“Sanza ya minei 13–19. ‘Botelema, mpe Botala Lobiko ya Nkolo: Esode 14–18,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya minei 13–19. ‘Botelema, mpe Botala Lobiko ya Nkolo,’” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Sanza ya minei 13–19: “Botelema, mpe Botala Lobiko ya Nkolo.”
Esode 14–18
Bayisalaele bazwamaki na motambu. Mbu Motane ezalaki na ngambo moko, mpe mampinga ya Farao bazalaki na ngambo mosusu. Bokimi na bango uta Ezipito, emonanaki lokola, elingaki ezala ya ntango mokuse. Kasi Nzambe azalaki na nsango mpo na Bayisalaele ete alingaki bango bamikundola na bankola nyonso: “Bobanga te. Nkolo akobunda mpo na bino” (Esode 14:13–14).
Uta ngonga wana, ntango bato ya Nzambe bazalaki na mposa ya bondimi mpe mpiko, babetaki lisolo oyo. Ntango Nefi alingaki kofula bandeko na ye ya mibali, alobaki, “Tika tozala makasi lokola Mose; mpo solo alobaki na mai ya Mbu Etane, mpe mai yango ekabwanaki ngambo na ngambo, mpe batata na biso batambolaki, uta na bokangemi, likolo ya mabele ekawuka” (1 Nefi 4:2). Ntango Mokonzi Limhi alingaki bato na ye ya boombo “batombola mitu na [bango], mpe basepela,” akundolisaki bango na ntina ya lisolo kaka moko oyo (Mosiya 7:19). Alma asalaki bongo, ntango alingaki kotatola epayi ya mwana na ye na ntina ya nguya ya Nzambe (botala Alma 36:28). Mpe ntango tomiyoki tokangami na motambu—ntango tolingi bondimi ya moke koleka mpo na “kotala lobiko ya Nkolo”—tokoki komikundola lolenge nini “Nkolo abikisaki Yisalaele mokolo oyo” (Esode 14:13, 30).
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Esode 14; Esode 15:1–21
Nkolo akoki kosala “mosala monene” kati na bomoi na ngai.
Ntango bozali kotanga Esode 14:1–10, bokanisa lolenge nini Bayisalaele bakokaki komiyoka ntango bamonaki mampinga ya Farao kopusana. Mbala mosusu bomiyokaka ete bozali na mposa ya likamwisi mpo na kolonga mikakatano bozali kokutana na yango. Bozwi nini na Esode 14:13–31 oyo efuli bino boluka nguya ya Nzambe kati na bomoi na bino? Bomanyola lolenge nini bomonaki nguya na Ye na ntango ya kala. Boyekoli nini etali Ye uta na makambo oyo?
Esode 15:1–19 ezali loyembo ya masanzoli oyo Bayisalaele bayembaki ntango Nkolo akabolaki Mbu Motane. Bafraze nini na nzembo oyo bomoni ete ezali na ntina mingi? Mbala mosusu ezali na loyembo moko oyo boyokaka mposa ya koyemba ntango Nkolo asali likambo moko ya kokamwa mpo na bino, lokola “Redeemer of Israel” (Hymns, no. 5). Bokanisa koyemba to koyoka yango lokola eteni ya bokumbameli na bino lelo.
Botala lisusu Malongi mpe Mayokani 8:2–3.
Esode 15:22–27; 16:1–15; 17:1–7
Nkolo akoki kokomisa biloko ya bololo sukali.
Kotanga oyo etali mobembo ya Yisalaele ekoki kokamba bino bokanisa na oyo etali biloko kati na bomoi na bino oyo ezali komonana lokola “bololo” lokola mayi ya Marah (botala Esode 15:23–27). Lolenge nini Nkolo akomisi sukali biloko ya bololo kati na bomoi na bino? Motuya nini makambo bokutana na yango ezalaki na yango kati na bomoi na bino?
Bokomona bandakisa mingi ya makambo ya bololo mpo na Bayisalaele kati na Esode 16 mpe 17. Ekoki kozala pete na koloba mabe na ntina na koyimayima to komilelalela na bango, kasi ntango bozali kotanga, botala soki bino mpe bosila kosala likambo ya ndenge moko. Boyekoli nini uta na makambo ya Bayisalaele oyo ekoki kosalisa bino koyimayima mingi te mpe kotyela Nzambe motema mingi? Milongo oyo eteyi bino nini etali ya Nzambe?
Botala lisusu 1 Nefi 2:11–12.
Bayisalaele bazali kosangisa mana Neo-gothic fresco, Trnava (makambo ya mikiemikie)
Esode 16
Nkolo apesaka ngai bilei ya molimo.
Lokola biso nyonso tozalaka na mposa ya kolya, mbala mingi Nkolo akokanisaka makambo ya molimo na bilei. Boluka mateya na Ye ya molimo kati na makambo ya Bayisalaele elongo na mana kati na Esode 16. Ndakisa, bozwi nini na malako ya Nkolo kati na Esode 16:16, 19, 22–26 oyo ezali koyokana na bilei na bino ya molimo?
Mpo na kozwa mateya mosusu Nkolo akoki kolinga ete boyekola uta na likamwisi oyo, bomanyola mituna lokola oyo:
-
Nini Nkolo apesi ngai oyo ezali lokola mana ya mikolo nyonso oyo Apesaki Bayisalaele?
-
Nini ekoki ngai kosala oyo ezali lokola kosangisa mana?
Bokoki kozwa mayele ya kobakisa kati na moko to mingi ya bavideo oyo: “Daily Bread: Pattern,” “Daily Bread: Experience,” and “Daily Bread: Change” (Biblioteke ya Nsango Malamu).
