Cowdery, Oliver Mpaka ya mibale ya Eklezia ezongisami mpe moko ya Banzeneneke Basato ya ebandeli ya bonzambe mpe bosolo ya Buku ya Mormon. Asalaki lokola mokomeli wana ezalaki Joseph Smith kobongola Buku ya Mormon uta na bapalaki ya wolo (JS—Mambi ya Kala 1:66–68). Azwaki litatoli ya bosolo ya bobongoli ya Buku ya Mormon, Mal&May 6:17, 22–24. Akulisamaki na Yoane Mobatisi, Mal&May 13 (Mal&May 27:8; JS—Mambi ya Kala 1:68–73, tala litangi na molongo 71). Nsima na bino kozwa bondimi mpe komona yango na miso na bino, bosengeli kotatola ete bomonaki yango, Mal&May 17:3, 5. Nasili komonisa epayi na bino, na nzela ya Molimo na ngai, ete makambo oyo bokomaki ezali solo, Mal&May 18:2. Aponamaki mpe akulisamaki moko ya bakapita likolo ya bimoniseli, Mal&May 70:3. Azwaki bafungola ya bonganganzambe elongo na Joseph Smith, Mal&May 110.