adama mpe Eva ezali moko ya elikya mpe bosikoli na nzela ya Yesu Klisto. Mpo na koyeba ntina na yango, bokoki kobanda na kolukaka matomba ya Bokweyi Genese 3:1–7; Mose 4:22–31 mpe kotya bilembo to kosala molongo ya oyo bozwi. Lolenge nini matomba oyo esimbi bino? Nsima bokoki koluka Mose 5:4–15, kolukaka mwango ya Nzambe mpo na kosikola biso na bambano oyo. Mpo na nini Adama mpe Eva “basepelaki” ntango anzelu akendaki kotala bango? Nini boyekoli uta na bango etali Mwango ya Tata na Lola?
Botala lisusu “Because of Him” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.
Because of Him
Genese 3:16; Mose 4:22
Elingi koloba nini ete Adama asengelaki “koyangela” Eva?
Eteni oyo ya makomi esosolamaki ntango mosusu mabe mpo na kolimbola ete mobali azali na ntina ya kosalela mwasi na ye makambo ya boboto te. Na mikolo na biso, baprofeta ya Nkolo bateyaki ete mobali mpe mwasi basengeli komimona moko na mosusu lokola baninga ya bokokani na kokokisa mikumba na bango ya bonzambe kati na libota (botala “Libota: Esakola na Mokili” [Biblioteke ya Nsango Malamu]). Mpaka Dale G. Renlund mpe Ndeko Mwasi Ruth Lybbert Renlund balimbolaki ete mobali ya sembo “akoluka kosalisa; akondima mbeba mpe koluka bolimbisi; akozala pene ya kokumisa; akotalela makambo oyo bato ya libota balingaka; akoyoka kilo monene ya mokumba ya koyanola na ‘bamposa ya bomoi mpe bopesi bobateli’ na libota na ye; akosalela mwasi na ye na limemya mpe na botosi mingi. … Akopambola libota na ye” (The Melchizedek Priesthood: Understanding the Doctrine, Living the Principles [2018], 23).
Nazali na mposa ya bonsomi mpe botelemeli mpo na kokola.
Mpaka Dale G. Renlund ateyaki, “Ntina ya Tata na biso na Lola ya kimoboti ezali te komona bana na Ye basala oyo ezali malamu; ezali ya komona bana na Ye bapona kosala oyo ezali malamu mpe nsukansuka kokoma lokola Ye” (“Choose You This Day,” Liahona, Nov. 2018, 104). Mpo na nini ezali motuya na mwango ya Tata na Lola ete biso topona kosala oyo ezali malamu?
Ntango bozali kotanga Mose 4:1–4, boluka oyo Tata na Lola mpe Yesu Klisto basalaki mpo na kobatela lotomo na bino ya kopona—makoki na bino ya kosala. Ndenge nini bokoki kozwa nguya na bango ya kobatela? Mpo na makanisi, bokanisa koyekola eteni “Kosala maponi efulama” kati na Mpo na Bokasi ya Bilenge: Mokambi mpo na Kosala Maponi (4–5).
Bokanisa lisusu kotanga maye Lehi ateyaki etali makoki ya kosala kati na 2 Nefi 2:11–20, 25–30. Mpo na nini botelemeli ezali ntina mpo na makoki ya kosala? Lolenge nini bokoki kolakisa botondi na bino epayi ya Yesu Klisto mpo na kokomisa bino “nsomi ya kopona”? (2 Nefi 2:27).
Botala lisusu Dallin H. Oaks, “Opposition in All Things,” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 114–17; Topics and Questions, “Makoki ya Kosala,” Biblioteke ya Nsango Malamu; “Choose the Right,” Hymns, no. 154.
Kokolisa bosangani. Milulu mingi ya boyekoli ekoki kosalema lokola ya moto ye moko, libota, to kelasi; na masanga mike; to mibale mibale. Bosalela ndenge ebele mpo na kopesa bato nzela ya kosangana, baoyo nyonso bakokaki kozala na libaku ya kosangana te. Mpo na molulu oyo, bokoki kobengisa moto moko to lisanga batanga Mose 4 mpe mokambi Mpo na Bokasi ya Bilenge ntango lisanga mosusu bazali koyekola milongo kati na 2 Nefi 2. Nsima bakoki koteya moko na mosusu maye bayekolaki na eteni ya moto na moto.
Satana alukaka “kokosa mpe kozipa miso” na ngai.
Ntango bozali kotanga Mose 4:4–12; 5:13–33, bokanisa kosala molongo ya banzela Satana amekaki kopengwisa Adama mpe Eva mpe bana na bango. Lolenge nini amekaka makambo moko oyo lelo? Lolenge nini Tata na Lola asalisaka bino botelemela lokuta ya Satana?
“Ngai, Nkolo Nzambe … nalatisaki bango.”
