Liahona
Bakaboli ya Lolenge ya Bonzambe
Liahona ya Sanza ya yambo 2026


“Bakaboli ya Lolenge ya Bonzambe,” Liahona, Sanza ya yambo 2026.

Etinda ya sanza ya Liahona Sanza ya yambo 2026

Bakaboli ya Lolenge ya Bonzambe

(2 Petelo 1:4)

Boyebi ya mwango ya lobiko epesaka makanisi ya motuya, ekolisaka bisengo na biso, mpe elendisaka biso mpo na kolonga mikakatano mpe mitungisi na biso.

Elilingi ya Klisto kobengaka bayekoli mibale

Klisto Abengi Bayekoli Mibale, na Gary E. Smith

Apostolo Petelo akundolisi biso ete mpo na bayekoli ya Yesu Klisto, “nguya na Ye ya bonzambe epesi biso biloko nyonso ya motuya kati na bomoi mpe bonzambe, na nzela ya boyebi na ye oyo abengi biso mpo na nkembo mpe bizaleli malamu:

“Na nzela na yango epesameli kati na biso bilaka ya koleka minene mpe motuya: ete na yango bokoki kozala bakaboli ya Lolenge ya Bonzambe” (2 Petelo 1:3–4; nsete ebetami).

Mwango ya Tata na Lola elimboli bosolo monene mpe motuya koleka oyo elimbolaka bomoto mpe ntina na biso ya seko.

Lolenge elimbolami kati na “Libota: Esakola mpo na Mokili”:

“Bato banso—babali mpe basi—bakelami na elilingi ya Nzambe. Moko na moko azali mwana mobali to mwana mwasi ya molimo ya baboti ya likolo, mpe, lokola bongo, moko na moko azali na lolenge mpe atandele ya bozambe. …

“Na bokonzi yambo ya boyei o nse, bana ya mibali mpe ya basi ya molimo bayebaki mpe bakumbamelaki Nzambe lokola Tata na bango ya Seko mpe bandimaki mwango na Ye na nzela na yango bana na Ye bakoki kozwa nzoto ya mosuni mpe kozwa mayele ya nse mpo na kokola kino na peto mpe nsuka nsuka kososola atandele na bango ya bozambe lokola basangoli ya bomoi ya seko.”

Tata na Lola alakaki bana na Ye ete soki balandi malako ya mwango na Ye mpe ndakisa ya Mwana na Ye ya Bolingo, babateli mitindo, mpe bayiki mpiko na bondimi tii na nsuka, ba “kozwa bomoi ya nseko, likabo oyo eleki monene koleka makabo nyonso ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 14:7).

Mosala ya Nzambe efandi likolo ya bokoli mpe bonetoli ya bana na Ye. Ngambo nyonso ya mwango na Ye esalemi mpo na kopambola bana na Ye ya mibali mpe ya basi mpamba te “motuya ya milimo ezali monene na miso na [Ye]” (Malongi mpe Mayokani 18:10).

Mwango ya Tata

Na likita yambo ya mbotama, Tata na Lola alakisaki na bana na Ye ya molimo mwango na Ye mpo na bokoli mpe esengo na bango ya seko.

“Tokosala mabele oyo bato oyo bakoki kofanda;

“Mpe tokomeka bango awa na yango, mpo na kotala soki bakosala makambo manso oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango;

“Mpe boayo bakobomba lolenge na bango ya yambo bakobakisama likolo, mpe baoyo bakobomba lolenge na bango ya yambo te bakozwa nkembo na bokonzi na baoyo babombi lolenge na bango ya yambo te; mpe baoyo bakobomba lolenge na bango ya mibale bakobakisa nkembo likolo ya mito na bango seko na seko.

“Mpe Nkolo alobaki: “Nani nakotinda?” Mpe moko lokola Mwana na moto ayanolaki: Ngai oyo, tinda ngai Mpe mosusu azongisaki maloba mpe alobaki: Ngai oyo, tinda ngai. Mpe Nkolo alobaki: Nakotinda ya yambo.

