2025
Mwango ya Nzambe mpo na Libota ya Seko
Liahona ya Sanza ya zomi na mibale 2025


“Mwango ya Nzambe mpo na Libota ya Seko,” Liahona, Sanza ya zomi na mibale 2025.

Etinda ya sanza ya Liahona Sanza ya zomi na mibale 2025

Mwango ya Nzambe mpo na Libota ya Seko

Mabota oyo bayambaka mwango ya Nzambe, balingaka lokola Mobikisi alingaki, mpe batosaka mayokani na bango bakosangola mokolo mosusu “mapamboli ya bomoi ya seko mpe bofuluki ya esengo.”

Foto ya Tempelo ya São Paulo, na Brésil

Penepene na nsuka ya mosala na ngai ya ntango mobimba, nasepelaki ntango nazwaki dotasio mpe nakangisamaki na baboti na ngai na Tempelo ya São Paulo Brésil.

Baboti na ngai, Apparecido mpe Mercedes, bazalaki bato ya mangomba ekeseni, kasi makambo oyo bakutanaki na yango na bomoi esalisaki bango bandima nsango malamu ezongisama.

Tata na ngai akolaki na libota moko ya malamu, kasi azalaki kosambela te. Atako bongo, ntango azalaki elenge mobali, azalaki kosepela na makambo ya Nzambe. Azalaki kotanga Biblia, kota na bakelasi ya mateya ya Biblia, mpe koyekola bomoi ya Yesu Klisto. Boyekoli na ye epusaki ye akosepela mingi na nsango malamu ya Mobikisi mpe na libota, mpe yango epesaki ye mposa ya kobala moto oyo azali na makanisi lokola oyo ya ye.

Nzokande, mama na ngai autaki na libota oyo bato bamipesaki mingi na makambo ya losambo. Bayambaki mibeko ya nsango malamu, bazalaki kokende na milulu ya eklezia, mpe bazalaki kosalela na bosembo eyamba na bango. Kokolaka na esika wana, mama na ngai akomaki lolenge ya moto oyo azangaki ata moke te likita ya eklezia.

Mpe boye, nsima ya kobalana ya baboti na ngai mpe kobotama ya bandeko na ngai misato ya mibali mpe ngai, basalaki nyonso mpo na kobokola biso na kati ya pole ya boyebi na bango ya mibeko ya nsango malamu. Mokolo moko, mama leki na ngai, oyo azalaki mondimi ya molende te ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, alobelaki tata na ngai, “Molingami, ozali na bana mibali minei. Soki olingi mpenza kobokola libota oyo ezali kotalela Klisto mpe Nzambe na kati ya libota na yo, osengeli kokende na eklezia na ngai.”

Tata ayokaki makambo oyo alobaki, kasi asalaki eloko moko te kino mokolo oyo bamisionele ya ntango mobimba bayaki na kartie na biso, babetaki na ekuke na biso, mpe babandaki koteya biso. Ayebaki mbala moko ete bazalaki bantoma ya eklezia oyo mama leki na ngai alendisaki ye aluka koyeba makambo na yango.

Pole mpe Solo

Moko ya makambo oyo na ebandeli esepelisaki baboti na ngai na nsango malamu ya Yesu Klisto oyo ezongisama ezali ntina oyo Eklezia ezali kopesa na libota mpe mateya oyo ete “mingi ya mosala ya Nzambe ya lobiko mpe bonetolami ekokisami na nzela ya libota.” Yambo ete babatisama, baboti na ngai basepelaki mingi na oyo bazalaki koyekola na boye ete babengisaki baninga ya penepene mpo na kosangana na bango mpo na mateya ya bamisionele.

Bafoto ya baboti ya Mpaka Soares

Moko ya makambo oyo na ebandeli esepelisaki baboti na ngai na nsango malamu ya Yesu Klisto oyo ezongisami ezali ntina oyo Eklezia ezali kopesa na libota.

Wana bazalaki bango kokutana na bamisionele, mpe bazalaki kokoba koyekola nsango malamu nsima ya libatisi na bango, baboti na ngai bayekolaki lolenge ya “kobokola bana na [bango] kati na pole mpe solo” mpe lolenge ya “kotya molongo na molimo“ kati na ndako na [bango]” moko (Malongi mpe Mayokani 93:40, 43).

Bayekolaki ete “libota ezali na esika monene kati na mwango ya Mokeli mpo na bomoi ya seko ya bana na Ye” mpe ete ”esengo kati na bomoi ya libota ekoki mpenza kozwama soki etongami likolo na mateya ya Nkolo Yesu Klisto.”

