Yaka, Landa Ngai
Sanza ya misato 9–15. “Nkolo Azalaki elongo na Yosefe”: Genese 37–41


“Sanza ya Misato 9–15. ‘Nkolo Azalaki elongo na Yosefe’: Genese 37–41” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

“Sanza ya Misato 9–15. ‘Nkolo Azalaki elongo na Yosefe’,” Yaka, Landa Ngai: 2026

Bandeko ya mibali ya Yosefe bazali kolongola ye kazaka

Joseph and His Brothers [Yosefe mpe Bandeko na Ye ya mibali], na Sam Lawlor

Sanza ya misato 9–15: “Nkolo Azalaki elongo na Yosefe”

Genese 37–41.

Toyebaka ete Nzambe apambolaka bato oyo batielaka ye motema mpe babatelaka mitindo na Ye. Kasi ntango mosusu emonanaka bongo te. Ntango mosusu moto yango oyo atielaka Nzambe motema anyokolamaka mpe abwakisamaka na bato ya libota. Ntango mosusu moto oyo aboyaka kobuka mobeko ya bopeto ya nzoto na kibolombe afundamaka na mpamba. Ntango makambo lokola oyo eyelaka biso, tokoki komekama mpo na kosilikela Nzambe. Tokoki komituna, “Ntina nini ezali ya komeka kosala oyo ezali malamu soki yango ezali kaka kokomisa bomoi mpasi?”

Yosefe, mwana mobali ya Yakobo, akokaki komituna yango. Mbala mosusu, moto ya bosembo oyo azalaki kofuluka, bangonga misusu, ezalaki komonana lokola mingi azalaki bosembo, mingi azalaki kokutana na kpokoso. Kasi Yosefe mokolo moko te atikaki Nkolo, mpe Nkolo mokolo moko te atikaki Yosefe. Wana elingi koloba te ete Nkolo apekisaki makambo mabe ekomela Yosefe, kasi kati na yango nyonso, “Nkolo azalaki na ye elongo” (Genese 39:3).

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Genese 37:1–28; 39; 41:9–45

Nkolo akozala elongo na ngai kati na motungisi na ngai.

Mbala mingi, litomba malamu emonanaki lokola kotika Yosefe, kasi Nkolo asalaki yango te. Ntango bozali kotanga lisolo ya Yosefe, bomanyola mituna lokola oyo: Yosefe asalaki nini mpo na kotikala pene ya Nkolo? Lolenge nini Nkolo azalaki “elongo na ye”? (botala Genese 39; 40:1–19; 41:9–45). Boyekoli nini uta na lisolo ya Yosefe oyo ekoki kosalisa bino boyeba bozali ya Nkolo kati na bomoi na bino?

Bokoki mpe komituna mituna ya ndenge moko etali bomoi na bino. Bilembeteli nini bomoni oyo endimisi bino ete Nkolo asundolaki bino te na ntango ya mimekano? Bokanisa lolenge nini bokoki kokabola boyebi na bino elongo na bato ya libota mpe nkola ya mikolo ezali koya (botala 1 Nefi 5:14).

Ya solo, bokozwa mimekano misusu na mikolo ezali koya. Bokoki kosala nini sikawa mpo na kosalisa kondimisa ete mimekano oyo ekobenda bino mosika na Nkolo te? Bokanisa kokomaka mokanda mpo na kolendisa lobi na binomei mpo na kotikala pene na Ye atako boni. Bokoki kobakisa makanisi uta na bomoi ya Yosefe to uta na nsango ya Mpaka D. Todd Christofferson “Mokangano na Biso na Nzambe” (Liahona, Sanza ya mitano 2022, 78–81).

Botala lisusu Yoane 14:18; Baloma 8:28; Alma 36:3; Malongi mpe Mayokani 121:7–8; “Abide with Me!,” Hymns, no. 92.

Genese 37:5–11; 40; 41:1–38

Soki nazali bosembo, Nkolo akokamba mpe akofula ngayi.

