Tata na Lola Tala lisusu Bonzambe, Nzambe Tata ya milimo ya bato nyonso (Nze. 82:6; Mat. 5:48; Yoan. 10:34; Lom. 8:16–17; Gal. 4:7; 1 Yoan. 3:2). Yesu azali Mwana Mobotami se Moko na Ye na mosuni. Moto atindamaki kotosa mpe kopesa limemia monene na Tata mpe kosambela Ye na nkombo ya Yesu. Soki bolimbisi bato, Tata na bino ya Lola akolimbisa bino lisusu, Mat. 6:14 (Mat. 18:35; 3 Nef. 13:14). Tata na bino ya Lola ayebi ete bozali na mposa ya biloko nyonso oyo, Mat. 6:26–33 (3 Nef. 13:26–33). Boni koleka ekopesa Tata na bino ya Lola Molimo Mosantu na baoyo basengi ye, Luk. 11:11–13. Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto apambolama, Efe. 1:3. Bozali na niongo ya seko na Tata na bino ya Lola, Mos. 2:34. Klisto akembelaki nkombo ya Tata, Etel. 12:8. Basantu basengeli kopesa litatoli ya minyokoli na bango liboso ete Tata abima uta na esika na ye ya kobombana, Mal&May 123:1–3, 6. Tozwaki mapamboli minene mpe ya nkembo uta na Tata na biso ya Lola, JS—Mambi ya Kala 1:73.