Yaka, Landa Ngai
Sanza ya yambo 12–18. “Na Ebandeli Nzambe Akelaki Likolo mpe Mokili”: Genese 1–2; Mose 2–3; Abalayama 4–5


“Sanza ya Yambo 12–1. ‘Na Ebandeli Nzambe Akelaki Likolo mpe Mokili’: Genese 1–2; Mose 2–3; Abalayama 4–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya Yambo 12–1. ‘Na Ebandeli Nzambe Akelaki Likolo mpe Mokili’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

mokili mpe sanza

Sanza ya Yambo 12–18: “Na Ebandeli Nzambe Azalisaki Likolo mpe Mokili”

Genese 1–2; Mose 2–3; Abalayama 4–5

Lokola mokili nzinganzinga na biso ezali kitoko mpe ya lokumu mpenza, ezali mpasi ya kokanisa mabele ntango yango “ezalaki na lolenge te, mpe mpamba” mpe “na eloko moko te mpe molili” (Genese 1:2; Abalayama 4:2). Eloko moko oyo Bokeli eteyaka biso ezali ete Nzambe akoki kosala na bowumeli ya ntango, eloko moko kitoko uta na eloko moko ebongisama te. Yango esalisaka mpo na komikundola ntango bomoi ezali komonana lokola mobulu. Tata na Lola mpe Yesu Klisto bazali Bakeli, mpe mosala na Bango ya kokela elongo na biso esili te. Bakoki kopelisa mwinda engenga na bangonga ya molili kati na bomoi na biso. Bakoki kotondisa mpamba na biso na bomoi. Bakoki kobongola biso na bikelamu ya bonzambe oyo tosengeli kozala. Yango nde elingi koloba kokelama na elilingi ya Nzambe, na bokokani na Ye (botala Genese 1:26). Tozali na makoki ya kokoma lokola Ye: konetolama, kokumisama, na lolenge lola.

Mpo na koyeba makambo ya buku ya Genese, botala “Genese” na Mokambi na Makomi.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Genese 1:1–25; Mose 2:1–25; Abalayama 4:1–25

“Na nzela ya Mobotami se Moko na ngai nakelaki biloko oyo.”

Atako toyebi te makambo nyonso etali lolenge nini mokili ekelamaki, ezali malamu koyeba maye Nzambe aponaki komonisa etali Bokeli. Nini Nzambe ateyi bino etali yango kati na Genese 1:1–25; Mose 2:1–25; mpe Abalayama 4:1–25? Mpo na nini Alingi bino boyeba makambo oyo? Ntango bozali komanyola masolo oyo, bokoki lisusu kokanisa kotala maye yango ezali koteya bino etali Tata na Lola, Yesu Klisto, mokili, mpe bino moko.

Mpo na kobongisa boyekoli na bino, bokanisa kotanga milongo oyo ntango bozali kotala bikelamu ya Nzambe to ntango bozali koyoka loyembo lokola “All Creatures of Our God and King” (Hymns, no. 31). Bokoki kozwa bafoto ya bikelamu na Ye oyo ezali kosalisa bino boyoka limemya mpo na Mokeli. Bokanisa kokabola bafoto oyo, elongo na litatoli na bino, na basusu.

Botala lisusu Malongi mpe Mayokani 101:32–34.

etando ya langi ya Elanga ya Edene

The Garden of Eden [Elanga ya Edene], na Grant Romney Clawson

Genese 1:26–27; Mose 2:26–27; Abalayama 4:26–27

elembo ya seminele
Nakelami na elilingi ya Nzambe.

Ntango bozali kotanga Genese 1:26–27; Mose 2:26–27; mpe Abalayama 4:26–27, bomanyola nini elingi koloba kokelama na “elilingi” to “lolenge” ya Nzambe, mobali mpe mwasi. Mpo na nini yango ezali motuya epayi na bino boyeba bosolo kati na milongo oyo? Ndakisa, lolenge nini bosolo oyo esimbi lolenge bomimonaka, bomonaka basusu mpe Nzambe? Lolenge nini ekoki kosalisa bino ntango bozali na mayoki ya mabe etali binomei?

Mpo na kosalisa bino bokanisa oyo etali mituna oyo, bomeka kotondisa molongo ya maloba lokola oyo elandi: “Mpo nayebi ete nakelami na elilingi ya Nzambe, naponi mpo na …” Kozongelaka lisusu “Nzoto na yo ezali bule” na Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi (nkasa 22–29) ekoki kosalisa. Bokanisa kopona likambo moko bokosala mpo na kolakisa Nzambe ete boyebi nzoto na bino ezali bule.

Na video “God’s Greatest Creation” (Biblioteke ya Nsango Malamu), Mokambi Russell M. Nelson atatoli na ntina ya nzoto ya kokamwa ya moto. Ntango bozali kotala video, bomituna, “Lolenge nini Tata na Lola alingi ngai nayoka etali nzoto na ngai?” Lolenge nini yango ekeseni na nsango bokoki koyoka uta na basusu?

2:51

God's Greatest Creation

Bato mususu bakoki koloba ete kokelama na elilingi ya Nzambe elingi koloba ete makanisi, mayoki, mpe bamposa na biso nyonso endimami epayi na Ye mpe ete tosengeli te (to tokoki te) kobongisa. Bokoloba nini na likambo yango? Bososoli nini bozwi uta na Mosiya 3:19 mpe Etele 12:27?

Botala lisusu Russell M. Nelson, “Your Body: A Magnificent Gift to Cherish,” Liahona, Sanza ya mwambe 2019, 50–55.

Genese 1:27–28; 2:18–25; Mose 3:18, 21–24; Abalayama 5:14–18

Libala kati na mobali mpe mwasi ekulisami na Nzambe.

