Etinda ya Sanza ya Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya zomi na mibale 2025
Toyebi nini na oyo etali babateli mpate na Noele ya yambo?
Babateli Mpate, na Brian Call
Toyebi mwa makambo na oyo etali babateli ya mpate na Noele ya yambo.
Bazalaki pene na Beteleme. Babateli mpate bazalaki na “mboka se moko” epai wapi Yesu abotamaki (Luka 2:8). Mpe bakokaki kokoma na Beteleme na makolo ntango Azalaki naino kuna (tala Luka 2:15–16).
Bazalaki kosala mokumba na bango. Babateli mpate yango bazalaki “kofanda libanda, kokengelaka etonga na bango na butu” (Luka 2:8). Bazalaki babateli mpate ya malamu mpe ya sembo, lokola Mobikisi— Mobateli Mpate Malamu (tala Yoane 10:11, 14).
Bayebaki maisakoli na ntina na Masiya. Emonani lokola ete bayebaki makambo oyo anzelu azalaki kolobela ntango asakolaki mbotama ya “Klisto Nkolo” (Luka 2:11), Masiya oyo asakolamaki banda kala.
Bazalaki na molende mingi. Ntango anzelu ayebisaki bango na oyo etali “mwana moke … oyo alali na elyelo ya bibwele” (Luka 2:12), bakendaki “mbangu” mpo na kotala Ye (Luka 2:16).
Bakabolaki nsango malamu. “Basakolaki epayi na epayi” makambo oyo bayokaki mpe bamonaki kolandisaka na nsango ya anzelu na oyo etali mbotama ya Klisto (Luka 2:17).
Batondaki mpe basanzolaki Nzambe. Nsima ya makambo nyonso oyo, ba “zongaki, kokumisa mpe kosanzola Nzambe mpo na makambo nyonso bayokaka mpe bamonaka” (Luka 2:20).
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly For the Strength of Youth Message, December 2025. Lingala. 19617 639