“Nsango Malamu ya Bolingo mpe Esengo,” Liahona, Sanza ya yambo 2025.
Etinda ya sanza Liahona Sanza ya yambo 2025
Nsango Malamu ya Bolingo mpe Esengo
Mapamboli ya Bozongisi masengeli kosepelisa mitema na biso mpe kotondisa biso na botondi mpo na bolingo monene ya Nzambe.
Nsango na biso ya elikya mpe kimia epayi ya banso ezali ete Yesu Klisto azali na bomoi mpe azongisi nsango malamu mpe Eklezia na Ye na mikolo oyo ya nsuka.
“Boniboni makambo yango ezali mpenza ya nkembo mpo na bato!” Profeta Joseph Smith asakolaki. “Na bosolo ekoki kotalelama lokola nsango malamu ya esengo monene mpo na bato nyonso; mpe nsango malamu, oyo esengeli kotondisa mabele mpe kosepelisa mitema ya moto na moto ntango ekoyokana na matoyi na ye.”
Na boumeli ya bikeke mingi nsima ya mosala ya Mobikisi na mabele, bana ya Nzambe balukaki Ye mpe bazalaki na mposa makasi ya pole mpe bosolo mingi. Sikawa nsango ya esengo ya nsango malamu ya Yesu Klisto mpe Bozongisi oyo ezali kokoba ezali kokende liboso mpo na kopambola bato banso mpe kobongisa mokili mpo na mokolo oyo ntango Yesu Klisto akozonga mpo na “koyangela lokola Mokonzi ya Bakonzi mpe koyangela lokola Nkolo ya Bankolo.” Oyo ezali emoniseli ya mozindo ya bolingo oyo ezanga nsuka ya Tata na biso na Lola mpe Mobikisi na biso. Nasepelaka ete nakoki kolekisa bomoi na ngai kosakolaka bosolo oyo na mokili mobimba.
Likambo oyo ekoki Kosalema te mpe likambo ya Kokamwa
Mokolo ya sika ebandi mpo na libota ya bato kati na zamba ya banzete, epayi wapi Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, babimelaki mpe balobaki na Joseph Smith na eyano na losambo ya elenge Joseph etali eklezia nini asengeli kosangana (tala Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:14–20). Yesu Klisto ayebisaki Joseph Smith ete kosangana na eklezia moko te. Alakaki ete litondi ya nsango malamu na Ye ekomonisama epayi ya Joseph na mikolo ekoya.
Mpo na bato mingi, Joseph amonanaki lokola moto oyo akokaki te kobengama na mosala ya ntina boye, mpe bazalaki na bosolo. Azalaki mwana mobali oyo atanga kelasi mingi te mpe azalaki na ntina te, oyo autaki na mwa ferme moko ya moke na engumba moko oyo eyebanaki te. Kaka lokola basusu balobaki mpo na Mobikisi na mikolo na Ye, “Eloko moko ya malamu ekoki kobima na Nazareti?” (Yoane 1:46), mingi bamitunaki bolamu nini ekoki kouta na elenge oyo atanga te ya mibu 14 na engumba ya Palmyra, na New York. Kasi na nzela ya Joseph—atako ekoki kosalema te lokola ekokaki komonana—Tata na Lola mpe Nkolo Yesu Klisto balingaki kosala makambo ya kokamwa mpenza. Yango esengeli komemela biso elikya ete na lolenge na biso ya moke mpe ya komikitisa, tokoki mpe kopesa maboko na ndenge ya ntina na mosala ya Nkolo.
Na nsima, Nkolo abengaki Joseph “mpe alobelaki ye uta na lola, mpe apesaki ye mitindo” (Malongi mpe Mayokani 1:17). Joseph azwaki bimoniseli ya motuya mpe mateya ya ntina oyo ememaki pole ya sika na bososoli na biso ya mwango ya bolingo ya Tata na Lola mpe bolingo ya bosikoli ya Yesu Klisto mpe nguya ya libonza na Ye ya bomikabi. Likambo ya kokamwa, nsango yango ya esengo eyaki na ngonga ya sikisiki ntango bokoli ya ntina na bokumbi, kosolola, mpe bisika mosusu ekopesa nzela na pole ya Nzambe engenga mpo na kopambola bana na Ye mingi mingi.
