Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya mwambe 2025
Nani Nzambe Azali te
Babosolo 5 etali Tata na Biso ya Lola
Tokoki koyekola mingi etali nani Nzambe azali ntango tososoli nani Ye azali te.
Elilingi na Camila Gray
Moko ya mapamboli minene ya Bozongisi ezali ete Nzambe amibisaki lisusu Yemoko mpe ezaleli na Ye lokola Tata moko ya bolingo ya lola. Kasi bantango mingi tozalaka na mabanzo to makakisi etali Nzambe oyo mpenza ezali ya solo te. Ntango yango ekomaka, tokoki koyekola mingi etali nani Nzambe azali na kososolaka nani Ye azali te.
Nzambe azali te moto moko tomesana na ye te likolo ya ngwende moko ya mosika, mosika mpenza.
Ye azali Tata na biso, ya kokamwa koleka kutu tata ya mabele ya malamu koleka oyo bokoki kokanisa. Atako tokoki komikundola lisusu te bomoi na biso yambo ya bokufi elongo na Ye, Ye ayebi biso moko na moko mpe malamu koleka. Ye azali na nzoto ebongi nie ya mosuni mpe mikuwa, mpe tozali elilingi na Ye.
Soki bozali kobunda mpo na koyeba lolenge nini Nzambe azali, ezali na ndakisa moko ebongi malamu: Mwana na Ye, Yesu Klisto. Klisto alobaki, “Ngai nazali nzela, solo, mpe bomoi: moto moko te akoki koya epayi ya Tata, soki na nzela na ngai te. Soki boyebaki ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na ngai” (Yoane 14:6–7). Na maloba mosusu, soki tolingi koyeba lolenge Tata na Lola azali, tokoki koyekola etali lolenge Yesu Klisto azali. Bango bazali ya kosangana mpenza na ntina.
Nzambe azali te moto moko oyo azali na ntango te mpo na bino.
Na bongo, kosungaka bino bozwa bomoi ya seko ezali mosala mpe nkembo na Ye. Bozali ntina na Ye ya liboso! Ye akangami te na ntango lokola biso tozali. Bokende epayi na Ye kati na losambo ntango nyonso. Nsima boyoka ndenge Ye ayanolaka na banzela mingi.
Nzambe azali te moto oyo azali kotindika yo na makasi mpo na olanda Ye.
Mpaka Dale G. Renlund ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ateyaki ntango moko, “Ntina ya Tata na biso ya Lola na boboti ezali te komona bana na Ye kosala oyo ezali sembo; kasi ezali komona bana na Ye kopona kosala oyo ezali sembo mpe na nsuka kokoma lokola Ye.” Ye akobenga bino, kosanga na bino, mpe koteya bino bosolo, kasi Ye akolonga te nguya na bino ya boponi na kotindikaka bino na makasi mpo na kolanda ye.
Nzambe azali te moto oyo azali komeka kokanga bino kosalaka eloko moko ya mabe boye mpo ete Ye akoka kopesa etumbu.
Na esika na yango, lokola Mpaka Patrick Kearon ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alobaki, “Nzambe azali kolanda bino ntango nyonso.,” elimboli ete Ye akolemba ata mokolo moko te komekaka kosalisa bino kozonga epayi na Ye. Ye ayebi biso nyonso nakibomoto tokokutana na makambo ya mpasi ntango tosala mabunga. Na bongo Ye apesi nzela moko mpo na biso kozala peto uta na masumu mpe kozwa makasi na nzela ya Bomikabi ya Mwana na Ye.
Nzambe azali te moto oyo azali kozela bino bozala ya “kokoka” to “kobonga nie” yambo Ye alinga bino.
Bolingo na Ye mpo na biso ezali na nsuka te. Ye alingi bino bobele sikawa, atako bozali ya kobonga nie te! Mokambi Jeffrey R. Holland, Mokambi Mokitani na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, apesi bososoli moko ya nguya na ntina ya bosolo yango: “‘Boya lokola bozali,’ Tata ya bolingo alobi na moko na moko na biso, kasi Ye abakisi, ‘Bobongisa te kotikala lolenge bozali.’ Tozali koseka mpe komikundola ete Nzambe azalina mokano ya kosala biso malamu mingi koleka lolenge tokanisaki tokoki kozala.” Na bolingo mpe bopesi makasi ya kokoka, Tata na Lola azali komeka kosalisa bino bokoma lokola Ye mpe bozwa nyonso oyo Ye azali na yango, litambe moko nsima na mosusu.
Nani Nzambe Azali
Lolenge ya malamu koleka ya kokoka koyeba Tata na bino ya Lola ezali kokoba kozala ntango nyonso na makambo oyo bokutanaka na yango elongo na Ye. Lolenge nini? Boyekola na ntina na Ye mpe mwana na Ye uta na makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi. Bosambela Ye. Bobatela mitindo na Ye. Bolekisa ntango ya kimia, ya moto ye moko kosanjolaka Ye na Eklezia, kati na tempelo, mpe na bisika misusu ya bule. Bosala mpe bobatela mayokani na Ye. Ye akosalisa bino boyeba nani Ye azali mpe lolenge nini Ye ayokaka na ntina na bino.
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly For the Strength of Youth Message, August 2025. Lingala. 19616 639