Yaka, Landa Ngai
Sanza ya zomi na mibale 29–Sanza ya yambo 4. Kondimana ya Yambo ya Yesu Klisto: Boyingisi ya Kondimana na Kala


“Sanza ya zomi na mibale 29–Sanza ya yambo 4. Kondimana ya Yambo ya Yesu Klisto: Boyingisi ya Kondimana na Kala,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Boyingisi ya Kondimana na Kala,” Yaka, Landa Ngai: 2026

Yesu Klisto atelemi na ngomba

Sanza ya zomi na mibale 29–Sanza ya yambo 4: Kondimana ya Yambo ya Yesu Klisto

Boyingisi ya Kondimana na Kala

Ntango bokanisi koyekola Kondimana na Kala mobu oyo, bozali komiyoka ndenge nini? Mposa makasi? Boyebi te? kobanga? Nyonso ya mayoki oyo ekoki kososolama. Kondimana na Kala ezali moko ya makomi ya kala mingi kati na mokili, mpe yango ekokikosepelisa mpe kobangisa. Makomi oyo euti na mimesano ya kala oyo ekoki komonana ya bapaya mpe ntango mosusu ya kokamwa to kutu kozanga kosepelisa. Mpe nzokande na makomi oyo tomoni bato bazali na makambo oyo emonani lokola ete bameseni na yango. Toyebi bamama ya likambo oyo ezali kotatola bonzambe ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Iyo, Bato lokola Abalayama, Sala, Hana, mpe Daniele babikaki bomoi oyo, na lolenge mosusu, ezalaki kokesana na oyo ya biso. Kasi bakutanaki lisusu na esengo mpe kozanga boyokani ya libota, bantango ya bondimi mpe bantango ya kozanga koyeba, mpe malonga mpe bozangi kokoka—lokola biso banso tosalaka. Ya motuya koleka, basalelaki bondimi, bayambolaki, basalaki mayokani, bazwaki mayele ya molimo, mpe batikaki ata moke te elaka ya Mobikisi. Ntango tososoli lolenge Nzambe akotaki na bomoi na bango, tomonaka Ye lisusu kati na bomoi na biso, mpe tolobaka elongo na mokomi ya nzembo: “Liloba na yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai, mpe pole na nzela na ngai. … Yango mosali na yo alingi yango” (Banzembo 119:105, 140).

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

elembo ya seminele
Kondimana na Kala etatoli na ntina ya Yesu Klisto.

Nzela moko ya kozwa bilei ya molimo na Kondimana na Kala ezali ya koluka Lipa ya Bomoi, Yesu Klisto ( tala Yoane 6.48). Ndakisa, lolenge nini omonaka Mobikisi na maye malandi?

  • Mana (Esode 16:4, 11–15; Yoane 6:35)

  • Mwana mpate ya mbeka (Esode 12:3–5; Yoane 1:29)

  • Nyoka na motako (Mituya 21:4–10; Yoane 3:14)

  • Yona (Jona 1:4–17; Matai 12:38–41)

Bandakisa oyo eteyi nini na ntina na Ye? Nini mosusu ezali kolobela Yesu Klisto kati na kondimana na Kala oyo bomesani na yango?

Kati na nsango na ye “Yesu Klisto Azali Bomengo,” Mpaka Dale G. Renlund alendisaki biso “tomikundola mpe totya makanisi na biso ntango nyonso na Yesu Klisto” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2023, 98). Bokanisa kotanga nsango na ye, kolukaka makambo oyo bokoki kosala mpo na komona Yesu Klisto kaka na Kondimana na Kala kasi lisusu kati na bomoi na bino.

Botala lisusu “Lolenge to Bilembo ya Klisto” kati na Mokambina Makomi, “Yesu Klisto,” Esika ya Babuku; “Seek the Lord Early,” Children’s Songbook, 108.

Boluka bilembo oyo ezali kotatola na ntina ya Yesu Klisto Nkolo ateyaki Adama, “Makambo nyonso ezali na bobokani na yango, mpe biloko nyonso bikelami mpo na kotatola na ntina na ngai” (Mose 6:63). Ata soki bozali koyekola to koteya, kotya makanisi na Yesu Klisto ekoki kosalisa bino bozwa ndimbola na makomi mpe kokolisa bolingo mpe bondimi na bino epayi na Ye. (Botala Koteya na Lolenge ya Mobikisi,7.)

