“Mbongwana Ezali Ntina na Biso,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
Mbongwana Ezali Ntina na Biso
Ntina ya koyekola nsango malamu mpe liteya nyonso ezali ya kokolisa mbongwana na biso mpe kosalisa biso tokoma mingi lokola Yesu Klisto. Mpo na ntina oyo, ntango tozali koyekola nsango malamu, tozali kaka te koluka nsango ya sika; kasi tozali kolinga kokoma “ekelamu ya sika” (2 Bakolinti 5:17). Yango elingi koloba kotalela Tata na Lola mpe Yesu Klisto mpo na basalisa biso tobongola mitema na biso, makanisi na biso, misala na biso, mpe bomoto na biso mpenza.
Kasi lolenge ya koyekola nsango malamu oyo ekolendisa bondimi na biso mpe ekomema na likamwisi ya mbongwana esalemaka mbala moko mpenza te. Ekendaka mosika koleka boyebi ya kelasi na kati ya motema mpe ndako ya moto na moto. Esengaka milende ya ntango nyonso, ya mokolo na mokolo mpo na kososola mpe kosalela nsango malamu. Mbongwana ya solo esengaka nguya ya Molimo Mosantu.
Molimo Mosantu akambaka biso na bosolo mpe apesaka litatoli ya bosolo wana (botala Yoane 16:13). Ye agengisaka mayele na biso, alendisaka bososoli na biso, mpe atutaka mitema na biso na emoniseli ya Nzambe, liziba ya bosolo nyonso. Molimo Mosantu apetolaka mitema na biso. Ye afulaka kati na biso mposa ya kobika na bosolo, mpe Ye ayebisaka biso na nse ndenge ya kosala yango. Ya solo, “Molimo Mosantu … akoteya [biso] makambo manso” (Yoane 14:26).
Mpo na bantina oyo, na milende na biso ya kobika, koyekola, mpe koteya nsango malamu, tosengeli yambo ya nyonso koluka bozalani ya Molimo. Ntina oyo esengeli kokonza maponi na biso mpe kokamba makanisi mpe misala na biso. Tosengeli koluka nyonso oyo ebengisaka nguya ya Molimo mpe koboya nyonso oyo ebenganaka nguya yango mosika—mpo toyebi ete soki tokoki kozala ya kolongobana liboso ya Molimo Mosantu, tokoki mpe lisusu kolongobana mpo na kozala liboso ya Tata na Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.