“Sanza ya minei 6–12. ‘Bomikundola Mokolo Oyo, Bobimaki na Ezipito’: Esode 7–13,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Sanza ya minei 6–12. ‘Bomikundola Mokolo Oyo, Bobimaki na Ezipito,’” Yaka Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Elilingi ya Mose mpe Alona na ndako ya Farao, na Robert T. Barrett
Sanza ya minei 6–12: “Bomikundola Mokolo Oyo, Bobimaki na Ezipito”
Esode 7–13
Bolozi nsima ya bolozi enyokolaki Ezipito, kasi Farao aboyaki kaka kotika Bayisalaele bakende. Kasi, Nzambe akobaki komonisa nguya na Ye mpe kopesa Farao mabaku ya kondima ete “Ngai nazali Nkolo” mpe “ezali na moto moko te lokola ngai na mokili mobimba” (Esode 7:5; 9:14). Na ntango yango, Mose mpe Bayisalaele bazalaki kotala na bobangi nyonso bilakiseli wana ya nguya ya Nzambe mpo na bango. Ya solo bilembo wana oyo ekobaki endimisaki bondimi na bango epayi ya Nzambe mpe elendisaki bolingi na bango ya kolanda profeta ya Nzambe. Bongo, nsima ya malozi libwa ya nsomo oyo elongaki te kosikola Bayisalaele, ezalaki bolozi ya zomi—liwa ya mwana ya liboso, ata mpe mwana ya liboso ya Farao—oyo nsukansuka esukisaki bokangami. Yango emonani ya kolongobana mpamba te na bowumbu nyonso ya molimo, ezali bobele na nzela moko ya kokima yango. Ezali bobele libonza ya Yesu Klisto, Mwana ya liboso—makila ya Mwana na Mpate oyo ezangi mbeba—oyo ekobikisa biso.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Esode 7–11
Nakoki kopona kolembisa motema na ngai.
Na elikya ete bolingi na bino ekotelemela bolingi ya Nzambe te lokola ya Farao ezalaki. Atako bongo, biso nyonso tozalaka na bantango oyo mitema na biso ezalaka na boboto te lolenge esengelaki ezala. Nini etuti bino etali eyano ya Farao na malozi kati na Esode 7:14–25; 8:5–32; 9:1–26; 10:12–29; 12:29–33? Botala bososoli kati na Bobongoli ya Joseph Smith ya Esode 7:3, 13; 9:12.
Mpo na nini “makasi” ezali ndimbola ya malamu ya motema ya Farao? Bokanisa nini bokoki koyekola uta milongo oyo elobeli kozala na motema boboto: 1 Nefi 2:16; Mosiya 3:19; Alma 24:7–8; 62:41; Ether 12:27. Ntango bozali kotanga oyo etali mbano ya motema makasi ya Farao, bomanyola na ntina ya ezalela ya motema na bino. Bambongwana nini boyoki ya kofulama mpo na kosala?
Esode 12:1–42
Yesu Klisto akoki kobikisa ngai likolo ya Bomikabi na Ye.
