2025
Bosolo ya Bomoi na Biso
Sanza ya mwambe 2025


“Bosolo ya Bomoi na biso,” Liahona, Sanza ya mwambe 2025.

Etinda ya sanza ya Liahona, Sanza ya mwambe 2025

Ba Bosolo ya Bomoi na Biso

Tata na biso na Lola ya bolingo abimisi babosolo ya kala na biso, lelo, mpe lobi ekoya, kobakisa lolenge nini koyamba bonene ya makabo nyonso.

N.K. Whitney & Co. store

Likolo ya ebuteli kati ya ndako ya moke, kaka liboso ya ndako ya boteki biloko ya Newel K. Whitney na Kirtland, Ohio, na Sanza ya yambo 22, 1833, bampaka ya Eklezia bakutanaki na Profeta Joseph Smith. Na Sanza ya zomi na mibale ya mobu elekaki, Joseph azwaki emoniseli moko oyo ezalaki kopesa ye motindo ya kobongisa eteyelo mpo na mingimingi kolengela bandeko mibali mpo na mosala ya koteya.

“Napesi bino motindo,” Nkolo asakolaki, “ ete bosengeli koteyana malongi ya bokonzi.

“Boteyana na etingia mpe ngolu na ngai ekozala na bino, ete bokoka koteyama na bobongi nie na liteya, na motindo, na lilongi, na mobeko ya nsango malamu, na makambo manso oyo etali bokonzi ya Nzambe, eye elongobani mpo ya bino kososola; …

“Ete bokoka kozala bato bamilengeli na makambo nyonso ntango nakotinda bino lisusu komatisa libiangi oyo epayi wapi nabiangaki bino, mpe etinda oyo napesaki bino” (Malongi mpe Mayokani 88:77–78, 80).

Yango “Eteyelo ya Baprofeta,” lokola ezalaki kobiangema, epesaki esika na epakolami kitoko ya molimo. Bakambi ebele ya yambo ya Eklezia bateyamaki kuna. Lelo mokili mobimba ebongwani, kasi botambwisi oyo Nkolo apesaki ezali kosalelama kino lelo oyo. Biso, mpe, tosengeli koluka boyebi mpe bosolo “ya makambo lolenge ezali, mpe lolenge ezalaki, mpe lolenge ekozala” (Malongi mpe Mayokani 93:24).

Mwasi moko azali komanyola buku oyo azali kotanga

Boluki na Biso ya Bosolo

Na mikolo oyo tozali kobika, boyebi ebele epesameli biso koleka oyo ya liboso. Na ntango ya kala, soki olingaki koyeba eloko, osengelaki kokende na biblioteke mpe koluka yango. Lelo interneti mpe ba apareyi ya maboko ezali kopesa biso nzela na nsango ebele oyo tokoki kozwa kaka na mbala moko.

Nkolo asepelaka ntango tozali kosalela na bwamya bisaleli nyonso epesameli biso, kasi Ye apesaki toli oyo esilaka ngala te: “Boluka na molende mpe boteyana moko na moko maloba ya bwania; iyo, boluka kati ya buku ya malamu koleka ya bwania; boluka boyebi, kutu na boyekoli mpe lisusu na bondimi” (Malongi mpe Mayokani 88:118). Ye apesi biso makasi ya koyekola etali mokili nzinganzinga na biso (tala Malongi mpe Mayokani 88:79; 93:53), kasi na boluki na biso ya bosolo, tosengeli koluka Nzambe, oyo “asosolaka makambo nyonso, mpe makambo nyonso ezali liboso na ye, … mpe azali likolo ya makambo nyonso, … mpe makambo nyonso ezali na ye, mpe mpo na ye” (Malongi mpe Mayokani 88:41).

Katikati ya babosolo Nzambe apesaki biso, moko ya motuya koleka mpo na bomoi na biso ezali ete Ye azali Tata na biso ya Lola. Tozali bana mibali mpe bana basi na Ye ya molimo. Ye ayebi mpe alingaka biso mingi koleka. Mpe lokola bana na Ye ya molimo, tozali na lolenge mpe atandele ya bonzambe. Kososola mpe koyamba babosolo yango ya libela epesaka biso kibomoto, motuya, mpe ntina oyo epambolaki mpe ekambaki biso na bomoi na biso yambo ya mabele mpe ekokoba kosala bongo sikawa mpe libela na libela.

bato bazali koleka na elamba.

