Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya motoba 2025
Lolenge nini nakoki koyeba ete nayamboli ya solo mpe nalimbisami?
Coming Full Circle [Kokoma Zolongano Etonda], na Jenedy Page
Nkolo alobaki: “ Ye oyo ayamboli masumu na ye, ye alimbisami, mpe ngai, Nkolo, nakokanisa yango lisusu ata moke te.
“Na oyo okoki koyeba soki mutu ayamboli masumu na ye tala—akotubela yango mpe akotika yango” (Molongi mpe Mayokani 58:42–43).
Na nzela ya boyamboli ya solo, tokoki kozwa bolimbisi. “Ntango oyoki olendisami uta na Molimo, okoki koyeba ete nguya ya bomikabi ya mobikisi ezali kosalaka na bomoi na yo.” Mpe soki tokosi lisusu, tokoki lisusu koyambola, kolimbisama, mpe kokoba komekaka.
Mpaka Dieter F. Uchtdorf ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ateyaki: “Satana azali komeka kondimisa biso ete masumu na biso ekolimbisama te mpo ete biso tokoki kokanisa yango. Satana azali mokosi. … Nzambe alakaki te ete biso tokokaki te kokundola masumu na biso. Kokundolaka ekosalisa biso toboya kosala mbemba ya lolenge moko lisusu. Kasi soki totikali solo mpe bosembo, makanisi ya masumu na biso ekokita nsima ya ntango.”
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly For the Strength of Youth Message, June 2025. Lingala. 19629 639