Bayekolaki ete “mabala mpe mabota ya elonga ebongisami mpe efandisami likolo ya mibeko ya bondimi, losambo, boyamboli, bolimbisi, botosi, bolingo, mawa, mosala, mpe misala nyonso ya bosakani.”

Bayekolaki ete mabota makoki kozala ya seko mpe ete “moko oyo ezali kati na biso awa ekozala kati na biso kuna, kaka yango ekozala esangisami na nkembo ya seko” (Malongi mpe Mayokani 130:2).

Mpe bayekolaki ete “ntina monene ya mateya nyonso, mosala nyonso kati na Eklezia ezali ete bana na bango bazala na esengo na ndako, bakangisama na libala ya seko, mpe bakangama na bankola na bango.”.

Na boyebi wana, bazalaki na mposa ya kokangisama lokola libota ya seko.

Liso Epayi ya Boeko

Nsima ya kobatisama ya baboti na ngai, basalelaki makambo oyo bazalaki koyekola, kotikaka mokili mpe bakotaki na bokonzi ya nsango malamu. Basalaki mpo na kosangisa libota na biso na kosalaka likita ya libota na mpokwa mpe boyekoli makomi na libota, kokendaka na sembo na makita ya Eklezia, mpe kosalaka mosala ya lisolo ya libota. Na milende wana mpo na bomoko, bazalaki na elikya ya kokela libota oyo etalisami na mwango ya lobiko na liso epayi ya boseko.

Na 1965, mobu oyo baboti na ngai babatisamaki, tempelo oyo ezalaki pene na engumba São Paulo, na Brésil, ezalaki na engumba Mesa, na etuka ya Arizona, na ntaka ya kilometele 9.650. Mobembo ezalaki ntalo mingi mpo na libota na biso, yango wana baboti na ngai basengelaki kozela kino bobulisami ya Tempelo ya Brésil ya São Paulo na 1978 yambo ete bakoka kozwa makuli na bango ya tempelo mpe kokangisama. Na ntango wana, nazalaki misionele na Rio de Janeiro.

Sanza mibale yambo nasukisa misio na ngai na sanza ya mibale 1980, mokambi na ngai ya misio apesaki ngai mpe moninga na ngai nzela ya kosala mobembo na butu elongo na bandimi ya likonzi uta na Rio de Janeiro kino na tempelo na São Paulo mpo ete nakoka kozwa dotasio mpe kokangisama na baboti na ngai. Lokola baboti na ngai, nazelaki mibu mpo na mapamboli elakama ya makuli mpe mayokani ya tempelo.

Likambo wana ebongolaki bomoni na ngai ya mikolo mizali koya mpe epesaki ngai mwa ntango ya solo ya bosolo ya maloba ya Mokambi Russell M. Nelson: “Ntango na tempelo ekosalisa yo okanisa lolenge ya selesitiale mpe ozwa limoni ya nani ozali mpenza, nani okoki kokoma, mpe lolenge ya bomoi oyo okoki kozala na yango mpo na libela.”

Ntango na ngai ya mokuse na tempelo na libaku wana esimbaki mpenza mosala oyo etikali ya mosala na ngai ya misionele. Na limoni wana ya sika, botatoli ya tempelo mpe ntina ya mwango ya Nzambe mpo na mabota ezalaki mpe na bopusi ya koumela etutaka na bomoi na ngai.

Ntango mwasi na ngai, Rosana, mpe ngai tobalanaki mibu mibale nsima ya misio na ngai, tokangisamaki na tempelo na bomoni ya kobokola libota na biso moko ya seko. Mpo na yango, tosalaki elongo mpo na kosala mimeseno ya libota lokola oyo baboti na biso bateyaki biso, oyo nyonso ezalaki kolobela Mobikisi, mateya na Ye, mpe mateya ya basakoli na Ye ya mikolo na biso.

Lelo oyo, bana na biso bazali kobokola bana na bango na mibeko wana ya nsango malamu ya esengo. Mpo na biso, libota ezali na ntina mingi mpamba te tososolaka ete libota ezali na esika monene na kati ya mwango ya Nzambe.

Lokola Mokambi Monene, nazalaki na lipamboli ya kokangisa bana na ngai misato na balongani na bango na tempelo. Kotala bango na miso ntango bazalaki kofukama liboso ya etumbelo na tempelo ezalaki likambo ya esengo. Namonaki ete bana na ngai kopambolaka na nzela ya mibeko ya nsango malamu oyo baboti na ngai bateyaki ngai mpe oyo ngai na Rosana toteyaki bango. Nakokaki komona mapamboli yango kokobaka na bikeke ekoya. Mpe yango ekundolaki ngai moto oyo asalaka ete makambo nyonso esalema.

