Liahona
Botambola elongo na Ngai
Liahona ya Sanza ya yambo 2026


Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya yambo 2026

Botambola elongo na Ngai

Mama ya Likambo ya Bilenge mpo na 2026 ekosalisa na kokundolisa bino ete ntango botikali pene na Nzambe, Akotambola na bino elongo—ntango nyonso.

Bokambi Monene ya Bilenge Basi

Uta loboko ya mwasi ti na oyo ya mobali: Tamara W. Runia, Mopesi toli ya yambo; Emily Belle Freeman, Mokambi; mpe Andrea Muñoz Spannaus, Mopesi toli ya mibale

Bozali Bino Moko Te

Esengama bino naino te kosala likambo moko oyo bookanisaki te kokoka kosala? Mbala mosusu bomiyokaki te na makasi ya kokoka to mayele ya kokoka, to bomitungisaki ete basusu bakoseka to kotyola bino. Soki bomiyoka lolenge wana, bozali bino moko te.

Bankoto ya mibu eleki, ezalaki na mobali moko nkombo na ye Enoka. Nzambe asengaki Enoka ateya bato boyamboli—ndambo ya bato mabe koleka mokili emona naino te.

Enoka akanisaki ete akokoka kosala yango te. Ayebisaki Nzambe ete ye azalaki elenge mingi, moto moko te alingaki ye, mpe azalaki “koloba malembe” (botala Mose 6:31).

Kasi Nzambe apesaki Enoka elaka moko. Alobaki na moto ya bobangi, “Kende mpe sala lokola natindi yo” mpe “Bangomba ekokima liboso na yo mpe bibale ekozonga; mpe okozala elongo na ngai mpe ngai elongo na yo; na yango, tambola elongo na ngai” (Mose 6:32, 34).

“Botambola elongo na Ngai.” Libiangi nini ya pete, ya kitoko.

Nzambe apesaki elaka na Enoka ete soki akozala na mpiko mpo na kobanda, nde Nzambe akozala na ye litambe nyonso ya nzela. Nzambe akosala ete Enoka azala na nguya mpe akolendisa ye mpo na kosala mingi koleka mpe kosalisa ye akoma mingi koleka akokaki kokanisa.

Moko ya bankombo ya Mobikisi ezali Emanuele, to “Nzambe kati na biso” (Matai 1:23). Ezali na nkombo mpe na lolenge ya Nkolo ya kotambola elongo na biso. Boponi ezali ya biso—tokotambola mpe elongo na Ye?

Mikolo ya lelo, totalaka Enoka lokola moto ya bondimi mpe profeta mpe mokambi monene. Kasi liboso ya profeta Enoka, ezalaki na Enoka ya elenge oyo azalaki komindimela te kasi oyo aponaki kotambola elongo na Nzambe.

Ntango bomoi ezali mpasi, ntango bomiyoki ete bokoki te, bomikundola elaka ya Nkolo na Enoka, mpe epayi na bino. Akotambola elongo na bino. Akotika bino moko te, ata na litambe moko te.

Emanuele Nzambe elongo na biso. Nzambe elongo na yo!

Mokambi Monene ya Bilenge Basi

Bokambi Monene ya Bilenge Mibali

Uta na loboko ya mwasi ti na loboko ya mobali: David J. Wunderli, Mopesi toli ya Yambo; Timothy L. Farnes, Mokambi; mpe Sean R. Dixon, Mopesi toli ya Mibale

Elongo na Lisalisi na Ye, Okoki Kosala Makambo Nyonso.

Lokola bino bilenge mibali, Nkolo asengaki Enoka akokisa mikumba ya ntina ya bonganganzambe. Mokumba na ye ezalaki ya koteya boyamboli na bato ya mabe. Enoka alobelaki bantembe na ye. “[Nazali] kaka elenge,” ye alobaki. “Bato nyonso bayinaka ngai … nalobaka malambe; na bongo, nazali mosali na yo?” (Mose 6:31).

Nkolo ayanolaki na nguya mpe na kondimisama. “Bokende mpe bosala lokola natindi bino. … Fungola monoko na yo, mpe yango ekotondisama … . Molimo na ngai ekozala likolo na yo … ; bangomba ekokima liboso na yo … ; na yango, tambola elongo na ngai” (Mose 6:32, 34).

Enoka asosolaki ete ntango Nkolo apesi biso mokumba, tosalaka yango biso moko te. Ntango tosalaka mpe tobatelaka mayokani elongo na Klisto, totambolaka elongo na Ye mpe tokabolaka na nguya na Ye—tokomaka bisaleli na maboko na Ye.

Lokola Enoka, ozali na mokumba ya ntina mingi: kosala mosala, kosala na tempelo, koyangela elambo, koyekola makomi, kobika mibeko ya nsango malamu, koyambola, komilengela mpo na misio, mpe mingi koleka. Ekoki koyokana ya koleka ndelo. Okoki komiyoka okoki te. Ezali malamu. Mpe ezali te na ntina ya kosalaka yango yo moko. Ezali na ntina ya kopona lelo—lelo mpe mikolo nyonso—kotambola elongo na Nzambe.

Elongo na lisungi na Ye, okoki kosala makambo nyonso. Akolendisa, akolimbisa, mpe kopesa yo nzela ya koleka makoki na yo ya bomoto. Ye alingi yo. Lokola Bokambi Monene ya Bilenge Mibali, tolingi bino mpe tozali kozela na esengo nyonso kosangana na yo mpo na kotala mama ya likambo ya 2026: “Botambola elongo na ngai.”

Bokambi Monene ya Bilenge Mibali