Yosefe azalaki na likabo mpo na kososola nsango uta na Nkolo na nzela ya bandoto. Bokoki koyekola nini uta na Genese 37:5–11; 40:5–8; 41:14–25, 37–38 etali kozwa mpe kososola emoniseli uta na Nkolo? Ndakisa, nini bokoki koyekola uta na ndakisa ya Yosefe ntango emoniseli ezali komonana mpasi mpo na esosolama? (botala Genes 40:8; 41:16).

Bomanyola lolenge nini Nkolo azali komonisa bolingi na Ye epayi na bino. Bozali kosala nini mpo kosalela emoniseli oyo Ye apesi bino? Lolenge nini bozali koluka bokambi mosusu uta na Ye?’

Yosefe azali kososola ndoto

Joseph Interpreting the Butler and Baker’s Dreams [Yosefe Azali Kobongola Bandoto ya Mopesi Vinyo mpe Mosali-mampa], na François Gérard

Genese 39:1–20

elembo ya seminele
Na lisalisi ya Nkolo, nakoki kokima lisenginya.

Soki Yosefe asengelaki kopesa toli etali lolenge nini kotelemela lisenginya ya kosala lisumu ya ekobo, bokanisi alingaki koloba nini? Bokanisa etali yango ntango bozali kotanga likambo akutanaki na yango kati na Genese 39. Ndakisa, bokanisa lolenge nini Yosefe akokaki koyanola na mitungisi lokola oyo:

  • Soki moto mosusu te ayebi oyo nazali kosala, likambo ezali wapi ? (botala milongo 8–9).

  • Namekaka kotelemela, kasi lisenginya emonanaka kaka lokola kotika te (botala molongo 10).

  • Nasengeli kosala nini ntango nazali na ezalela oyo wapi lisenginya ezali makasi? (Botala molongo 12).

Lolenge nini bosengeli kolimbola mpo na nini kotosa mobeko ya bopeto ya nzoto ezali motuya? (botala Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi, 23–28)

Ndakisa ya Yosefe, ya solo, ekoki kosalelama na masenginya ya ndenge mosusu. Na likambo oyo ekomelaki Yosefe na moto, bokanisa kosala mwango mpo na koboya mpe kotelemela lisenginya. Ndakisa, bokoki kokanisa lisenginya mpe kokoma makambo ya koboya mpe lolenge nini boko “kimela” ntango lisenginya eyei.

Lisenginya

Makambo ya koboya

Mwango mpo na koyanola

Botala makomi misusu oyo ekoki kopesa nsango ya mwango na bino: Boyekoli nini uta moko na moko etali lolenge nini Mobikisi akoki kosalisa bino botelemela lisenginya? Matai 4:1–11; 1 Bakolinti 10:13; 1 Nefi 15:23–24; 3 Nefi 18:17–18.

Ntango bozali kosala mwango na bino, ekoki lisusu kosalisa mpo na kokanisa oyo etali bangonga na kala ntango boboyaki na elonga to botelemelaki lisenginya. Lolenge nini Mobikisi asalisaki bino? (botala 2 Nefi 4:18–33).

Genese 41:15–57

Nkolo akosalisa ngai namilengela mpo na bakpokoso oyo ekoki koya.

Bobongoli ya ndoto ya Farao ekambaki na toli ya bwanya mpe ya pete mpenza mpo na kobika na nzala (botala Genese 41:15–57). Bokanisa bansango ya molimo nini Nkolo azali na yango mpo na bino na lisolo oyo? Lolenge nini boyoki Alingi bino bomilengela mpo na bakpokoso ya mikolo ekoya?

Botala lisusu David A. Bednar, “We Will Prove Them Herewith [Tokolakisa Bango na Nse],” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 8–11.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Genese 37

Nakoki kozala boboto na Libota na ngai.

  • Kotangaka oyo etali mayoki ya kpokoso na libota ya Yosefe ekoki kotindika lisolo etali lolenge nini tosengeli kozwa bato ya libota. Mpo na kobeta lisolo ya Yosefe mpe bandeko na ye ya mibali uta na Genese 37, bokoki kosalela bafoto oyo ezali na mateya oyo to na “Bandoto Efulama ya Yosefe” ( na Masolo ya Kondimana na Kala, 47–51). Botika bana na bino bakabola makambo bayebi etali lisolo yango. Bokoki kotuna bana na bino bakanisa ete bazalaki na libota ya Yosefe. Nini balingaki koloba to kosala mpo na kozala bapesi kimia na libota yango? Ndakisa, elingi koloba nini “koloba na kimia” na libota na biso? (molongo 4). Lolenge nini Yesu Klisto azali mopesi kimia na libota ya Nzambe?

