“Makanisi ya Kobosana te: Kotanga Kondimana na Kala,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Kotanga Kondimana na Kala,” Yaka, Landa Ngai: 2026
Makanisi ya Kobosana te
Kotanga Kondimana na Kala
Ntango Nefi alingaki kofula bandeko na ye ya mibali batyela Nkolo motema, akabolaki masolo etali Mose mpe mateya ya Yisaya. Ntango Ntoma Paulo alingaki kolendisa Baklisto ya ebandeli bazala na bondimi na bilaka ya Nzambe, akundolisaki bango na ntina ya bondimi ya Noa, Abalayama, Sala, Rahaba, mpe basusu. Mpe ntango Yesu Klisto alobaki na bakambi ya Bayuda “baluka makomi,” oyo ezali kolimbola ete yango ezali “kotatola na ntina na ngai” (Yoane 5:39), makomi oyo Azalaki kolobela ezalaki makomi tobengaka Kondimana na Kala.
Na maloba misusu, ntango bozali kotanga Kondimana na Kala, bozali kotanga maloba oyo efulaki, ebondisaki, mpe elendisaki bato ya Nzambe mpo na solo bankoto ya mibu.
Kasi likambo moko oyo ekomamaki kala mpenza ekoki kosalisa bino bozwa mwango ya kosilisa mikakatano ya lelo? Iyo, ekoki! Mingimingi soki bokundoli nani Kondimana na Kala ezali solo kolobela.
Kondimana moko ya Yesu Klisto
Ata soki bino mpe libota na bino bokoki kokutana na mikakatano nini , eyano ezali ntango nyonso Yesu Klisto. Bongo mpo na kozwa biyano kati na Kondimana na Kala, boluka Ye. Ekozala ntango inso pete te. Bokoki kozala na mposa ya komanyola na motema molai mpe koluka bokambami ya molimo. Bantango mosusu maloba oyo elobelaka Ye emonanaka polele, lokola na lisakoli ya Yisaya, “Mwana abotami kati na biso, mwana mobali apesameli biso: mpe nkombo na ye akobengama Mokonzi ya Kimya” (Yisaya 9:6). Na bisika misusu, Mobikisi amonisami na lolenge ya mayele mingi, na nzela ya bilembo mpe makokanisi—ndakisa, na nzela ya bolimboli bopesi mbeka ya banyama to lisolo ya Yosefe kolimbisaka bandeko na ye ya mibali mpe kobikisaka bango na nzala.
Pole ya Mokili, na Scott Sumner
Soki boluki bondimi monene kati na Mobikisi ntango bozali koyekola Kondimana na Kala, bokozwa yango. Mbala mosusu yango ekoki kozala ntina ya boyekoli na bino ya mobu oyo. Bosambela ete Molimo ekamba bino bozwa mpe botya motema na milongo, masolo, mpe masakoli oyo ekomema bino penepene na Yesu Klisto.
Ebatelami na Bonzambe.
Bozela te ete Kondimana na Kala elakisa lisolo ya mozindo mpe ya sikisiki ya bato. Yango ezali te oyo bakomi ya ebandeli mpe basangisi mikanda bazalaki komeka kosala. Mposa na bango ya makasi ezalaki ya koteya makambo matali Nzambe—na ntina ya mwango na Ye mpo na bana na Ye, etali oyo elakisi kozala bato na Ye ya boyokani, mpe lolenge ya kozwa bosikoli ntango tosali mabunga. Bantango mosusu bazalaki kosala yango na kolobelaka makambo ya kala na lolenge oyo bango moko bazalaki kososola yango, kobakisa masoló matali bomoi ya basakoli minene. Buku ya Genese ezali ndakisa na yango; mpe ezali lolenge moko babuku lokola Yosua, Basambisi, mpe Bankonzi 1 mpe 2. Kasi bakomi mosusu ya Kondimana na Kala bazalaki na mposa ya kozala ata moke te ya lisolo ya kala. Na esika yango, bateyaki na nzela ya misala ya ntoki mpe kokoma. Banzembo mpe Masese ekoti na molongo oyo. Mpe nsima, ezali na maloba ya motuya ya basakoli, lokola Yisaya mpe Malaki, oyo balobaki maloba ya Nkolo na Yisalaele ya kala—mpe, na nzela ya makamwisi ya Biblia, bazali koloba na biso kino lelo oyo.