Mayemi ndenge na ndenge Mbotama na baetajere

Bokundoli ya Noele

Libota ezali na esika monene kati na mwango ya Nzambe mpo na esengo, kasi soki Mobikisi Yesu Klisto azalaki te, mwango yango ekokaki kosalema te. Bomikabi na Ye mpe makuli mpe mayokani oyo ezwamaki na nsango malamu na Ye esalaka ete elaka ya bonetolami ekokisama.

Mokambi Nelson asakolaki: “Bonetolami ezali likambo ya libota. Bobele na nzela ya makuli ya kobikisa ya nsango malamu ya Yesu Klisto nde mabota ekoki konetolama. Mokano ya nsuka oyo tozali koluka ezali ete tokoma na esengo lokola libota—kozwa dotasio, kokangisama, mpe kolengelama mpo na bomoi ya seko na miso ya Nzambe.”

Ntango nakendaka kotala bisika oyo namona naino te, namekaka koluka elilingi moko moke ya Mbotama oyo ekundolisaka Rosana mpe ngai na ntina na Mobikisi. Nazali kosala mwa lisanga moko.

Ntango tozalaki kotala bililingi wana ya Mbotama, mwasi na ngai mpe ngai tomitunaki mbala moko, “Likambo nini eleki ntina na bomoi na biso?” Eyano, ya solo, ezali Mobikisi, nsango malamu na Ye, mpe libota na biso. Mpo na kokundolisa biso bolingo ya Tata na biso na Lola mpo na biso mpe ete ezali na nzela ya Mobikisi nde elaka ya mabota ya seko esalemaka, liboso ya Noele mwa mibu eleki totiaki ba Biloko na biso ya Mbotama ya Klisto na baetajere mibale ya minene na ndako na biso—mpe totikaki yango na esika ya kobwaka yango nsima ya bafeti ya Noele. Momesano wana esalisaka biso tobatela molimo ya Noele na ndako na biso mobu mobimba.

Mikolo nyonso ntango totalaka bililingi wana ya Mbotama ya Yesu, na boboto ekokundolisaka mokumba monene ya Mobikisi na bomoi na biso. Ekundolisaka biso ete kimya na mabele sikawa (tala Luka 2:14) mpe esengo ya seko na mokili oyo elandi etali Mobikisi mpe kotosa mayokani oyo tosalaki elongo na Ye. Mpe ekundolisaka biso “ete ayaki na mokili, kutu Yesu, mpo na kobakama na ekulusu mpo ya mokili, mpe mpo na komema masumu ya mokili, mpe kosantisa mokili, mpe kopetola yango na bozangi boyengebene nyonso;

“Ete na nzela na ye bato nyonso bakoki kobikisama oyo Tata atyaki na nguya na ye mpe basalamaki na ye” (Malongi mpe Mayokani 76:41–42).

Kaka ntango toyekolaki bosolo oyo epayi ya baboti na biso, Rosana mpe ngai tosalaki mpo na kopesa yango na bana na biso. Sikawa bana na biso bazali koteya bana na bango bosolo oyo kaka. Milona oyo balonaki na mitema ya babotina ngai eleki sikoyo mibu 60 na mwa ndako na biso na Brésil ebotaki fololo mpe mbuma “oyo eleki biloko nyonso na motuya, oyo ezali elengi koleka biloko nyonso ya elengi, mpe oyo ezali mpembe koleka biloko nyonso ya mpembe, mpe ezali peto koleka biloko nyonso ya peto” (Alma 32:42).

Natatoli ete baye bayambaka mwango ya Nzambe mpo na mabota, balingaka lokola Mobikisi alingaki, mpe batosaka mayokani na bango bakosangola mokolo mosusu “mapamboli ya bomoi ya seko mpe bofuluki ya esengo” elongo na balingami na bango mpe elongo na Tata mpe Mwana.

Matangi

  1. Buku Monene: Kosala kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 2.0, Gospel Library.

  2. Libota: Esakola na Mokili,”Gospel Library.

  3. Libota: Esakola na Mokili.”

  4. Boyd K. Packer, “The Father and the Family,” Ensign, Sanza ya mitano 1994, 19.

  5. Russell M. Nelson, “Bosepela na Likabo ya Bafungola ya Bonganganzambe,” Liahona, Sanza ya mitano 2024, 121.

  6. Russell M. Nelson, “Fungola Balola na Nzela ya Tempelo mpe Mosala ya Mambi ma Kala ya Libota,” Liahona, Sanza ya zomi 2017, 18.

  7. Buku Monene, 2.0.