Anzelu Moroni Azali Kopesa Bapalaki epayi ya Joseph Smith, na C. C. A. Christensen
Litatoli ya Nguya ya Bolingo ya Nzambe
Bobimeli ya anzelu Moroni epayi ya Joseph Smith ezalaki na ntina mpo na Bozongisi mpe bosolo ya nguya ya bolingo ya Nzambe. Moroni ayebisaki Joseph etali likundoli moko, ekomami likolo ya bapalaki ya wolo, ekundamaki penepene (tala Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:33–34). Nsukansuka, Joseph akopesama “nguya euti na likolo” (Malongi mpe Mayokani 20:8) mpo na kobongola mokanda yango na oyo ekokoma Buku ya Mormon, oyo etelemi pembeni ya Biblia mpe ezali litatoli mosusu ya Yesu Klisto.
Na Buku ya Mormon mobimba, totangi etali bato oyo, bikeke mingi liboso ya Klisto, bayebaki mpe basakolaki boyei na Ye mpe bazalaki na mposa makasi mpo na yango. Tokuti lisusu lisolo ya kokamwa ya komonana mpe mosala ya Mobikisi asekwi na kati ya Banefi, na ntango wana Abengisaki banso baya epayi na Ye mpe basimba elembo na mopanzi na Ye mpe bilembo ya bansete na maboko mpe makolo na Ye (tala 3 Nefi 11:14–15). Abikisaki babeli, babibosono, bakufi miso —“baoyo nyonso banyokwamaki na lolenge nyonso” —mpe nsima apambolaki bana mike mpe abondelaki mpo na bango (tala 3 Nefi 17:7–9, 21). Toyekolaka mingi mpenza etali bolingo mpe mawa ya Mobikisi uta na lisolo oyo ya bule.
Buku ya Mormon etatoli ete “Yesu azali Klisto”. Bondimisi na Buku ya Mormon ekundolisi biso mbala na mbala ete Tata na biso na Lola mpe Mobikisi na biso balingaka biso koleka eloko nyonso oyo tokoki kokanisa.
Mapamboli ya Bonganganzambe mpe Eklezia
Bozongisi ekobaki na komonana ya bamemi-nsango mosusu ya lola epayi ya Joseph Smith. “Yoane Mobatisi mosekwi azongisaki likoki ya kobatisa na nzela ya bozindisi na mai mpo na bolimbisi ya masumu. Misato ya Bapostolo zomi na mibale ya liboso—Petelo, Yakobo, mpe Yoane—bazongisaki mosala ya bapostolo mpe bafungola ya likoki ya bonganganzambe. Basusu mpe bayaki, kotangaka Eliya, oyo azongisaki likoki ya kosangisa mabota esika moko mpo na libela na mokangano ya seko mosika koleka ntango ya liwa.”
Na mokolo ya 6 ya sanza ya minei 1830, Yesu Klisto abandisaki na nzela ya Profeta Joseph eklezia moko oyo esalemaki na ndakisa ya eklezia oyo Abongisaki na ntango ya Kondimana ya Sika (tala Biteni ya Bondimi 1:6), oyo etondi na “moboko ya bapostolo mpe basakoli, Yesu Klisto ye moko azali libanga ya litumu ya ndako” (Baefese 2:20). Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka esalaka ete mapamboli ya nguya ya bonganganzambe ezongisami epesama na bana nyonso ya Nzambe oyo bamilengelaka mpo na kozwa yango.
Lokola Mokambi Russell M. Nelson ateyaki biso, tokoki kozwa esengo na boyamboli ya mokolo na mokolo ntango tobalukaka epayi ya Tata na Lola mpe Mobikisi na biso. Mpo na moto nyonso oyo azali komiyoka ete azali na ntina te to azali na esika te: bato nyonso babengisami mpo na koya epayi ya Klisto mpe Eklezia na Ye. Eklezia ezali te ndako mpo na bato oyo babonga nie kasi ezali lopitalo mpo na babeli. Mpaka Dieter F. Uchtdorf ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale akunduelaka biso ete “toyaka na eklezia mpo na kobomba mikakatano na biso te kasi mpo na kobikisa yango.”
