Kozala na Molimo ya Nkolo esalaka mbongwana ya makasi na motema ya moto na lolenge ete akozala lisusu te na mposa ya kosala mabe, kasi akolinga nzokande koluka makambo ya Nzambe.
Baoyo wana bandimaka na nkombo ya Klisto babotamaki, na makila te, kasi na Nzambe, Yoan. 1:12–13 .
Longola se soki moto abotami na mai mpe na Molimo, akoki kokota na bokonzi ya Nzambe te, Yoan. 3:3–7 .
Tokoki lisusu kobotama na nzela ya liloba ya Nzambe, 1 Pet. 1:3–23 .
Oyo nyonso abotami na Nzambe akobaka kati na lisumu te, BJS, 1 Yoan. 3:9 .
Mpo ete nyonso oyo ebotami na Nzambe elongaka mokili, 1 Yoan. 5:4 .
Baoyo wana banso babotami na Klisto bayokani na Nzambe, Mos. 3:19 ; 5:2–7 .
Bato nyonso basengeli kobotama lisusu; iyo, kobotama na Nzambe, Mos. 27:25–26 (Alma 5:49 ).
Bosili kobotama na Nzambe na nzela ya molimo, Alma 5:12–19 .
Soki bobotami lisusu te, bokoki kosangola libula ya bokonzi ya lola te, Alma 7:14 .