“Tolandaka Yesu Klisto na Kosanganaka na Mosala na Ye,” Liahona, Sanza ya motoba 2025.
Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya motoba 2025
Tolandaka Yesu Klisto na Kosanganaka na Mosala na Ye
Tosanganaka na mosala ya Mobikisi ntango tozali kotya makanisi na bantina na Ye, tozali kobomba mitindo na Ye, mpe tozali kolingana moko na mosusu.
Mambi uta Klisto mpe Elenge Mozwi Mosali Mibeko, na Heinrich Hofmann
Ntango tobatisami, tobandi mosala ya kokamata likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto. Eteni moko ya bokobi yango elakisi ete tosangani na Mobiki na mosala na Ye. Mokambi Dallin H. Oaks, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo, akomaki, “Moko ya bandimbola ya ntina koleka ya kokamata likolo na biso nkombo ya Klisto [ezali] mposa mpe bomipesi ya kokamata likolo na biso mosala ya Mobikisi mpe bokonzi na Ye.”
Mosala ya Mobikisi ezali “kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.” (Mose 1:39). Bozangi kufa ezali likabo ezanga ndelo oyo Yesu Klisto alakaki yambo mpenza na nzela ya Lisekwa na Ye. Bomoi ya seko, nzokande, ezali ndenge moko te na bozangi kufa. Bomoi ya seko ezali likabo moko monene Nzambe akoki kopesa na moto nyonso (tala Malongi mpe Mayokani 14:7). Yango ezali kozala na bomoi mpo na libela lokola mabota liboso na Ye. Mpo na biso tozwa bomoi ya seko, tosengeli kokoma bayekoli ya sembo ya Yesu Klisto. Yango elakisi koyamba nsango malamu ezongisama na kozala na bondimi kati na Klisto mpe Bomikabi na Ye, koyambolaka, kobatisamaka, kozwaka likabo ya Molimo Mosantu, mpe kosalaka mpe kobombaka mayokani ya tempelo, mpe koyikaka mpiko kino na nsuka. Koyikaka mpiko kino na nsuka esangisi kosanganaka na Mobikisi kati na mosala na Ye.
Komipesana Bokasi
Tosanganaka na mosala ya Mobiki ntango tozali kosalisa bana na Nzambe bakoma mpe bayekoli ya sembo ya Yesu Klisto. Yango esangisi kokabola nsango malamu na Ye, na boye kosangisaka Yisalaele oyo epanzanaki, na kotondisaka mikumba na Eklezia ya Mobikisi mpe na kobundaka mpo na kokoma lokola Ye. Ya biso “elonga [kati na mosala na Ye] etali te lolenge nini basusu baponi koyanola [biso], na mabiangi na [biso], to na misala na [biso] ya sembo ya boboto.” Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “Mbala nyonso bosalaka eloko songolo oyo esalisakaaka moto nyonso—na ngambo nyonso ya elamba—bozwa mokano ya kosala mayokani na Nzambe mpe kozwela bango libatisi ya motuya mpe makuli ya tempelo, bozali kosalisa bosangisi ya Yisalaele.”
Kosala mosala ya Nkolo mosala na biso, totyaka makanisi na bantina na Ye, kobomba mitindo na Ye, mpe kolingana moko na mosusu. Ntango tozali kosala mosala na Ye na lolenge na Ye (tala Malongi mpe Mayokani 51:2), biloko mosusu etikalaka mpo na biso toyeba yango na bisomei. Mobikisi ayebisaki Bansantu oyo basanganaki na Jackson County, Missouri:
“Mpo tala, ebongi malamu te ete nakoka kopesa mibeko na makambo nyonso; mpamba te ye oyo asengisami kosala nyonso na makasi, se ye moko wana azali mosali ya goigoi mpe ya bwania te; yango wana akozwa lifuta te.
“Solo nalobi, bato basengeli komipesa mobimba na ntina ya malamu, mpe kosalaka makambo ebele na bonsomi ya bolingi na bango moko, mpe kokokisa bosembo boike.”