Nsima ya kolya mbuma oyo epekisamaki, Adama mpe Eva bamekaki kozipa bolumbu na bango moko. Nsima, Nkolo apesaki bango bilamba. Ntango bozali kotanga Mose Mose 4:13–16, 27, bokanisa maye elandi:
-
Bomanyola nini bolumbu mpe kolata bilamba ekoki kolakisa kati na makomi (botala, na ndakisa, Emoniseli 7:9, 13–15; 2 Nefi 9:14; Malongi mpe Mayokani 109:22–26, 76). Boyekoli nini na makambo ya Adama mpe Eva na maye etali bolumbu mpe kolata bilamba?
-
Soki tozwaki dotasio kati na tempelo, tokanisa nini Adama mpe Eva bakoki kolobela biso etali ndimbola ya bilamba ya tempelo mpe nini elingi kolakisa.
Tala lisusu “The Refiner’s Firevideo), Biblioteke ya Nsango Malamu.
Sacred Temple Clothing
Nzambe akondima mabonza na ngai soki napesi yango na bolingi mpe motema ya botosi.
Ntango bozali koyekola Mose 5:4–9, 16–26, bokanisa bizaleli ya Adama mpe Eva mpe bana na bango Kaina na Abele bazalaki na yango na maye matali libonza . Mpo na nini Nzambe andimaki libonza ya Abele kasi ya Kaina te?
Libonza nini Nkolo asengi bino bopesa?” Ezali na eloko moko kati na milongo oyo ebongoli lolenge bozali kokanisela mabonza wana?
Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.
Makanisi mpo na Koteya Bana
Yesu Klisto abikisi biso uta na Bokweyi.
-
Mpo na kosalisa bana na bino basosola malamu koleka Bokweyi ya Adama mpe Eva, bokoki kozwa bililingi uta na “Adama mpe Eva” (kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 13–16) mpe kokata yango. Nsima bokoki kosala elongo na kotya bililingi na molongo ndenge bosololaki makambo ya Adama mpe Eva Ntango bozali kosala yango, bolobela oyo etali mpo na nini ezalaki motuya, na mwango ya Tata na Lola, mpo ete Adama mpe Eva batika Elanga ya Edene.
-
Bana na bino bakoki koyoka botondi mpo na bomikabi ya Yesu Klisto ntango bazali kososola lolenge nini Alongaki nguya ya Bokweyi. Ntango bozali kotanga elongo Mose 4:25; 6:48; Baloma 5:12; 2 Nefi 2:22–23, bosalisa bana na bino baluka nzela ya kobakisa molongo oyo: “Mpo na Bokweyi, ngai …” Nsima, ntango bozali kotanga elongo Mose 5:8–11, 14–15; 6:59; Alma 11:42, bakoki kobakisa molongo oyo: “Mpo na Yesu Klisto, ngai …” Bokabola moko na mosusu botondi na bino mpo na Yesu Klisto.
Nakoki kopona malamu.
-
Bokanisa liteya moko ya eloko ya pete mpo na koyingisa libongisi ya makoki ya kosala: bobengisa bana na bino batya langi na lokasa ya molulu ya poso oyo, kasi bopesa bango kaka langi moko ya kosalela. Mpo na nini ezali malamu mingi kozala na likoki ya kopona? Nsima bokoki kotanga elongo Mose 4:1–4 mpe bosolola etali mpo na nini Nzambe alingi biso tozala na makoki ya kopona kati na malamu mpe mabe. Lolenge nini Tata na Lola mpe Yesu Klisto basalisaka biso tosala maponi ya malamu?
-
Bosalisa bana na bino bakanisa mpe bayema bililingi ya maponi ya malamu bakoki kosala mpo na kolanda Yesu Klisto. To bokoki lisusu koyemba elongo loyembo etali kosala maponi malamu, lokola “Choose the Right Way” (Children’s Songbook, 160– 61). Bokoki koyebisana moko na mosusu oyo etali ngonga moko oyo bosalaki boponi moko ya malamu mpe koloba oyo etali lolenge bomiyokaki na nsima.
The Fall [Bokweyi], na Robert T. Barrett
Nakoki kosambela Tata na Lola.
-
Ntango Adama mpe Eva batikaki Elanga ya Edene, bakokaki te lisusu kozala elongo na Tata na Lola. Botanga Mose 5:4, 8 na bana na bino, mpe bosalisa bango bamona nini Adama mpe Eva bayokaki kozala pembeni na Ye mpe koyoka Ye. Makambo nini tokoki koloba na Tata na Lola kati na nsambo na biso?
Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.
In Similitude of the Sacrifice of the Only Begotten of the Father [Na Bokokani ya libonza ya Mobotami se Moko ya Tata], na Mike Malm (Botala Mose 5:5–9)