    2:17

    Joseph’s Inspired Dreams

Genese 37:18–28; 39:20–23; 41:38

Nzambe akoki kosalisa ngai ntango makambo mabe ekomeli ngai.

  • Ntango bana na bino bazali kokutana na bakpokoso, basengeli koyeba ete Nkolo akozala elongo na bango, lokola Azalaki elongo na Yosefe. Ntango mosusu bokoki kosalisa bana na bino basala molongo ya makambo ya kpokoso oyo ekomelaki Yosefe (botala Genese 37:23–28; 39:20; to “Bandoto Efulama ya Yosefe” mpe “Yosefe na Ezipito,” na Masolo Ya Kondimana na Kala, 47–51, 52–56). Nsima ya Kpokoso moko na moko bazwi, bobengisa bana na bino bazongela, “Nkolo azalaki elongo na Yosefe” (Genese 39:2).

    2:17

    Joseph’s Inspired Dreams

    2:50

    Joseph in Egypt

  • Ntango mosusu bana bakoki koluka Genese 39:1–3, 20–23 mpo na ndakisa nyonso ya liboke ya maloba “Nkolo azalaki elongo na Yosefe” mpe maboke ya maloba ekokana. Botika bango bakabola nini bakanisi liboke ya maloba oyo elimboli. Lolenge nini toyebaka ete Nkolo azali elongo na biso? Boyebisa moko na mosusu oyo etali lolenge nini boyokaki ete Nzambe azalaki elongo na bino na boumeli ya ntango ya mikakatano.

Yosefe kati na boloko

Joseph of Egypt in Prison [Yosefe ya Ezipito kati na Boloko], na Jeff Ward (makambo mike mike)

Genese 39:7–12

Na lisalisi ya Nkolo, nakoki kokima lisenginya.

  • Botala liteya ya biloko oyo ekoki kosalisa bana na bino balanda ndakisa ya Yosefe ya kokimaka mwasi ya Potifale: Bosalela bibende ebendaka misusu mpo na kolakisa Yesu Klisto mpe Satana. Bosalela eloko ya libende ya moke, lokola eteni ya papie, mpo na kolakisa biso. Nsima botika bana na bino bamona lolenge nini nguya ya ema likolo ya eloko ya libende ezali makasi mingi ntango ememaka eloko oyo ezali pene na yango mpenza. Lolenge nini likambo Yosefe akutanaki na yango na Genese 39:7–12 ezali kolakisa bosolo oyo? Nini tokoki kosala mpo na kotambola mosika na lisumu mpe pene mingi koleka na Yesu? Bavideo “Temptation Fades as We Seek Christ in Every Thought” (Biblioteke ya Nsango Malamu) mpe loyembo lokola “I Need Thee Every Hour” (Hymns, no. 53) ekoki kosalisa na lisolo oyo.

    2:58

    Temptation Fades as We Seek Christ in Every Thought

    Bosalela miziki “Nzembo mpe miziki mosusu ya bule ekoki kosalisa bana bayoka bolingo ya Nzambe, bayoka Molimo, mpe bayekola bosolo ya nsango malamu. Banzembo, ritme mpe baritme ya pete ekoki kosunga bana bakanisa bosolo ya nsango malamu mpo na mibu oyo ekoya. Ntango bozali koyemba elongo na bana, bosalisa bango bamona mpe basosola mibeko oyo eteyami na nzembo” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi32).

  • Bosalisa bana na bino bakanisa masenginya bakokaki kokutana na yango. Botika bango basala lisano lolenge nini bakoki “kokima” masenginya oyo.

Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga .

Bandeko ya mibali ya Yosefe bazali kolongola ye kazaka

Joseph, the Dream Interpreter [Yosefe, Molimboli Ndoto], na Kristi Kirisberg Harmon

Lokasa ya milulu ya Eteyelo ya bana: Nakoki kozala boboto epayi ya libota na ngai