“Mpe ya mibale azalaki na nkanda, mpe abatelaki te bozali na ye ya yambo; mpe, uta mokolo wana, mingi balandaki ye” (Abalayama 3:24–28).

Boyeba ete kaka mwango moko elakisamaki na likita yambo ya mbotama—mwango ya Tata Tata na biso na Lola atunaki motuna te, “Nini tokosala?” Alukaki te makanisi, asengaki batoli te, to alukaki mayele ya bato te. Na esika yango, alakisaki makambo ya motuya ya mwango na Ye mpe atunaki, “Nani nakotinda?” Mayele ya motuya na Ye efandi likolo ya nani asengi kotindama mpo na kokokisa mibeko mpe makambo ya mwango na Ye.

Bambano ya botomboki ya monguna elimbolami lisusu kati na makomi.

“Yango wana, mpo na ntina wana Satana atombokaki na ngai, mpe alukaki kobebisa nguya ya ya kosala ya moto, oyo ngai napesaki ye, mpe lisusu, ete nasengeli kopesa ye nguya ya ngai moko , natindaki ete asengeli kobwakama na nse;

“Mpe akomaki Satana, zabulu, tata ya lokuta nyonso, mpo na kokosa mpe kozipa bato miso, mpe komema bango bakangemi na bolingi na ye, kutu mingi lokola bakoyoka mongongo na ngai te” (Mose 4: 3– 4; nsete ebetami).

Lusifelo alakisaki mwango moko te oyo endimamaki na bayi likita yambo ya mbotama. Azali te elongi ya kosepela ya moto oyo akweyi na maponami. Atombokaki! Lolendo, yauli, mpe moyimi atindaki botomboki na ye kotelemela mwango ya Tata.

Mwango ya Tata mpe Nsango Malamu ya Mobikisi

Mwango elimboli mosala ya Tata mpe Mwana oyo epesi na bato nyonso mapamboli ya bomoi ya seko.

Nsango Malamu ya Yesu Klisto ekokisi nzela wapi tokoki kozwa mapamboli elakama kati na mwango ya Nzambe, ezala malongi, mabongi, makuli, mpe mayokani mibali mpe basi basengeli kondimela mpe kolanda. “Nkombo mosusu ezali te oyo epesami na nse ya lola, longola se soki ezali Yesu Klisto … na oyo kani moto akoki kobikisama” (2 Nefi 25:20). Solo, Nkolo Yesu Klisto azali, “nzela, bosolo, mpe bomoi: moto moko te akoki kokende epai ya Tata soki na [Ye] te” (Yoane 14:6; nsete ebetami).

Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki:

“Mwango esengi Bokeli, mpe ete na ngala na yango esengaki ezala Bokweisami mpe Bomikabi. Wana ezali makambo misato ya moboko ya mwango yango. Bokeli ya mokili ya lolenge ya paradiso ewutaki na Nzambe. Liwa mpe bokufi ewutaki na bokweisami ya Adama na Ewa [botala 2 Nefi 2:25; Mose 6:48]. Bozangi kufa mpe libaku ya bomoi ya seko epesamaki na Bomikabi ya Yesu Klisto [botala 2 Nefi 2:21–28]. …

“… Toyaki na mabele mpo na ntango ya mokuse, kolonga mimekano mpe minyoko, mpe tomilengela mpo na kokende liboso mpe likolo na bozongi ndako ya nkembo [botala Njembo 116:15; Alama 42:8]. Makanisi mpe misala na biso [na kufa] kati na bomoi na biso na mabele ekozala na ndimbola soki tososoli mwango ya Nzambe mpe soki tozali na botondi mpe limemya na mitindo na Ye [botala Malongi mpe Mayokani 59:20–21].”