Tozalaki elongo na Tata na Ebandeli

Ntango tozali koluka bosolo ya makambo “ndenge yango ezalaki,” tokoyeba maloba oyo uta na Mobikisi na biso, Yesu Klisto: “Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino nazalaki na ebandeli elongo na Tata, mpe Mobotami ya Yambo,” mpe “bino lokola bozalaki na ebandeli elongo na Tata” (Malongi mpe Mayokani 93:21, 23).

Yambo ya bomoi na biso na mabele, tosanganaki na lisolo na lola epayi wapi Tata na biso na Lola alakisaki mwango na Ye monene ya esengo. Profeta Joseph Smith ateyaki ete bopusi ya Nzambe mpo na mwango na Ye ezali kopesa biso “libaku moko ya kokende liboso lokola ye moko [mpe] … tobulisama elongo na ye moko.” Mosala mpe nkembo ya Ye ezali “kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto”(Mose 1:39)“.

Tosalelaka nguya na biso ya boponi mpe toponi kolanda mwango ya Tata na Lola. Topambolamaki na kobotama na bomoi oyo, epayi wapi tozali kokoba kozala na nguya ya boponi mpe tokoki koyeba bokufi, koyekola, mpe kokende liboso kino na bomoi ya seko.

Katikati ya mobembo na biso ya bokufi, tokokutana na bitumba mpe bokweyi. Kasi tosengeli te kokutana na botelemeli ya bomoi biso moko. Joseph Smith ateyaki ete Tata na Lola, “Moboti Monene ya molongo mobimba [,] azali kotala likolo ya libota mobimba ya bato na bokebi ya botata mpe botali ya kibotata”

Tata na biso ya Lola, “tata ya ba ngolu, mpe Nzambe ya kobondisa nyonso,” akopambola biso, akotombola biso, mpe akobondisa biso “kati na bolozi na biso, ete tokoka kobondisa bango oyo bazali kati na motungisi, na nzela ya libondisi oyo bisomei tozali kobondisama epayi ya Nzambe” (2 Bakolinti 1:3–4). Lokola eteni moko ya mwango na Ye, Tata na Lola apesaki nzela mpo na biso tozonga epayi na Ye.

Elanga ya Gethsemane, Yisalaele.

Nzela ya Kokende epayi na ya Biso Tata

Bosolo “ya makambo lokola yango ezali mpenza” (Yakobo 4:13) ezali polele: tokoki te kokokisa likoki na biso mobimba lokola bana ya Tata na biso na Lola biso moko. Yesu Klisto, Mwana Mobotami ya Yambo ya Tata na molimo, ayokanaki kozala Mobikisi mpe Mosikoli na biso.

Yesu Klisto, “Mobotami se Moko ya Tata, atonda na ngolu mpe bosolo, kutu Molimo ya bosolo, … ayaki mpe avandaki na mosuni, mpe afandaki kati na biso” (Malongi mpe Mayokani 93:11). Ayaki kolakisa biso lolenge ya kozwa bosepeli, bososoli, mpe esengo na bomoi oyo mpe ya seko.

“Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na likinda na ye, ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.

“Mpo Nzambe atindaki Mwana na Ye te na mokili mpo na kopesa etumbu na mokili; kasi mpo ete mokili na nzela na Ye ekoka kobika.” (Yoane 3:16–17).

Mosala ya Mobikisi na mabele ezali na ntina. Ye “azwaki litondi na mbala moko te, kasi azwaki ngolu mpo na ngolu (Malongi mpe Mayokani 93:12). Ye akolaki kino “azwaki litondi ya nkembo nyonso ya Tata” mpe “nguya nyonso, nyonso mibale na lola mpe na mabele, mpe nkembo ya Tata ezalaki elongo na ye, mpo afandaki na ye” (Malongi mpe Mayokani 93:16–17). Mokonzi ateyaki:

“Napesi bino maloba oyo mpo ete bokoka kososola mpe koyeba lolenge nini ya kogumbamela, mpe koyeba oyo bozali kokumbamela, mpo ete bokoka koya epayi ya Tata na nkombo na ngai, mpe na ntango esengeli kozwa litondi na ye.

