12. Yelusaleme na Ntango ya Yesu
Nordi
Ndimbola
Engumba na ntango ya Yesu
Ntei oyo etiamaki bifelo nsima
Nzela ya Samalia
Beseta (Engumba ya sika)
Gologota
Lilita ya Elanga
Liziba ya Betesata
Ekuke ya Mbisi
Antonia Fortress
Liziba ya Yisalaele
Elanga ya Getesemane
Ekuke ya Susa
Ekuke ya Bampate
Balasani ya Solomo
Tempelo
Ngomba ya Bilaya
Gbagba
Ekuke Kitoko
Nzela ya Emau mpe ya Yafo
Liziba ya Ndako molai
Nzela ya Betania mpe ya Yeliko
Nsamba ya Tempelo
Ndako ya Asimonena
Ekuke ya Mokonzi
Nzela ya mai na nse ya mabele
Ndako ya Mokonzi ya Elode
Bibuteli na Tempelo
Moto ya mai ya Gihona
Liziba ya Nioka
Engumba ya Likolo
Nzela ya mai na nse ya mabele
Ndako ya Kayafa
Nzela ya bodusoli ya Hizikiya
Lobwaku ya Hinomo
Kisuku ya Likolo
Lobwaku ya Kidilono
Engumba ya Nse
Liziba ya Siloama
Ekuke ya Mai
Nzela ya Beteleme mpe ya Hebeloni
Moto ya mai ya Ene-logele
Nzela ya Mai ya Monana
Metele
0 100 200 300 400
A B C D
1 2 3 4 5 6 7 8
1
2
3
4
5
6
7
8
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
-
Gologota Ekoki kozala esika babakaki Yesu na ekulusu (Mat. 27:33–37).
-
Lilita ya Elanga esika malamu oyo bakundaki nzoto ya Yesu akundamaki (Yoan. 19:38–42). Mosekwi Klisto amonanaki na Malia Magadana na elanga libanda ya lilita na Ye (Yoan. 20:1–17).
-
Antonia Fortress Ekoki kozala ete Yesu afundamaki, akitisamaki, atiolamaki, mpe afiatolamaki na esika oyo (Yoan. 18:28–19:16). Paulo akangamaki mpe alobaki lisusu lisolo ya bobongwami na ye (Mis. 21:31–22:21).
-
Liziba ya Betesata Yesu abikisaki moto ya maladi na Saba (Yoan. 5:2–9).
-
Tempelo Gabaliele alakaki Zekalia ete Elisabeta akobota mwana mobali (Luk. 1:5–25). Elamba oyo ezipaka na tempelo epasokaki na liwa ya Mobikisi (Mat. 27:51).
-
Balasani ya Solomo Yesu asakolaki ete Azali Mwana ya Nzambe. Bayuda bamekaki kobamba Ye mabanga (Yoan. 10:22–39). Petelo ateyaki boyamboli nsima ya kobikisa motengoli (Mis. 3:11–26).
-
Ekuke Kitoko Petelo mpe Yoane babikisaki motengoli (Mis. 3:1–10).
-
Nsamba ya Tempelo Yesu asenginiamaki na Satana (Mat. 4:5–7). (Esika emonisami kozala ya likambo oyo.)
-
Ngomba Esantu (bisika eyebani te)
-
Masolo ya momeseno mayebisi ete awa Abalayama atongaki etumbelo mpo na libonza ya Yisaka (Gen. 22:9–14).
-
Solomo atongaki tempelo (1 Mik. 6:1–10; 2 Nta. 3:1).
-
Bababiloni babebisaki tempelo penepene na mobu 587 Liboso na mbotama ya Klisto (2 Mik. 25:8–9).
-
Zelubabele atongaki lisusu tempelo yango penepene na mobu 515 Liboso na mbotama ya Klisto (Ejela 3:8–10; 5:2; 6:14–16).
-
Elode ayeisaki libanda ya tempelo monene mpe atongaki lisusu tempelo kobanda na mobu 17 Liboso na mbotama ya Klisto. Balakisaki Yesu lokola mwana moke (Luk. 2:22–39).