Na eklezia tozwaka esengo na mabaku ya komibalusa libanda, kosalela basusu na bolingo, mpe kokabola mayele na biso moko ya moto na moto na ebele ya bolamu ya Klisto. Tokoki “kotangama kati na bato ya eklezia ya Klisto” mpe “kokanisama mpe koleisama na liloba malamu ya Nzambe”.(Moroni 6:4). Oyo lipamboli monene!
Ntina ya Esengo Monene
Mokolo moko Profeta Joseph Smith asakolaki, “Sikoyo, nini toyoki na nsango malamu oyo tozwi? Mongongo ya esengo! Mongongo ya boboto uta na lola; mpe mongongo ya bosolo uta na mabele; nsango ya nsai mpo na bakufi, mongongo moko ya bosepeli mpo na bato na bomoi mpe mpo na bakufi; nsango ya nsai ya bosepeli monene (Malongi mpe Mayokani 128:19).
Nsango oyo ya esengo eyei mpo ete Tata na Lola mpe Mwana na Ye ya bolingo, Yesu Klisto, balingaka biso mpe bazali na mposa—koleka eloko nyonso—koyamba biso lisusu na miso na Bango, mpo ete tokoka kozala na lolenge ya bomoi oyo Bazali kobika mpo na libela. Bozongisi emonisaka ete Basali nyonso esengeli mpo na kosala ete likambo oyo ezala likoki ya nkembo mpo na biso nyonso. Na mobembo na biso ya seko, tokokutana na mimekano mpe mikakatano, kasi “[biso] tozali, ete [to]zala na esengo” (2 Nefi 2:25) kati na bomoi oyo mpe oyo elandi. Profeta Joseph ayebaki yango malamu koleka mingi.
Joseph akutanaki na botelemeli mpe minyoko mbala na mbala, atako bongo abatelaki “ezaleli na ye ya esengo” (Joseph Smith—Makambi ya Kala 1:28). Atikalaki na esengo, makasi, mpe koyika mpiko, mpe akokisaki mosala ya kokamwa oyo bapesaki ye asala. Napesi lokumu na Basantu nyonso ya yambo oyo bandimaki, basungaki, mpe balandaki Profeta Joseph Smith mpe bamibulisaki mpo na botongi ya Eklezia. Tozali na nyongo monene epayi na bango ya botondi mpe ya lokumu.
Ezalaki bongo na mikolo ya ebandeli ya Eklezia, mpe ekoki kozala bongo lelo. Kasi Bozongisi ezali kokoba kosalema. Na Yesu Klisto na moto ya Eklezia oyo, baprofeta ya bomoi bakokoba kotambwisa biso. Bandako ya Nkolo ekokoba kotongama, ete mapamboli ya mayokani ya seko elongo na Nzambe ekoka kokangisa biso na Ye mpe na balingami na biso na ngambo mibale ya elamba (tala Matai 16:19). Bolingo ya Nzambe mpe ya Yesu Klisto ekopanzana na mokili mobimba ntango tozali kolanda etinda ya Mobikisi ya koleisa bampate na Ye mpe kokabola nsango malamu na Ye. Tokotatola bosolo ya Bozongisi ezali kokende liboso na ndenge mpe na bisika oyo elingaki mpenza kokanisama te na mikolo ya Joseph.
Tokoki kozwa makasi mpe esengo monene—lokola Profeta Joseph asalaki—ntango tozali koyamba mpe kobika bosolo oyo ya motuya. Libiangi oyo Joseph asalaki epayi ya Basantu na mikolo na ye ezali kokoba elongo na biso lelo: “Ekotia biso molende te na likambo ya ntina monene boye? Bokende liboso kasi bozonga nsima te. Boyika mpiko, … mpe bokende liboso, libosoi na elonga! Tika mitema na bino esepela, mpe ezala na esengo mingi mpenza” (Malongi mpe Mayokani 128:22).
Tika ete nsango malamu ya bolingo mpe esengo oyo Bozongisi ememaka epambola mpe etambwisa bomoi na biso—sikawa mpe ntango nyonso.
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Etinda ya sanza ya Liahona, Sanza ya yambo 2025. Lingala. 19600 639