“Adama mpe Eva basanganaki elongo na libala mpo na ntango mpe mpo na seko na nguya ya bonganganzambe ya libela [yango]” (Russell M. Nelson, “Lessons from Eve,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1987, 87). Bomanyola yango ntango bozali kotanga Genese 1:27–28; 2:18–25; Mose 3:18, 21–25; mpe Abalayama 5:14–19. Lolenge nini bokoki kotalela libala na bosantu oyo Nzambe apesi yango?

Botala lisusu 1 Bakolinti 11:11; “Libota: Esakola na Mokili,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

Genese 1:28; Mose 2:28; Abalayama 4:28

Nazali moyanoli mpo na kobatela bikelamu ya Nzambe.

Nini Genese 1:28; Mose 2:28; mpe Abalayama 4:28 etalisi na oyo etali mokumba na biso epayi ya bikelamu ya Nzambe? Nini Malongi mpe Mayokani 59:16–21 mpe 104:13–18 ebakisi na bososoli na bino?

Botala lisusu J Gérald Caussé, “Mokumba na Biso na Mokili; Liahona, Sanza ya zomi na moko 2022, 57–59; Topics and Questions, “Environmental Stewardship and Conservation,” Biblioteke ya Nsango Malamu.

Genese 2:2–3; Mose 3:2–3; Abalayama 5:2–3

Nzambe apambolaki mpe asantisaki mokolo ya Saba.

Nzambe asalaki Saba mokolo esantu, mpe Asengaki biso tobatela yango esantu. Ntango bozali kotanga Genese 2:2–3; Mose 3:2–3; Abalayama 5:2–3, bokanisa oyo etali nini esalaka Saba “epambolama” epayi na bino.

Botala lisusu Malongi mpe Mayokani 59:9-13; “Saba Ezali Esengo”(video), Biblioteke ya Nsango Malamu.

0:50

Highlight: The Sabbath Is a Delight

Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Genese 1:1–25; Mose 2:1–25; Abalayama 4:1–25

Yesu Klisto akelaki mabele.

  • Lolenge nini bokosala boyekoli ya Bokeli ezala nsai mpo na bana na bino? Bokoki komema bango libanda mpo na koluka ndenge ya biloko oyo ekelamaka na eleko moko na moko ya Bokeli. Bana na bino bakoki lisusu kotala bafoto ya biloko Yesu akelaki (botala “Bokeli ya Mabele” na Masolo ya Kondimana na Kala, 8–12). Nsima bino mpe bana na bino bokoki kosolola etali lolenge nini boyoki etali Yesu Klisto nsima ya kotanga oyo etali Bokeli.

  • Bokanisa koyemba loyembo elongo etali mokili na biso kitoko, lokola “My Heavenly Father Loves Me” (Children’s Songbook, 228–29). Ntango mosusu bana na bino bakoki kobakisa na loyembo biloko misusu Nzambe akelaki oyo esalisaka bango bayoka bolingo na Ye.

Bosalisa bana babimisa mayele na bango ya kokela biloko ya sika. “Ntango bobengisi bana bayema, batonga, bapakola langi, to bakoma eloko moko elobeli mobeko ya nsango malamu, bosalisa bango basosola malamu koleka mobeko mpe bopesa bango bokundoli ya motuya ya oyo bayekoli” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi32).

Genese 1:26–27; Mose 2:26–27; Abalayama 4:26–27

Nakelamaki na elilingi ya Nzambe.

  • Bana na bino bakoki kokolisa lolenge ya limemya mpe botosi mpo na banzoto na bango moko mpe ya basusu ntango bazali koyekola ete biso banso tokelami na elilingi ya Nzambe. Mpo na kosalisa bango basosola maye yango elingi koloba, bokoki kotika bana na bino batala elilingi na bango na talatala to foto ntango bozali kotanga Mose 2:26–27 na bango. Bokoki lisusu kolakisa bango lolenge nini bana ya banyama bazali mbala mingi kati na “bokokani” ya baboti na bango (botala foto na mateya oyo, mpo na ndakisa). Yango ekoki komema na lisolo etali mpo na nini ezali na motuya mpo na bino boyeba ete bokelami na elilingi ya Tata na bino ya Lola.

    mbongolo mpe bana na ye
  • Bana na bino bakoki kosepela koyema nzoto ya moto mpe kokatakata mayemi na biteni ya kosangisa. Ntango bana na bino bazali kosangisa biteni na bango, bakoki kosolola na oyo etali banzela bakoki kolakisela Tata na Lola ete bazali na botondi mpo na banzoto na bango.

Genese 2:2–3; Mose 3:2–3; Abalayama 5:2–3

Mokolo ya Saba ezali esantu.

  • Ntango bozali kotanga Moses 3:2–3, botuna bana na bino bayoka maye Nzambe asalaki mokolo ya nsambo. Bosalisa bana na bino bazwa to bayema bafoto ya biloko bakoki kosala na eyenga mpo na kosala yango mokolo esantu mpe ekesena na mikolo misusu. Bokabola na moko mpe mosusu mpo na nini ezali motuya epayi na bino bobatela mokolo ya Saba esantu.

  • Bosalisa bana na bino basakana bango na bango kolimbolelaka moninga mpo na nini baponi kosala na eyenga makambo oyo epesaka lokumu na Tata na Lola mpe Yesu. Bopesa likanisi ete basalela Genese 2:2–3 na bandimbola na bango. Lolenge nini kobatela mokolo ya Saba esantu elakisaka bolingo na biso mpo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto?

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.

Yehova atelemi na mapata na loboko na Ye likolo ya mokili oyo Azali kobongisa

The Creation [Bokeli], na Annie Henrie Nader

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Yesu akelaki mabele