Mpo ete soki bobateli mitindo na ngai bokozwa litondi na ye, mpe bokokembelama na ngai lokola nazali na Tata; boye, nalobi epayi na bino, bokozwa ngolu na ngolu” (Malongi mpe Mayokani 93:19–20).

Na elanga ya Getesemane mpe likolo ya ekulusu, Yesu Klisto azwaki likolo na Ye masumu ya mokili mpe anyokwamaki na bolozi mpe “bampasi mpe mitungisi mpe masenginya ya ndenge na ndenge” (Alma 7:11). Yango “esalaki ete [Ye], … oyo aleki banso na monene, alenga mpo na mpasi, mpe atangisa makila na lidusu moko moko ya mposo” (Malongi mpe Mayokani 19:18). Bobele na nzela ya Yesu Klisto mpe Bomikabi mpe Lisekwa na Ye lobiko mpe bonetoli ekoki kokokisama.

Na nzela ya ngolu mpe libonza ya Mobikisi, tokoki kokola kino tokozwa litondi mpe tokoka mokolo moko komemama na bobongi nie. Soki tokolanda ndakisa ya mobikisi mpe tokotosa mitindo na Ye, Ye akokamba mpe akotambwisa biso na nzela na biso ya kozonga na elongi ya nkembo ya Tata na biso ya Lola.

elilingi ya Klisto kotambolaka na nzela ya Yelusalema.

Klisto na Nzela ya Yelusalema, na Michael Coleman, kopi ekoki kosalema te

Ekoyamba Bino ya Ye Likabo?

Katikati na babosolo “ya makambo lokola yango ekozala mpenza” (Yakobo 4:13), toyekoli ete mayele na biso na boseko ekopesama na nzela ya maponi na biso ya kolanda Yesu Klisto mpe kozwa makabo Ye apesi. Makomi eteyi ete biso toko “sepela ete oyo [biso] tolingi kozwa.” Na mawa, mingi balingaki te “kosepela na oyo basengelaki kozwa” (Malongi mpe Mayokani 88:32).

Mokambi ya misio na ngai, Mpaka Marion D. Hanks (1921–2011), oyo asalaki lokola Mokambi Monene ya Bantuku Nsambo, ateyaki bamisionele na ye ete kosengaka oyo tozali kosepela kozwa mpe kosepela na yango ezali nzela moko tokoki kotala esika tozali na mobembo na biso ya molimo. “Mpo litomba nini ekoki moto kozwa soki likabo epesami epayi na ye, mpe azwi likabo yango te?” Ntango tozwi makabo ya Mobikisi na kolukaka na bosembo mpenza mpe kolandaka ye, tokosepela na elikya ya bomoi ya seko mpe Tala, “kati na ye oyo azali mopesi ya [yango] likabo”(Malongi mpe Mayokani 88:33). Likabo yango epesamaki na bolingo mpenza“ ezali ya monene mpenza koleka na makabo nyonso ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 14:7).

Nzambe Azali Tata na Biso ya Lola Ayebi biso mpe alingaka biso. Soki tobaluki epayi na Ye na boluki na biso ya bosolo, tokoki kokangama na mayele, kozwa bwanya, koyamba bosolo, kolinga bolamu, mpe kokangama na pole oyo ewuti na Ye (tala Malongi mpe Mayokani 88:40). Biso boye tokobi katikati na bomoi na biso kino “mokolo ekoya ntango [biso] tokozwa bososoli kutu ya Nzambe, kopesama bomoi na ye mpe na nzela na ye” (Malongi mpe Mayokani 88:49).

Yango ekozala mokolo moko ya nkembo mpe ya esengo koleka.

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2011), 210, Biblioteke ya Nsango Malamu.

  2. Teachings: Joseph Smith, 39.