Daily Bread: Pattern
Daily Bread: Experience
Daily Bread: Change
Bokanisa makambo mosusu, longola kolya, oyo bosalaka mokolo na mokolo. Mpo na nini makambo mosusu esengelami kosalama mokolo na mokolo mpo na kozala solo? Nini bomiyoki ya kofulama kosala mpo na koluka boyebi ya molimo ya mokolo na mokolo?
Botala lisusu Dieter F. Uchtdorf, “Bozongisi ya Mokolo na Mokolo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 77–79; “Daily Restoration” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu.
Daily Restoration
Esode 17:1–7
Yesu Klisto azali libanga na ngai ya molimo mpe mayi ya bomoi.
Bokanisa oyo etali Mobikisi ntango bozali kotanga Esode 17:1–7. Lolenge nini Yesu Klisto azali lokola libanga mpo na bino? (botala Nzembo 62:6–7; Elamani 5:12). Lolenge nini Ye azali lokola mayi? (botala Yoane 4:10–14; 1 Bakonliti 10:1–4; 1 Nefi 11:25).
Boluka biloko oyo ezali kotatola mpo na Klisto. Ntango nyonso oyo makomi elimboli makambo oyo ekoki kozala bilembo ya Yesu Klisto, lokola Esode 17:1–7 esalaka, ekoki kozala libaku mpo na ndakisa ya liteya. Koluka to kosimba libanga to mayi ekomisaka yango pete mpo na kososola lolenge nini biloko ezali lokola Yesu Klisto. Soki bokoki kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na koyekola, ekozala ya kobosana te mpe ya motuya mingi.
Esode 17:8–16; 18:13–26
Bayekoli basalisanaka moko na mosusu “komema mokumba” ya kosala mosala ya Nkolo.
Ekoki kozala na bangonga kati na bomoi na bino ntango bokoki komimona lokola Mose—ntango basusu bazali kotalela bino, kasi ya bino “maboko [emiyoki] kilo” (Esode 17:12). Bangonga misusu, bokoki kozala mingi lokola Alona, Hur mpe Jethro, oyo basungaki Mose. Bomitya binomei na esika ya mokomoko ya bato oyo ntango bozali kotanga Esode 17:8–16; 18:13–26, mpe botala nini Nkolo ateyi bino etali mosala na Ye.
Botala lisusu Mosiya 4:27; 18:8–9.
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge.
Makanisi mpo na Koteya Bana
Esode 14:5–22
Nkolo akoki kosala “mosala monene” kati na bomoi na ngai.
-
Ntango Nkolo akabolaki Mbu Motane, Mose mpe Bayisalaele bamonaki lolenge nini Ye azali na nguya makasi. Botika bana na bino basalisa bino bokanisa lolenge moko ya kosekisa mpo na komekola lisusu lisolo yango uta Esode 14:5–22 (botala lisusu “Pasika” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 70–74). Bokoki mbala mosusu kotya bakiti to babulangeti mpe “kokabola” yango lokola Mbu Motane. Nsima bokoki kokabola moko na mosusu lolenge nini bomoni nguya ya Nzambe kati na bomoi na bino.
2:54The Passover
-
Nini Malongi mpe Mayokani 8:2–3 ebakisi na bososoli na biso ya lisolo kati na Esode 14? Bokanisa koyebisa bana na bino maye matali makambo oyo ntango Molimo Mosantu ayebisaki bino eloko moko kati na makanisi to motema na bino, mpe kobengisa bango balobela makambo na bango. Bokoki lisusu koyemba loyembo moko etali Molimo Mosantu, lokola “Let the Holy Spirit Guide” (Hymns, no. 78).
Esode 15:22–25
Nkolo akoki kokomisa biloko ya bololo sukali.
-
Ntango mosusu bino mpe bana na bino bokoki komela eloko moko ya sukali mpe eloko mosusu ya bololo ntango bozali koyekola Esode 15:22–25 elongo. Lolenge nini Mobikisi asali ete makambo ya “bololo” ekoma “sukali” kati na bomoi na biso?
Esode 15:23–25; 16:14–15; 17:1–6
Yesu Klisto azali Mayi na ngai ya Bomoi, Lipa na ngai ya Bomoi, mpe Libanga na ngai.
-
Ntango bino mpe bana na bino bozali kotanga Esode 15:23–25; 16:14–15; 17:1–6, botika bango basalisa bino bomona biloko mpo na kosalisa kobeta lisolo moko na moko—lokola etape (kobikisa mayi ya Marah), molangi to nzungu (kotondisa na mana), mpe libanga (mpo na mayi ya Horeb). Milongo oyo ekundolisi biso nini etali maye Yesu Klisto asalaka mpo na biso? Lokola eteni ya masolo, bokoki kotanga Matai 7:24–27; Yoane 4:10–14; 6:29–35, 48–51; Elamani 5:12; Malongi mpe Mayokani 20:77, 79.
One Before God [Moko Liboso ya Nzambe], na Joseph Brickey (makambo ya mike mike)
Esode 17: 8–16; 18:13 -26 16
Nakoki kosalisa “komema mokumba” ya kosala mosala ya Nkolo.
-
Ntango bozali kotanga Esode 17:8–16, bokoki kobengisa mwana moko atombola maboko na ye likolo na mopepe. Ntango mwana alembi, bana misusu bakoki kosalisa, lolenge Alona mpe Hur basalisaki Mose. Lisolo oyo eteyi nini etali lolenge tokoki kosalisa bokonzi ya Nzambe elonga? Bokoki lisusu kotanga Esode 18:13–26 mpe kolobela mikumba ya kilo ya bato oyo basalaka na palwasi na bino. Nini tokoki kosala lelo mpo na kosalisa bakambi na biso ya Eklezia, kaka lokola Alona mpe Hur basalisaki profeta Mose?
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.