“Mpo nguya ezali kati na bango, epayi kani bazali basali mpo na bango moko. Mpe mbala mingi lokola bato bakosala bolamu basengeli soki moke tekobungisa lifuta na bango” (Malongi mpe Mayokani 58:26–28).
Ntango tozali kolanda Mobikisi, kosangana na Ye na mosala na Ye, mpe kosalisa basusu bakoma bayekoli na Ye ya sembo, tozali koteya oyo Ye akokaki koteya. Mpo ete topesameli ndingisa te ya koteya eloko mosusu (tala Malongi mpe Mayokani 52:9, 36), totyaka makanisi na biso makasi na malongi na Ye (tala Malongi mpe Mayokani 68:25). Mpe lisusu, tozali kotya likebi mingimingi na baoyo bazali babola, baye bazali na bosenga, mpe baye bazali na likama te (tala Malongi mpe Mayokani 52:40). Bansete oyo ebetami polele ntango Mobikisi atangaki na makomi ya Yisaya na sinagoge na Nazaleti:
“Molimo ya Nkolo azali likolo na ngai, mpo aponi ngai nasakola nsango malamu na babola; atindi ngai nayebisa bakangami ete bakokangolama, mpe na bato bakufa miso ete bakomona lisusu; mpo na kokangola bato oyo bazali konyokwama,
“Mpo na kosakola mobu ya ngolu ya Nkolo” (Luka 4:18–19; tala lisusu Yisaya 61:1–2).
Mobu ya ngolu ya Nkolo elobeli ngonga ntango mapamboli nyonso ya liyokani na Nzambe ekoya likolo ya bato na Ye. Tozali kolanda Yesu Klisto na kobengaka basusu koyamba mapamboli ya kosalaka mpe kobombaka mayokani na Nzambe mpe na kobatelaka baye oyo bazali babola mpe na bosenga.
Kosangana na Yesu Klisto na mosala na Ye ezali kopesa esengo mpo ete misala, miango, mpe ntina na Ye “ekoki kosuka na nzela te, mpe lisusu ekoki koleka mpamba te” (Malongi mpe Mayokani 3:1). Mpo na baye bamiyoki ya kolemba nzoto, Nkolo apesaki toli: “Yango wana, bolemba kosala bolamu te, mpo bozali kotia moboko moko ya mosala monene. Mpe uta na biloko ya mike mike nde ebimaka oyo ya monene” (Malongi mpe Mayokani 64:33 Totikelaka Nkolo atala oyo etali kobuka mbuma, mpe tosalaka na pete ndambo na biso.
“Motema mpe Molimo ya Bolingi”
Kosalaka ndambo na biso ezali pete lokola tokoki kokanisa mpo ete tosengeli te komema batalenta to makoki eleki nyonso na mosala ya Nkolo. Bosenga na yango ezali bomipesi mpe bolingi ya pete mpenza. Nkolo alobaki na Basantu na Kirtland, Ohio, “Tala, Nkolo asengi motema mpe molimo ya bolingi.” (Malongi mpe Mayokani 64:34). Nkolo akoki kosala bolingi ekoka kokisama, kasi Ye akoki te to akosala te bolingi oyo ekoki. Na maloba mosusu, soki tomipesi mpe tolingi, Ye akoki kosalela biso. Kasi kotalaka te lolenge nini tozali na makoki, Ye akosalela biso te kaka soki tomipesi na mosala na Ye mpe na bolingi ya kosalisa Ye.
Samuel mpe Anna-Maria Koivisto balakisaki nyonso mibale bomipesi na bolingi. Kala te nsima ya libala na bango, ba Koivistos bakenda uta Jyväskylä, Finland, kino Göteborg, Suede, mpo na kolanda mabaku ya mosala. Nsima ya kokoma, Ndeko mobali Koivisto abengamaki kotala Mokambi Leif G. Mattsson, mopesi toli moko na bokambi ya Likonzi ya Göteborg Suede. Mpo ete Samuel azalaki koloba lokota ya Suede te, lisolo etambwisamaki na Angele.