-
Na mobu ya 12, Yesu ateyaki kati na tempelo (Luk. 2:41–50).
-
Yesu apetolaki tempelo (Mat. 21:12–16; Yoan. 2:13–17).
-
Yesu ateyaki kati na tempelo na mabaku ebele (Mat. 21:23–23:39; Yoan. 7:14–8:59).
-
Baloma na nse ya Tito babebisaki tempelo na 70 ya Mobu ya Nkolo.
-
-
Elanga ya Getesemane Yesu amonaki mpasi, atekamaki, mpe akangamaki (Mat. 26:36–46; Luk. 22:39–54).
-
Ngomba ya Bilaya
-
Yesu ayebisaki liboso bobebisami ya Yelusaleme mpe ya tempelo. Ye mpe alobaki na ntina ya Boyei ya Mibale (Mat. 24:3–25:46; tala lisusu JS—Mat.).
-
Uta na awa Yesu abutaki na lola (Mis. 1:9–12).
-
Mwa 24, sanza ya zomi ya mobu 1841, Mpaka Orson Hyde abulisaki Mabele Masantu mpo na bozongi ya bana ya Abalayama.
-
-
Moto ya mai ya Gihona Solomo apakolamaki lokola mokonzi (1 Mik. 1:38–39). Hizikiya atimolamaki ebimelo mpo na komema mai uta na moto ya mai kati na engumba (2 Nta. 32:30).
-
Ekuke ya Mai Ejela atangaki mpe alimbolaki mobeko ya Mose na bato (Nehem. 8:1–8).
-
Lobwaku ya Hinomo Nzambe ya lokuta Moleke akumbamelaki, oyo ezalaki mpe na libonza ya bana mike (2 Mik. 23:10; 2 Nta. 28:3).
-
Ndako ya Kayafa Yesu amemamaki liboso ya Kayafa (Mat. 26:57–68). Petelo awanganaki ete ayebi Yesu (Mat. 26:69–75).
-
Kisuku ya Likolo Esika ya kala eyebani na momeseno wapi Yesu aliaki elambo ya Pasika mpe atiaki mobeko ya elambo (Mat. 26:20–30). Asukolaki makolo ya Bapostolo (Yoan. 13:4–17) mpe ateyaki bango (Yoan. 13:18–17:26).
-
Ndako ya Mokonzi ya Elode Klisto amemamaki liboso ya Elode, ekoki kozala na esika oyo (Luk. 23:7–11).
-
Yelusaleme (bisika eyebani te)
-
Melikisedeki ayangelaki lokola mokonzi ya Saleme (Gen. 14:18).
-
Mokonzi Dawidi akamataki engumba uta na Bayebusi (2 Sam. 5:7; 1 Nta. 11:4–7).
-
Engumba ebebisamaki na Bababiloni penepene na mobu 587 Liboso na mbotama ya Klisto (2 Mik. 25:1–11).
-
Molimo Mosantu motondisaki mingi na mokolo ya Pantekote (Mis. 2:1–4).
-
Petelo mpe Yoane bakangamaki mpe bamemamaki liboso ya lisanga (Mis. 4:1–23).
-
Anania mpe Safila bakosaki Nkolo mpe bakufaki (Mis. 5:1–10).
-
Petelo mpe Yoane bakangamaki, kasi anjelu moko akangolaki bango uta na boloko (Mis. 5:17–20).
-
Bapostolo baponi bato sambo mpo na kosunga bango (Mis. 6:1–6).
-
Litatoli ya Setefano epayi na Bayuda ebwakamaki, mpe babetaki ye mabanga na kino liwa (Mis. 6:8–7:60).
-
Yakobo abomamaki lokola martiru (Mis. 12:1–2).
-
Anjelu moko akangoli Petelo uta na boloko (Mis. 12:5–11).
-
Bapostolo bakamati ekateli na likambo etali ganza (Mis. 15:5–29).
-
Baloma na nse ya Tito babebisaki engumba na 70 ya Mobu ya Nkolo.
-