Yesu Klisto azali Yehova kati na Kondimana na Kala.

Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki: “Tata alakisaki Mwana na Ye Se Moko, Yesu Klisto, lokola Mobikisi mpe Mosikoli na biso mpe apesaki biso motindo ya ‘koyoka Ye.’ Uta na bokambi oyo tosukisi ete makundoli ya makomi ya maloba elobami na “Nzambe” to “Nkolo” ezali ntango nyonso maloba ya Yehova, Nkolo na biso asekwa, Yesu Klisto” (“Mateya ya Yesu Klisto,” Liahona, Sanza ya mitano 2023, 102).

14:6

Mateya ya Yesu Klisto

Ntango mokambi ya Bayuda asambisaki Yesu na ntina ya bomoto na Ye, Asakolaki, “Liboso ete Abalayama abotama, Ngai nazali.” Maloba oyo ebetisaki bato oyo bayokaki Yesu libaku, mpe balengelamaki na kobamba Ye mabanga (botala Yoane 8:58–59). Bokanisa kotanga Esode 3:13–15; 6:3–5 mpo na komona mpo na nini bayuda mosusu basilikaki na ntina ya maye Yesu alobaki.

Mpo na nini ezali ntina mpo bino boyeba ete Yesu Klisto azali Yehova?

Nkolo azongisaki “makambo ya pete mpe ya motuya” mingi na nzela ya Joseph Smith.

Na kati ya emoniseli moko, Nkolo alakisaki Nefi boyei ya Biblia, kolimbolaka ete “makambo mingi ya pete mpe ya motuya” ekolongolama uta na yango. Bokanisa kotanga 1 Nefi 13:21–29, 38–42, kolukaka lolenge nini Nkolo abongisaki mpo na “kopesa boyebi ya makambo ya pete mpe ya motuya.” Engebene na 2 Nefi 3:12, lolenge nini Biblia mpe Buku ya Mormon esalaka elongo?

Ntango bozali koyekola Kondimana na Kala mobu oyo, bokotanga lisusu mwa “babuku misusu” oyo Nefi amonaki liboso. Yango esangisi:

  • Buku ya Mose, eteni ya bobongoli ya Biblia ya Joseph Smith. Ezongisi bosolo mpe masolo oyo ezwami te kati na makomi ya lelo ya Genese 1–6.

  • Buku ya Abalayama, oyo emonisamaki na Joseph Smith ntango azalaki koyekola bapapirisi ya Ezipito ya kala (botala Masolo mpe Mituna, “Buku ya Abalayama,” Esika ya Babuku).

  • Milongo ekeseni uta Bobongoli ya Joseph Smith, mwa ndambo na yango ezali komonana na maloba na nse ya lokasa, na mabakisi ya Biblia, mpe na Mokambina Makomi.

Mwa bandakisa ezali awa ya masolo ezongisama ya Kondimana na Kala na nzela ya Joseph Smith: Engumba ya Siona ya Enoka (Mose 7:18–19), limonisi ya Abalayama ya likita ya lola (Abalayama 3:22–28), mpe mosala ya Melekisedeke (Bobongoli ya Joseph Smith, Genese 14:25–40). Mpo na nini maloba oyo ezali “pete mpe motuya” epayi na bino?

anjelu abimelaki Adama mpe Ewa.

Adama mpe Ewa Batumbi Bambeka, na Keith Larson (detail)

Kondimana na Kala ezali kosalisa ngai nasosola mokangano ya boyokani na ngai elongo na Nzambe.

