11. Mabele Masantu na Ntango ya Boyokani ya Sika
Nordi
Ndimbola
Ndelo ya bingumba ya politiki
Sidona
Abilene
Salepata
Ngomba ya Lebanona
Damaseke
Litani
Sulia
Ngomba ya Helemone
Falapala
Tulo
Fenisia
Kaisalia ya Filipo
Lobwaku ya Yule
Galilea
Potolemai (Ako)
Kolazi
Betesaida
Kapalanauma
Kisoni
Kana
Magadana
Mbu ya Galilea (Kinelete)
Ngomba ya Kalemele
Nasalete
Tibelia
Ngomba ya Tabola
Yalamu
Naina
Gadala
Kaisalia
Ngomba ya Giliboa
Dekapoli
Samalia
Salema?
Samalia
Ainona?
Mabele ya polele ya Saloni
Sukala
Ngomba ya Ebali
Yaboko
Yafo
Ngomba ya Gelizimi
Alimataya?
Ayalone
Betele
Ebale ya Yaladene
Pelea
Filadelefi
Yeliko
Mbu Monene (Mbu ya Meditelanea)
Azoto
Soleke
Emau
Betabara
Yelusaleme
Ngomba ya Bilaya
Betefage
Betania
Kumola
Mabele ya polele ya Moaba
Ngomba ya Nebo
Asekelone
Ela
Beteleme
Yuda
Gaza
Hebeloni
Makalusi
Gelala
Idumea
Mai ya Monana
Alenono
Besolo
Bele-Seba
Masada
Esobe ya Yuda
Nabota
Zelede
Kilometele
0 20 40 60
A B C D
1 2 3 4 5 6 7 8
1
1
2
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
-
Tulo mpe Sidona Yesu amekaki Kolazi mpe Betesaida na Tulo mpe Sidona (Mat. 11:20–22). Abikisaki mwana mwasi ya mwasi moko Mopaganu (Mat. 15:21–28).
-
Ngomba ya Bobongwani Yesu abongwanaki liboso ya Petelo, Yakobo, mpe Yoane, mpe bazwaki bafungola ya bokonzi (Mat. 17:1–13). (Boko bato bakanisaka ete Ngomba ya Bobongwani ezali Ngomba ya Helemone; basusu bakanisi ete yango ezali Ngomba ya Tabola.)
-
Kaisalia ya Filipo Petelo atatolaki ete Yesu azali Klisto mpe alakelamaki bafungola ya bokonzi (Mat. 16:13–20). Yesu ayebisaki liboso liwa mpe Bosekwi na Ye moko (Mat. 16:21–28).
-
Etuka ya Galilea Yesu alekisaki ntango mingi ya bomoi mpe mosala na Ye na Galilea (Mat. 4:23–25). Awa Ye apesaki Esakola likolo ya Ngomba (Mat. 5–7); abikisaki moto moko ya maladi ya maba (Mat. 8:1–4); mpe aponaki, abulisaki, mpe abimisaki Bapostolo Zomi na mibale, baye wapi bobele Yuda Mokeliota azalaki na botali mpamba Mogalilea te (Mal. 3:13–19). Na Galilea Klisto oyo atelemaki uta na liwa amonanaki na Bapostolo (Mat. 28:16–20).
-
Mbu ya Galilea, oyo ebiangamaki nsima Mbu ya Tibelia Yesu ateyaki uta na bwato ya Petelo (Luk. 5:1–3) mpe abiangaki Petelo, Andalea, Yakobo, mpe Yoane kozala balobi mbisi ya bato (Mat. 4:18–22; Luk. 5:1–11). Alembisaki lisusu mopepe makasi (Luk. 8:22–25), ateyaki masese uta na bwato (Mat. 13), atambolaki likolo ya mai (Mat. 14:22–32), mpe amonanaki na bayekoli na Ye nsima ya Bosekwi na Ye (Yoan. 21).
-
Betesaida Petelo, Andalea, mpe Filipo babotamaki na Betesaida (Yoan. 1:44). Yesu abimaki na nkuku elongo na Bapostolo penepene na Betesaida. Ebele ya bato balandaki Ye, mpe Aleisaki bato 5.000 (Luk. 9:10–17; Yoan. 6:1–14). Awa Yesu abikisaki mokufi miso moko (Mal. 8:22–26).