Mitu ya makambo ya Mwango kati na Buku ya Mormon

Tososoli bosolo ya motuya na kobimisaka mpe koyekolaka bankombo mingi ekeseni mpo na mwango ya Tata kati na Buku ya Mormon: Kondimana mosusu ya Yesu Klisto. Mpo na ndakisa, botala bankombo elandi oyo eponami:

“Mwango etonda na boboto ya Mokeli monene” (2 Nefi 9:6).

“Mwango ya Nzambe na biso” (2 Nefi 9:13).

“Mwango ya lobiko” (Jarom 1:2; Alma 24:14).

“Mwango ya lisiiko” (Alma 12:25, 26, 30, 32, 33; 42:11, 13).

“Mwango ya bozongisi” (Alma 41:2).

“Mwango ya esengo” (Alma 42:16).

“Mwango monene ya boboto” (Alma 42:31).

Nkombo moko na moko oyo esalisaka biso tososola mingi koleka bilaka ya motuya ya mwango ya Tata mpe ezali kokolisa makanisi na biso na ntina na mikano mpe ntina ya bomoi na biso ya kufa.

Likambo ya ntina, nkombo oyo esalelamaka mingi mpo na mwango ya Nzambe na Buku ya Mormon etali mingi bosikoli oyo esalemaki na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Alma atatoli, “ Soki ezalaka te mwango ya bosikoli te, oyo etiamaki uta na bokelami ya mokili, elingaki kozala te bosekwi bwa bakufi. Kasi etiami mwango moko ya bosikoli, oyo ekomema esalema bosekwi ya bakufi” (Alma 12:25).

Apesaki lisusu toli “Bobanda kondima na Mwana ya Nzambe, ete akoya kosikola bato na ye, mpe ete akoyoka mpasi mpe akokufa mpo na komikaba mpo ya masumu na bango; mpe ete akolamuka lisusu uta na bakufi, oyo ekomema bosekwi esalema, ete bato nyonso bakotelema liboso na ye, mpo ya kosambisama na mokolo ya nsuka mpe ya bosambisi, engebene na misala na bango.” (Alama 33:22).

Nzela Elengelami

Milimo na biso esengeli etondisama na botondi ntango tozali kotalela mwango monene ya Nzambe ya lobiko, bosikoli, bozongisi, boboto, mpe esengo. Boyebi ya mwango na Ye epesaka makanisi ya motuya, epesaka esengo na bisengo na biso, mpe elendisaka biso mpo na kolonga mikakatano mpe mitungisi na biso.

Tata na Lola azali na mposa makasi ete biso tozonga na ndako epayi na Ye. Abengisi mpe alaki mapamboli, kasi akotinda na makasi ata moke te, akobundisa, to akopekisa te kosalela nguya ya ya kosala ya bomoto oyo Apesaki biso. Tosengeli kosala mpe kopona kozongela Ye na kolandaka ndakisa ya Mwana na Ye ya Bolingo.

Elilingi ya loboko ya mwana asimbi loboko ya Yesu Klisto

His Hand Is Stretched Out Still [Loboko na Ye Ezali Ntango nyonso ya Kosembolama], na Elizabeth Thayer

Nzela elengelami, mpe soki tokotala yango tokoki kozala na bomoi libela” (Alama 37:46; nsete ebetami).

Natatoli na esengo ete Tata na Lola azali kolo mwango ya bonzambe mpo na bana na Ye. Yesu Klisto azali Mosikoli mpe Mobikisi na biso. Mpe lokola moko ya Bapostolo ya Nkolo ya mikolo mya nsuka, natatoli ete Azali solo mpenza “ nzela, solo, mpe bomoi” (Yoane 14:6; nsete ebetami).

Matangi

  1. Libota: Esakola na Mokili,” Gospel Library.

  2. Russell M. Nelson, “The Creation,” Ensign, Sanza ya mitano 2000, 84, 86.

  3. Mpo na bososoli malamu ya bankombo mingi ya mwango ya Nzambe na kati na Buku ya Mormon, botala Noel B. Reynolds, “The Plan of Salvation and the Book of Mormon,” Religious Educator, vol. 21, no. 1 (2020), 31–53.