Nzela se moko mpo na Bayisalaele babikisama na bolozi ya zomi, oyo elimbolami na Esode 11:4–5, ezalaki ya kolanda na alima mitindo Nkolo apesaki na Mose kati na Esode 12, molulu oyo eyebani lokola Pasika. Pasika eteyaka biso na nzela ya bilembo ete kaka lokola Nkolo akangolaki Bayisalaele uta na bowumbu na Ezipito, akoki mpe kokangola biso na bowumbu ya masumu. Mpo na koyeba ndimbola ya bilembo kati na Esode 12:1–42, bokoki kosala etanda lokola oyo elandi:
|
Elembo |
Bandimbola oyo Ekoki Kozala |
Nsango ya Nzambe epayi na ngai |
|---|---|---|
Elembo Ebandeli ya basanza (molongo 2; Nkolo apesaki mobeko na Bayisalaele mpo na kosalela molulu oyo mpo na kolakisa ebandeli ya manaka na bango). | Bandimbola oyo Ekoki Kozala Yango esengelaki ezala ebandeli ya sika ya Yisalaele. Basengelaki “kobotama lisusu.” | |
Elembo Mwana na mpate (milongo 3–5). | Bandimbola oyo Ekoki Kozala Botala Yoane 1:29; 6:54; 1 Petelo 1:19. | |
Elembo Makila ya mwana na mpate liloko ya ekuke (milongo 7, 13, 23). | Bandimbola oyo Ekoki Kozala Botala Mosiya 4:2; Emoniseli 12:11. | |
Elembo Lipa ezanga mfulu (milongo 8, 15, 19–20). | Bandimbola oyo Ekoki Kozala Mfulu ekoki kozala elembo ya libebi mpamba te ebebaka na pete nyonso. Botala Matai 16: 6–12; Yoane 6:35. | |
Elembo Matiti ya bololo (molongo 8). | Bandimbola oyo Ekoki Kozala Bokundoli ya bololo ya lisumu mpe bowumbu. Botala Esode 1:14; Mose 6:55. | |
Elembo Kolia na lombangu, kolata mpo na kokende (molongo 11). | Bandimbola oyo Ekoki Kozala Elembo ya lombangu mpo na kolongwa na bowumbu ya masumu. Botala Genese 39:12; 2 Timote 2:22. | |
Elembo Mobebisi (milongo 13, 23). | Bandimbola oyo Ekoki Kozala Botala Malongi mpe Mayokani 89:18–21. | |
Elembo The Israelites were set free [Bayisalaele bakangolamaki] (milongo 29–32). | Bandimbola oyo Ekoki Kozala | |
Nini mosusu bozwi na malako mpe bilembo ya Pasika oyo ezali kokundolisa bino Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye? Bilembo oyo epesi bino likanisi nini etali lolenge nini ya kozwa mapamboli ya Bomikabi na Ye?
Boya epayi ya Klisto na koyebaka bilembo oyo etatoli na ntina na Ye. “Biloko Nyonso,” Nkolo alobaki, “ekelamaki mpe esalemaki mpo na kotatola nkombo na ngai” (Moses 6:63; botala lisusu 2 Nefi 11:4). Kati na Esode 12, bilembo lokola mwana na mpate, makila, lipa ezanga mfulu, makamwisi, mpe bokangolami nyonso ezali kolakisa Klisto. “Ntango tososoli lolenge nini biloko oyo ekokani na Mobikisi, ekoki koteya biso na ntina ya nguya mpe bizalela na Ye” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 7).
In Remembrance of Me [Mpo na Kokanisa Ngai], na Walter Rane
Esode 12:14–17, 24–27; 13:1–16
Elambo esalisaka ngai namikundola bokangolami na ngai na nzela ya Yesu Klisto.
Mobikisi atindaki Bayisalaele batosaa Pasika mobu nyonso mpo na kosalisa bango bamikundola Ye akangolaki bango, kutu nsima ya bokangami na bango ekomaki bokundoli ya mosika. Ntango botangi malako na Ye kati na Esode 12:14–17, 24–27; 13:1–16, bokanisa oyo etali nini bozali kosala mpo na kokundola mapamboli ya Nzambe mpo na bino. Lolenge nini bokoki kobatela makundoli oyo “na boumeli ya bankola nyonso”? (botala Esode 12:14, 26–27).
Bokokani nini bozali komona kati ya feti ya Pasika na elambo? Nini ekoki bino kosala mpo na “komikundola ntango nyonso” Yesu Klisto? (Moroni 4:3; 5:2).
Bokoki lisusu komanyola makambo mosusu Nkolo alingi biso tomikundola, komona, na ndakisa, Elamani 5:6–12; Moroni 10:3; Malongi mpe Mayokani 3:3–5, 10; 18:10; 52:40.
Botala lisusu Kevin W. Pearson, “Bozali Kaka na Bolingi?,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2022, 67–69; “Always Remember Him” (video), Biblioteke ya Nsango Malamu; “In Memory of the Crucified,” Hymns, no. 114.