-
Kapalanauma Oyo ezalaki epayi ya Petelo (Mat. 8:5, 14). Na Kapalanauma, oyo Matai abiangaka “engumba ya Yesu ye moko,” Yesu abikisaki mokatatali (Mat. 9:1–7; Mal. 2:1–12), abikisaki mosali ya kapitene, abikisaki mama ya mwasi ya Petelo (Mat. 8:5–15), abiangaki Matai kozala moko ya Bapostolo na Ye (Mat. 9:9), afungolaki miso ya bakufi miso, abenganaki zabulu (Mat. 9:27–33), abikisaki loboko ekawuka ya moto moko na Saba (Mat. 12:9–13), apesaki liteya ya lipa ya bomoi (Yoan. 6:22–65), mpe andimaki kofuta mpako, koyebisaka Petelo kokamata mosolo uta na monoko ya mbisi (Mat. 17:24–27).
-
Magadana Oyo ezalaki ndako ya Malia Magadana (Mal. 16:9). Yesu ayaki awa nsima ya koleisa bato 4.000 (Mat. 15:32–39), mpe Bafalisai mpe Basadukai basengaki ete Alakisa bango elembo moko uta na lola (Mat. 16:1–4).
-
Kana Yesu abongolaki mai na vinyo (Yoan. 2:1–11) mpe abikisaki mwana mobali ya moto ya lokumu oyo azalaki na Kapalanauma (Yoan. 4:46–54). Kana ezalaki lisusu epayi na Natanaele (Yoan. 21:2).
-
Nasalete Liyebisi na Malia mpe Yosefe esalemaki na Nasalete (Mat. 1:18–25; Luk. 1:26–38; 2:4–5). Nsima ya bozongi uta na Ejipito, Yesu asalaki bomwana mpe bolenge na Ye awa (Mat. 2:19–23; Luk. 2:51–52), ayebisaki ete Azalaki Masiya, mpe abwakamaki na bato na Ye moko (Luk. 4:14–32).
-
Yeliko Yesu apesaki bomoni na mokufeli miso moko (Luk. 18:35–43). Aliaki lisusu na Yakai, “mokonzi na kati ya bafutisi mpako” (Luk. 19:1–10).
-
Betabara Yoane Mobatisi atatolaki ete azalaki “mongongo ya moko oyo kogangaka na esobe” (Yoan. 1:19–28). Yoane abatisaki Yesu na Ebale ya Yaladene mpe atatolaki ete Yesu azali Mwana ya mpate ya Nzambe (Yoan. 1:28–34).
-
Esobe ya Yuda Yoane Mobatisi ateyaki na esobe oyo (Mat. 3:1–4), wapi Yesu akilaki mikolo 40 mpe asenginiamaki (Mat. 4:1–11).
-
Emau Mosekwi Klisto atambolaki na nzela ya Emau elongo na bayekoli na Ye mibale (Luk. 24:13–32).
-
Betefage Bayekoli mibale bayelaki Yesu mwana bampunda likolo ya oyo Abandaki boyingeli na Ye lokumu kati na Yelusaleme (Mat. 21:1–11).
-
Betania Oyo ezalaki epayi ya Malia, Malata, mpe Lasalo (Yoan. 11:1). Malia ayokaki maloba ya Yesu, mpe Yesu alobaki na Malata kopona “likabo malamu” (Luk. 10:38–42); Yesu atelemisaki Lasalo uta na bakufi (Yoan. 11:1–44); mpe Malia apakolaki makolo ya Yesu (Mat. 26:6–13; Yoan. 12:1–8).
-
Beteleme Yesu abotamaki mpe alalisamaki na elielo (Luk. 2:1–7); banjelu bayebisaki nsango ya mbotama ya Yesu na babateli mpate (Luk. 2:8–20); bato ya bwania bakambamaki na monzoto epayi na Yesu (Mat. 2:1–12); mpe Elode abomaki bana mike (Mat. 2:16–18).