Kolandaka botali oyo ya mokuse, Mokambi Mattsson asengaki Samuel azala lokola motambwisi ya misio na palwasi ya Utby. Samuel atiaki liboso likambo oyo: “Kasi nalobaka lokota ya Suede te.”
Mokambbi Mattsson atelemaki na mesa na ye mpe atunaki na kozongela, “Ngai natuni yo soki okoki koloba lokota ya Suede, to ozali na bosenga ya kosalela Nkolo?”
Samuel ayanolaki ete, “Otunaki soki nazalaki na bolingi ya kosalela Nkolo. Mpe nazali na yango.”
Samuel andimaki libiangi. Anna-Maria lisusu andimaki mabiangi. Bango mibale basalaki na bondimi mpe bayekolaki koloba lokota ya Suede malamu molongo mobimba.
Bomipesi mpe bolingi ya kosalela Nkolo ekomaki bizaleli ya bomoi ya Samuel mpe Anna-Maria. Bazalaki bilombe lokola bato nyonso na Eklezia. Bango basalaki na bondimi ntango nyonso esengamaki na bango. Bango bateyaki ngai ete ntango tozali kosalisa, tozali kosalela makoki na biso (tala Malongi mpe Mayokani 60:13), mpe boye Nkolo asalisaka biso tokokisa bantina na Ye.
Ntango tozali na bolingi ya kosalisa, tozali kobunda na kolobaloba to koyimayima te, mpo ete tolingi te kobebisa mosala na biso na lolenge moko to mosusu. Kolobaloba ekoki kozala elembo ya kotepatepa ya bomipesi, to ete bolingo na biso mpo na mobikisi ezali te makasi lolenge esengeli kozala. Soki etalami malamu te, koyimayima ekoki kokoba kokoma botelemeli liboso ya Nkolo. Bokoli oyo etalisami na bomoi ya Ezra Booth, mobongwani ya yamboyambo mpenza ya Eklezia na Ohio oyo abiangemaki lokola misionele na Missouri.
Lokola atikaki Ohio na sanza ya motoba 1831, Ezra ayokaki kanda ete bamisionele misusu bakokaki kotambola na chariot ntango ye asengelaki kotambola makolo na nse ya moyi makasi ya elenga, koteyaka nzelanzela. Ye ayimakiyimaki. Ntango akomaki na Missouri, alembaki nzoto. Missouri ezalaki te oyo ye azelaki. Na esika, atalaki nzinganzinga na ye mpe amonaki ete “bomoni ezalaki molili.”
Ezra akomaki kosala mabe, motioli mpe motuki koleka. Na kolongwaka Missouri, na esika ya koteyaka ntango azalaki kokende, ndenge esengamaki na ye kosala, ye azongaki na Ohio na lombango lolenge akokaki. Koyimayima na ye ya yambo ebongwanaki na kotepatepa mpe nsuka na kozanga elikya na mayele ya molimo azwaki yambo. Kala te Ezra alongwaki na Eklezia mpe “nsuka na nyonso ‘atikaki Kimoklisto mpe akomaki motelemeli ya Nzambe.’”
Eloko ya lolenge moko ekoki kosalelama na biso soki tozali na bokebi te. Soki tobombi limoni ya libela te, tomikundoli biso moko mosala nini yanfo ezali mpenza, tokoki kolobaloba, kotepatepa, mpe mingi mpenza kobungisa bondimi tozali na yango.
Nasambeli ete tokoki kopona kolanda Yesu Klisto na kosanganaka na Ye na mosala na Ye. Ntango tosali yango, topesami “bilaka minene mpe ya motuya mingi”(2 Petelo 1:4). Mapamboli yango esangisi bolimbisi ya masumu (tala Malongi mpe Mayokani 60:7; 61:2, 34; 62:3; 64:3), lobika (tala Malongi mpe Mayokani 6:13; 56:2), mpe bonetoli (tala Malongi mpe Mayokani 58:3–11; 59:23). Na bosolo, nalakami likabo monene koleka oyo Nzambe akoki kopesa—bomoi ya seko.
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Liahona Message, June 2025.. Lingala. 19610 639