Yaka, Landa Ngai
Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia


“Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)

balongani bazali koyekola elongo

Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia

Mokanda Oyo Ezali Mpo na Nani?

Yaka, Landa Ngai ezali mpo na moto nyoso oyo alingi koyekola uta na makomi—moto na moto, lokola libota, mpe na bakelasi ya Eklezia. Soki na mikolo eleki boyekolaki nsango malamu mbala na mbala te, mokanda oyo ekoki kosalisa bino mpo na kobanda. Soki bozalaka na momesano kitoko ya koyekola nsango malamu, mokanda oyo ekoki kosalisa bino bozwa mabaku ya ntina mingi koleka.

Bato mpe Mabota na Ndako

Esika malamu mpo na koyekola nsango malamu ezali ndako. Bateyi na bino na eklezia bakoki kosunga bino, mpe bokoki kozwa makasi uta na bandimi misusu ya palwase. Kasi mpo na kobika na molimo mpenza, yo na libota na yo bosengeli koleisama mokolo na mokolo uta na “liloba malamu ya Nzambe” (Moroni 6:4; tala lisusu Russell M. Nelson, “Opening Remarks,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 6–8).

Salela mokanda oyo na lolenge oyo omoni ekoki kosalisa yo. Mateya yango ezali kolakisa na polele bosolo mosusu ya seko ezwami na Kondimana na Kala. Ezali lisusu kopesa makanisi mpe milulu mpo na kosalisa bino botanga makomi bino moko, elongo na libota na bino, to elongo na baninga. Ntango bozali koyekola, bolanda botambwisi ya molimo mpo na kozwa bosolo ya seko oyo ezali ntina monene mpo na bino. Boluka mateya ya Nzambe mpo na bino, mpe bolanda botindiki oyo bozwi.

Bateyi mpe Bayekoli na Eklezia

Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia ezali pologalami ya mateya mpo na bakelasi ya Eyenga na Eteyelo ya Bana, Eteyelo ya Eyenga ya Bilenge mpe Bakolo, bakelasi ya Bilenge Basi, mpe mayangani ya lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona. Soki bozali koteya na moko ya bisika oyo, bolendisami na kosalela makanisi oyo mpo na boyekoli na bino moko mpe ntango bozali komilengela mpo na koteya. Bobanda na kozwaka mayele ya bino moko kati na makomi. Bomilengeli na bino ya motuya mpenza ekosalama ntango bozali koluka na mozindo makomi mpe bozali koluka bofuli ya Molimo Mosantu. Boluka bosolo ya seko oyo ezali kosalisa bino bokoma mingi lokola Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Yaka, Landa Ngai ekoki kosalisa bino boyeba ndambo ya bosolo yango mpe kososola maye makomi elobeli.

Bobosana te ete koyekola nsango malamu, na ndenge ya malamu mpenza, etie moboko na ndako mpe esungami na Eklezia. Na maloba mosusu, mokumba na bino monene ezali ya kosunga bato oyo bozali koteya na milende na bango ya koyekola mpe kobika nsango malamu na ndako. Bomitungisa te na oyo etali kozala na likambo se moko ya kopesa bango na kelasi. Na esika na yango, bopesa bango mabaku ya kokabola boyebi, makanisi, mpe mituna na bango etali biteni ya makomi oyo batangi na ndako. Bobengisa bango bakabola bosolo ya seko oyo bazwi. Oyo ezali motuya mingi koleka kosilisa kotanga biteni ebele ya mokanda.

Bakelasi ya Eteyelo ya Eyenga mpo na Bilenge mpe Bakolo.

Moko ya ntina monene oyo tosanganaka na bakelasi ya Biteyelo ya Eyenga ezali kosungana mpe kolendisana moko mpe mosusu ntango tozali kobunda mpo na kolanda Yesu Klisto. Lolenge moko ya pete mpo na kosala yango ezali kotuna motuna moko lokola “Eloko nini Molimo Mosantu ateyaki bino na poso oyo ntango botangaki makomi?” Biyano na motuna oyo ekoki kokamba na masolo ya ntina monene oyo etongaka bondimi na Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye.

Nsima bokoki kobengisa lisolo efandisami likolo ya makanisi ya boyekoli kati na Yaka, Landa Ngai. Ndakisa, likanisi moko ya boyekoli ekoki kopesa likanisi ya koluka Yisaya 53, kolukaka maloba oyo ezali kolimbola etinda ya Mobikisi. Okoki kotuna bato ya kelasi bakabola makanisi to mayoki nyonso oyo maloba oyo efuli bango. To bokoki kolekisa mwa ntango kolukaka maloba oyo lokola kelasi.

Masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona mpe Bakelasi ya Bilenge Basi

Ntango masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona mpe bakelasi ya Bilenge Basi bakutanaka na Eyenga, ntina na bango ezali mwa moke ya kokesana uta na bakelasi ya Eteyelo ya Eyenga. Lisusu mpo na kosalisana moko mpe mosusu ayekola nsango malamu ya Yesu Klisto, masanga yango lisusu bakutanaka mpo na kopesana toli na oyo etali bokokisi mosala ya libiki mpe bonetoli (botala Buku Monene, 1.2). Basalaka yango elongo na botambwisi ya babokambi ya kelasi mpe lisanga likoki.

Mpo na ntina yango, liyangani ya lisanga likoki to ya kelasi mokomoko esengeli ebanda elongo na moko ya bokambi ya lisanga likoki to ya kelasi kotambwisaka lisolo etali milende, na ndakisa, ya kosalela nsango malamu, kosalisa bato oyo bazali na bosenga, kokabola nsango malamu, to kosangana na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota.

Nsima ya ntango yango mpo na kopesana toli elongo, moteyi moko akotambwisa kelasi to lisanga likoki na koyekolaka nsango malamu elongo. Bakambi ya mikolo to bato ya kelasi to ya lisanga likoki bakoki kopesama ndingisa ya koteya. Bokambi ya kelasi to ya lisanga likoki, kosololaka elongo na bakambi ya bakolo, basalaka misala oyo.

Bato oyo bapesami ndingisa ya koteya basengeli bamilengela na kosalelaka makanisi ya boyekoli oyo ezali na mateya ya poso ya Yaka, Landa Ngai. Na liteya moko na moko, elembo oyo elembo ya seminele elakisi molulu moko oyo ezali mingimingi na ntina mpo na bilenge. Nzokande, makanisi nyonso kati na liteya ekoki kosalelama lokola molulu ya boyekoli mpo na bilenge.

Mpo na manaka ya mayangani ya lisanga likoki mpe ya kelasi, tala bobakisi D.

Eteyelo ya Bana

Bomilengeli na bino ya koteya na Eteyelo ya bana ebandi ntango boyekoli makomi bino moko mpe elongo na libota na bino. Ntango bozali kosala yango, bozala ya kofungwama na mayoki ya molimo mpe makanisi uta na Molimo Mosantu etali bana na kelasi na bino ya Eteyelo ya bana. Bobondela mpenza, mpe Molimo ekoki kofula bino na makanisi ya kosalisa bango bayekola nsango malamu ya Yesu Klisto.

Ntango bozali komilengela mpo na koteya, bokoki kozwa bofuli mosusu na kotalaka makanisi ya koteya kati na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia. Liteya mokomoko na mokanda oyo ezali na eteni moko babengi “Makanisi mpo na Koteya Bana.” Bokanisa mpo na makanisi oyo lokola makanisi epesami mpo na kotindika bofulami na bino. Boyebi bana na kelasi na bino ya Eteyelo ya bana—mpe bokoyeba bango kutu malamu ntango bozali kosolola elongo na bango na kelasi. Nzambe ayebi bango nyonso mpe, mpe Ye akofula bino na lolenge ya malamu koleka mpo na koteya mpe kopambola bango.

Yango ekoki kosalema ete bana kati na kelasi na bino basila kosala milulu misusu na Yaka, Landa Ngai elongo na mabota na bango. Ezali MALAMU. Kobandela ezali malamu. Bokanisa kobengisa bana bakabola elongo moko na mosusu oyo bango bayekolaki na ndako—kasi bosengeli lisusu kobongisa banzela mpo ete bana basala elongo ata soki bango bazali koyekola na ndako te. Bana bayekolaka bosolo ya nsango malamu mingi koleka ntango bosolo eteyami mbala na mbala na nzela ya milulu ekeseni. Soki bomoni ete molulu ya boyekoli ezali malamu mpo na bana, bokanisa kobandela yango, mingimingi soki bozali koteya bana mike. Bosengeli lisusu kozongela molulu moko uta na liteya moko eleki.

Na basanza oyo ezali ba baeyenga mitano, bateyi ya Eteyelo ya bana balendisami mpo na kosombitina mateya ya Yaka, Landa Ngai oyo ezali na manaka ya Eyenga ya mitano na lisano moko to mingi ya milulu ya boyekoli na“Bobakisi B: Mpo na Eteyelo ya Bana—Kolengelaka Bana mpo na Bomoi na Nzela ya Liyokani ya Nzambe.”