Kondimana na Kala ezali lisolo ya Nzambe kolukaka kokomisa biso “eloko moko ya motuya mingi” na nzela ya boyokani (Esode 19:5). Mpo na ntina wana, lolenge moko malamu ya komilengela na kotanga Kondimana na Kala ezali kososola ntina ya mayokani—mingimingi boyokani ya libela na libela oyo Nzambe asalaki na basakoli ya kala lokola Abalayama, Yisaka, Yakobo, mpe bakitani na bango. Mpe nzela malamu ya koyekola etali mayokani ezali ya kotanga nsango ya mokambi Russel M. Nelson “Boyokani ya Libela” (Liahona, Sanza ya zomi 2022, 4–11).

Ntango bozali kotanga, bomituna, Mpo na nini mayokani ezali motuya mpo na ngai? “Lolenge nini ya bolingo mpe ya ngolu” nazwaka uta na Nzambe ntango nazali kotosa mayokani na ngai elongo na Ye? Ntango bozali kotanga Kondimana na Kala mobu oyo, bobanda kotala makambo Nzambe alingi koteya bino na ntina ya mokangano ya boyokani na bino na Ye.

Botala lisusu Yelemia 31:31–34.

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Nakoki koyekola etali Yesu Klisto kati na Kondimana na Kala.

  • Maloba mpe momesano ya Kondimana na Kala ekoki kozala mpasi mpo na bana basosola, kasi bokoki kosalisa bango bamona Yesu Klisto na bilembo mpe masolo. Ntango mosusu bino mpe bana na bino bokoki kotala bililingi oyo na nse, Mosakoli Yisaya asakolaki kobotama ya Klisto. Botika bana na bino babimisa makambo bamoni. Bobenda likebi na bango, mingimingi, na mwana Yesu. Nsima bokoki kotanga elongo na bango maye Yisaya akomaki na ntina ya mbotama ya Mobikisi kati na Yisaya 7:14; 9:6. Bokabola na bana na bino lolenge nini bozali koyoka na ntina ya koluka Mobikisi na Kondimana na Kala na mobu oyo.

    Yisaya azali kokoma na rulo na ntina ya Mbotama ya Klisto

    Yisaya akomi na ntina na Mbotama na Klisto (Mosakoli Yisaya asakolaki kobotama ya Klisto), na Harry Anderson

  • Bino na bana na bino bokokaki kotanga lisusu Banzembo 23 to Yisaya 53:3–9 mpe koluka maloba oyo ezali kokundolisa bino na ntina ya Yesu Klisto. Maloba oyo eteyi biso nini etali bomoi mpe Bomikabi na Ye?

Tata na Lola alingi kosala mayokani elongo na ngai.

  • Mayokani ezali likambo moko ya ntina monene kati na Kondimana na Kala. Mpo na komonisa moto ya likambo oyo na bana na bino, bokoki kosolola na bango na ntina ya bilaka basalaki mpe bazali kobatela na libota to baninga mpe mpo na nini kobatela bilaka oyo ezali motuya. Na nsima bokoki kotala foto ya libatisi mpe lisikulu na ntina ya elaka, to boyokani, tosalaka elongo na Nzambe ntango tobatisami (botala Mosiya 18:10, 13). Bokoki lisusu kolakisa foto ya tempelo mpe kokabola mayoki na bino na ntina ya mayokani tosalaka kuna.

  • Lokasa ya misala ya poso oyo ekoki kosalisa bana na bino basepela kosala mpe kobatela mayokani elongo na Tata na Lola. Bokoki lisusu koyemba nzembo oyo etali kobatela mayokani, lokola “When I Am Baptized” (Children’s Songbook, 103).

Yesu Klisto azali Yehova kati na Kondimana na Kala.

  • Bana na bino bayebi moto moko songolo oyo azwaka nkombo ekeseni na bisika ekeseni? Ntango mosusu moboti to molakisi babengamaka na ndenge ekeseni na esika ya mosala, na ndako, mpe na eklezia. Bolobela na ntina ya bankombo wana; nsima botanga Esode 6:3 elongo mpe bobengisa bana na bino babimisa bankombo Yesu ayebamaki liboso abotama (botala lisusu Bobongoli ya Joseph Smith na nse ya lokasa c).

Mpo na makanisi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

bato bafukami liboso ya makolo ya Klisto

Come unto Jesus, na Michael Malm

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya Bana: Tata na Lola alingi kosala mayokani elongo na ngai.