Always Remember Him
Mpo na koyeba makambo mosusu, botala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .
Makanisi mpo na Koteya Bana
Esode 7–11
Nkolo azali na nguya koleka biloko nyonso.
-
Malozi elimbolami kati na Esode 7–11 elakisaki Baezipito mpe Bayisalaele ete Nkolo azali na nguya monene. Nkolo akosalisa bana na bino na bomoi na bango mobimba ntango bazali na bondimi kati na nguya na Ye. Mpo na kosalisa bango bayekola uta na lisolo oyo, bokoki kopesa mwana mokomoko lokasa ekabolami na biteni 10, mpe kobengisa bango bayema bilili ya babolozi elimbolami kati na milongo oyo: Esode 7:17–18; 8:1–4; 8:16–17; 8:20–22; 9:1–6; 9:8–9; 9:22–23; 10:4–5; 10:21–22; 11:4–7 (botala lisusu “Babolozi ya Ezipito” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 67–69). Botanga elongo Esode 7:5 mpe 9:14 mpo na kolimbola mpo na nini Nkolo atindaki malozi.
2:3The Plagues of Egypt
-
Bosolola na bana na bino lolenge nini Nkolo alakisaki bino “ete ezali na moko te lokola [Ye] kati na mokili mobimba” (Esode 9:14). Botika bango baloba lolenge nini bayebi ete Nkolo azali na nguya monene.
Esode 8:28–32; 9:7
Nkolo akoki kosalisa ngai nazala na motema ya boboto.
-
Mpo na kosalisa bana na bino bamona na makanisi nini elingi koloba kozala na motema boboto, ekoki kozala esengo kolakisa bango eloko moko ya makasi, lokola libanga, mpe mosusu oyo ezali pete mpe emelaka mayi, lokola eponje. Bokoki mpe lisusu kosopa mayi likolo ya biloko oyo mpo na kolakisa boniboni pete motema ya boboto eyambaka maloba ya Nkolo. Bokoki nsima kotanga elongo mwa milongo kolimbolaka lolenge Farao ayonalaki na malozi etindamaki na Nzambe (botala Esode 8:28–32; 9:7). Nini kati na biloko oyo elakisi bolamu to ezaleli ya motema ya Farao? Elingi koloba nini kozala na motema ya boboto? (botala Mosiya 3:19).
-
Bino na bana na bino bokoki kosala molongo ya mwa misala oyo ekoki kolakisa ntango tozali na motema makasi (ndakisa, kosalela maloba ezanga bolingo to kozanga bolingi ya kokabola). Lolenge nini tokoki kolakisa Nkolo ete tolingi kozala na mitema ya boboto?
Esode 12:1–13
Elambo ekoki kosalisa ngai nakanisa Yesu.
-
Pasika eteyaki Bayisalaele kozela Mobikisi mpe likabo na Ye mpo na biso. Nsima ya kotanga Esode 12:1–13 elongo, bosalisa bana na bino bamona bokokani kati ya makambo mike mike ya Pasika mpe Bomikabi ya Yesu Klisto (botala lisusu “Pasika” kati na Masolo ya Kondimana na Kala, 70–74). Ndakisa, lolenge nini Yesu azali lokola mwana na mpate alimbolami kati na molongo 5?
2:54The Passover
-
Lelo, toliaka elambo mpo na komikundola likabo ya Yesu. Bokoki kolakisa bana na bino elilingi moko ya elambo mpe kolobela lolenge nini makuli esalisaka biso tokanisa Yesu Klisto. Bokoki kosalisa bana na bino bamona liloba “Kokundola” kati na nsambo ya elambo (botala Moroni 4–5). To boyemba elongo loyembo moko bolingaka mingi etali elambo, mpe bosalisa bana na bino bamona liyoki ya kimia oyo bazali na yango ntango bakanisaka oyo etali Mobikisi. Ndenge nini tokoki koluka liyoki wana ntango tozwi elambo?
Mpo na mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini Moninga.