“Sanza ya Yambo 5–11. ‘Oyo Ezali Mosala na Ngai mpe Nkembo na Ngai’:Mose 1;Abalayama 3 ” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya Yambo 5–11. ‘Oyo Ezali Mosala na Ngai mpe Nkembo na Nga’,” Yaka, Landa Ngai: 2026
Sanza ya yambo 5-11: “Oyo Ezali Mosala na Ngai mpe Nkembo na Ngai”
Mose 1; Abalayama 3
Biblia ebandi na maloba “Na ebandeli Nzambe akelaki likolo mpe mokili” (Genese 1:1). Kasi nini ezalaki kuna liboso ya “ebandeli” yango? Mpe Mpo na nini Nzambe akelaki makambo nyonso oyo? Na nzela ya Profeta Joseph Smith, Nkolo asopaki pole na mituna oyo.
Ndakisa, Apesaki biso makomi ya emoniseli oyo Abalayama amonaki bozalani na biso lokola milimo “liboso ete mokili ezala” (botala Abalayama 3:22–28). Nkolo apesaki biso lisusu bobongoli efulama to bozongeli ya mikapo motoba ya yambo ya Genese, ebengami buku ya Mose—oyo ezali kobanda te na “na ebandeli.” Na esika na yango, ebandi na makambo Mose akutanaki na yango oyo ezali kopesa mua makanisi na lisolo ya bozalisi. Elongo, makomi oyo ya mikolo ya nsuka ezali esika elamu ya kombanda boyekoli na biso ya Kondimana na Kala mpamba te ezali na mituna ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa botangi na biso ya Biblia: Nzambe azali nani? Biso tozali banani? Mosala ya Nzambe ezali nini? mpe esika na biso ezali nini kati na yango? Mikapo ya ebandeli ya Genese ekokaki komonana lokola eyano ya Nkolo na bosenga ya Mose: “Zala na boboto mpo na mosali na yo, O Nzambe, mpe yebisa ngai oyo etali mabele oyo, mpe bafandi na yango, mpe lisusu lola”(Mose 1:36).
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Lokola mwana moko ya Nzambe, nazali na atandele ya bonzambe.
“Soki Nzambe azalaki kosolola na bino mbala moko,” Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “ eloko ya liboso Akolinga ya solo bososola ezali bozali na bino ya solo” (“Choices for Eternity” [worldwide devotional for young adults, May 2022], Biblioteke ya Nsango Malamu). Ekokoma ete Satana akolinga kobulunganisa bino mayele na likambo kaka moko oyo. Boluka ndakisa oyo na nsango ya Nzambe epayi ya Mose kati na Mose 1:4, 6 mpe kati na nsango ya Satana na Mose 1:12. Boyekoli nini uta na milongo oyo na ntina ya bokeseni katikati ya Nzambe mpe Satana?
Mokambi Nelson ateyaki lisusu, “Lolenge bozali kokanisa nani bozali mpenza ezali kosimba mingi mpenza ekateli nyonso oyo bokozwa” (“Choices for Eternity”). Bokanisa kosala molongo ya maponi oyo bosalaka mpo ete bomoto na bino lokola mwana na Nzambe eyaka yambo ya baetikete mosusu.
Molongo to maloba nini ya kobakisa kati na Mose 1 esalisi bino bososola motuya na bino ya bonzambe? Bokoki lisusu kotanga mingi etali nsango ya Mokambi Nelson na eteni ya “Maponi mpo na Seko” ebengami “Yambo: Yeba bosolo na ntina ya nani ozali.” Nini oyo boyoki bofulami kosala mpo na kokomisa bomoto na bino lokola mwana ya Nzambe moyebisi na bino ya motuya koleka ?
Tala lisusu “I am a Cjild of God,” Hymns (1985), no. 193; “Our True Identity” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu; Topics and Questions, “Children of God,” Biblioteke ya Nsango Malamu.
Our True Identity
Elongo na lisungi ya Nkolo, nakoki kotelemela Satana.
Lokola Mose 1 alakisi polele, makambo ya nguya ya molimo elakisi te ete tokomekama lisusu te. Kutu, moko ya mayele ya Satana ezali ya komeka biso totya ntembe na makambo yango. Ntango botangi eyano ya Mose epayi ya Satana kati na milongo 12–26, nini boyekoli ekoki kosunga bino botelama ngwi na litatoli oyo bozwaki? Nsukansuka, Nini esalisaki Mose alonga Satana?
Liteya mosusu uta likambo ya Mose ezali ete Satana amekaka biso na bobongoli ya bosolo mpe nguya ya Nzambe. Bokanisa na ntina ya lolenge ya lokuta ya biloko, lokola nzete esalemi na moto to mwana popi. Lolenge nini bokoki koloba ete eloko ezali ya lokuta? Nsima, bokanisa biloko ya lokuta oyo Satana azali kosalela lelo mpo na komeka bino. Nini boyekoli uta na Mose 1:13–18 etali lolenge nini koyeba mpe kobwakisa biloko ya lokuta na ye? Lolenge nini Nkolo asalisaki bino? (botala Mose1:13-18).
Tala lisusu Matai 4:1–11; Gary E. Stevenson, “Deceive Me Not,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 93–96; “I Am a Son of God” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.
I Am a Son of God
Koyekola na libota ekoki kolengelama kasi lisusu kozala ya mbalakaka “Mabaku ya koteya na libota esalemaka mbala na mbala na bantango ya momesano te mokolo na mokolo—ntango ya kolia bilei, kosala misala ya ndako, kosakana na masano, [to] kosala mobembo” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 31). Ndakisa, longola botangi etali lolenge nini Mose atelemelaki Satana na Mose 1, bokoki kolekisa mwa ntango na ngonga ya kolia mpo na kosolola lokola libota etali lolenge nini botelemelaki bopusi ya monguna.