Basakoli, bakomi ya maloba ya ntoki, mpe bato oyo basangisaki mikanda yango nyonso bayebaki ete bato na mokili mobimba bakotanga maloba na bango bankoto ya bambula na nsima? Toyebi te. Kasi tokamwaka ete yango ezali mpenza likambo oyo esalami. Bikolo etombwamaki mpe ekweyaki, bingumba elongamaki, bakonzi bazalaki na bomoi mpe bakufaki, kasi Kondimana na Kala elongaki bango nyonso, uta nkola na nkola, uta mokomi na mokomi, uta bobongoli na bobongoli. Ya solo, biloko mosusu ebungaki to ebongwanaki, mpe nzokande na ndenge ya kokamwa, biloko mingi ebatelamaki.
Profeta ya Kondimana na Kala, na Judith A. Mehr (detail)
Oyo ezali mwa biloko moke ya kobosana te ntango bozali kotanga Kondimana ya Kala na mobu oyo. Nzambe abatelaki makomi oyo ya kala mpo ete Ayebi bino mpe nini bozali kokutana na yango. Alengelaki nsango moko ya molimo mpo na bino na maloba oyo, oyo ekobenda bino penepene na Ye mpe ekotonga bondimi na bino na mwango na Ye mpe na Mwana na Ye ya Bolingo. Ntango mosusu Akokamba bino na molongo moko to bososoli oyo ekopambola moto moko boyebi—nsango oyo bokoki kokabola na moninga moko, ndeko ya libota moko, to moninga moko Mosantu. Ezali na ndenge ebele ekoki kosalema. Yango ezali mpenza kosepelisa te mpo na kokanisa yango?
Nefi alobaki, “Molimo na ngai esepelaka na makomi” (2 Nefi 4:15 Mbala mosusu bokoyoka lolenge moko ntango bozali kotanga maloba mingi oyo Nefi atangaki—oyo tozali kobenga sikawa Kondimana na Kala.
Babuku na Kondimana na Kala
Na mabongoli mingi ya baklisto ya Kondimana na Kala, babuku ebongisami ndenge mosusu na lolenge ebongisamaki ntango basangisaki yango mpo na mbala ya liboso na liboke moko. Na yango, ntango Biblia ya Baebele esangisaka babuku kati na biteni misato—mibeko, basakoli, mpe makomi—Babiblia mingi ya baklisto ebongisi babuku kati na biteni minei: mibeko (Genese–Dutelonome), lisitwale (Yosua–Ejela), babuku ya ntoki (Yobo–Loyembo ya Salomo), mpe basakoli (Yisaya–Malaki).
Mpo na nini biteni oyo ezali motuya? Mpo ete koyeba lolenge ya buku oyo bozali koyekola ekoki kosalisa bino bososola lolenge nini koyekola yango.
Awa ezali na likambo moko ya kobosana te ntango bobandi kotanga “mobeko,” to babuku mitano ya yambo ya Kondimana na Kala. Babuku yango, oyo epesamaki uta kala lokola buku ya Mose, elekaki mbala mosusu na maboko ya ebele ya bakomi mpe bato oyo basangisaki mikanda na boumeli ya ntango. Mpe toyebi ete, uta bikeke, “biteni mingi ya polele mpe ya motuya mingi” elongolamaki na Biblia (Botala 1 Nefi 13:23–26). Nzokande, babuku ya Mose ezali liloba ya Nzambe, atako ezali—lokola mosala nyonso ya Nzambe oyo epesameli na nzela ya bato—oyo bazali na bolembu (botala Mose 1:41; Biteni ya Bondimi 1:8). Maloba ya Moroni, kolobelaka makomi ya bule ya Buku ya Mormon ekomama oyo asalisaki na kosangisa, ezali na litomba awa: “Soki ezali na mabunga ezali mabunga ya bato; yango wana, kokweisa makambo ya Nzambe te” (nkasa mikie ya Buku ya Mormon). Na maloba mosusu, buku ya makomi esengeli te ezanga mabunga ya bato mpo na kozala liloba ya Nzambe.