Mosala mpe nkembo na Nzambe ezali kosalisa ngai nazwa bomoi ya seko.
Nsima ya komona emoniseli ya bikelamu ya Nzambe, Mose alobaki na Nkolo: “Yebisa ngai mpo na nini biloko oyo ezali bongo” (Moses 1:30). Nini etuti bino oyo etali eyano ya Nkolo kati na Mose 1:31–39? Bokeseni nini ezali kati na bozangi kufa na bomoi ya seko? (botala Topics and Questions, “Bomoi ya Seko,” Biblioteke ya Nsango Malamu). Lolenge nini Yesu Klisto asalisaka mpo na kokokisa makambo nyonso mibale? Abalayama azwaki lisusu emoniseli, ekomami kati na Abalayama 3. Bozwi nini kati na milongo 24–26 oyo ekoki kosalisa koyanola na bosenga ya Mose?
Nazalaki kobika lokola molimo liboso nabotama na mabele.
Toyebi moke mingi etali bomoi liboso ya kufa. Kasi mingi ya oyo toyebi ewuti na limoni ya Abalayama kati na Abalayama 3:22–28. Ntango bozali kotanga milongo oyo, bosala molongo ya bosolo bozwi—kobakisa bosolo etali binomei mpe Yesu Klisto. Mpo na nini bosolo oyo ezali ya motuyat epayi na bino? “Bokeseni nini yango ekoki kosala na bomoi na bino?”
Botala lisusu Topics and Questions, “Bomoi Yambo ya Kufa,” Biblioteke ya Nsango Malamu.
Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.
Makanisi mpo na Koteya Bana
Nazali mwana ya Nzambe.
-
Nsima ya kotanga elongo nsango ya Nzambe epayi ya Mose kati na Mose 1:4, bokanisa kotika bana na bino batala elilingi na bango na kitalatala mpe bapesa bangomei nsango ekokana: “Nazali mwana ya Nzambe.” Nsima bakoki kopesa se nsango moko na moko mosusu: “Bozali mwana na Nzambe.” Bokoki kutu kozwa bafoto ya bato ya ndenge na ndenge mpe kobengisa bana na bino balakisana mosapi moko na moko mpe baloba, “Oyo azali mwana na Nzambe.” Bokabola na moko na mosusu mpo na nini bozali na esengo ya koyeba ete bozali bana ya Nzambe. Lolenge nini boyebi yango ebongolaka lolenge tomisalelaka mpe basusu?
-
Bino mpe bana na bino bokoki kokokanisa nsango ya Nzambe na Mose kati na Mose 1:4 na nsango ya Satana kati na molongo 12. Lolenge nini bokoki kosalisa bana na bino bakesenisa nsango ya Nzambe epayi na bino na nsango ya Satana”?
Mose Amoni Yehova, na Joseph Brickey (makambo ya mikiemikie)
Tata na Lola azali na mosala mpo na ngai nasala.
-
Ntango bozali kotanga Mose 1:6 elongo na bana na bino, bokoki koloba na bango na ntina ya “mosala” Nzambe azalaki na yango mpo na Mose. Bokanisa kosalela Buku ya Bilili ya Nsango Malamu, nos. 13–16, to Masolo ya Kondimana na Kala, nkasa 64–84, mpo na kosalisa bana na bino bamona nini Mose akokisaki elongo na lisalisi ya Tata na Lola. Mosala nini Nzambe azali na yango mpo na biso tosala? (botala, na ndakisa, Malongi mpe Mayokani 11:20).
Nakoki kotelemela mimekano ya Satana.
-
Ntango bozali koyekola Mose 1:12–26 elongo na bana na bino, bosalisa bango bamona nini Mose asalaki mpo na kotelemela Satana (botala milongo 13, 15, 18, 20–22, 26). Ekoki kozala lisano mpo na bango kosala makambo oyo bakoki kosala mpo na kotelemela momekano (lokola kosambela, kokende mosika, to kosenga lisalisi).
Nazalaki kobika lokola molimo liboso nabotama na mabele.
-
Koyeba ntina ya bomoi yambo ya kufa na biso ekoki kofula bana na bino mpo na kosala maponi etongami na bosolo ya seko. Mpo na kosunga bango bayekola ntina na yango, bokoki kopesa bango mwa maloba ya ntina mpe milongo oyo basengeli koluka na kati ya Abalayama 3:22–28, lokola “liboso ete mokili ezala,” “milimo,” “kosala mabele,” mpe “kondimisa.” Milongo oyo eteyi biso nini etalintina oyo Tata na Lola atindelaki biso na mabele?
-
Nzembo moko lokola “I Will Follow God’s Plan” (Children’s Songbook, 164–65) ekoki kolendisa oyo Abalayama 3 eteyi. Ntango mosusu bokoki kobengisa bana na bino bayema bililingi oyo eyokani na maloba.
-
Bosalisa bana na bino oyo basengeli kopona soki basengeli kosala to te oyo Nzambe asengi bango (botala Abalayama 3:25; tala lisusu Mpo na Bokasi ya Bilenge: Lisungi Mpo na Kosala Maponi). Botika bango basalela biyano ya momesano na makambo yango. Lolenge nini Mobikisi akoki kosalisa biso ntango tozali kosala maponi mabe?
Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .