Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya yambo 2025
Tala epayi ya Klisto
Malongi mpe Mayokani 6:36.
Moto ya likambo ya Bilenge ya 2025 ekosalisa yo opona kotyela motema na esika ya ntembe mpe kondima na esika ya kobanga.
Kailey, elenge moko ya mbula zomi na nsambo, azalaki na ekipi moko ya bilenge oyo babetaka masano ya kokumisa baninga, kino ntango akutanaki na likama moko oyo ezokisaki ye na bongo. Kobika na ye esalaki ete akende kelasi te, mpe akomaki komiyoka ete azali ye moko. Azalaki komitungisama mingi na makanisi mpe ayebaki te epayi wapi kozwa lisalisi. Moninga moko ayebisaki ye ete ayokela bamisionele. Bateyaki ye etali Bomikabi ya Yesu Klisto. Koyekola mingi etali Klisto epesaki ye elikya, mpe ayokaki lokola nde Nzambe Ye moko azalaki kosembola loboko epayi na ye.
Kailey ayebisaki mama na ye, “Nayoka naino ete Nzambe alingaka ngai. Kasi sikawa nayebi ete Alingaka ngai.”
Mama na ye, Michelle, akamwaki mwa moke. Ye mpe mobali na ye, Brock, batikaki Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ntango Kailey azalaki na mibu nsambo mpo na mituna ndenge na ndenge, ntembe, mpe mitungisi. Bakanisaki ete mwana na bango ya mwasi akozala na esengo mingi ata soki makita mpe mitindo nyonso ezalaki te. Bakanisaki ata moke te ete boponi na bango ekopekisa Kailey azala na boyokani ya penepene na Nzambe. Ntango Michelle mpe Brock batalaki ndenge Kailey abongwanaki, basosolaki ete esili koleka ntango molai uta bamiyokaki penepene na Nzambe, mpe balingaki komiyoka bongo lisusu.
Bakutanaki na episikopo na bango, mpe na ntango moke libota, kobakisa mpe leki ya Kailey ya mobali Braeden, bazongaki na eklezia. Komiyoka penepene na Nzambe mpe kokangama lisusu elongo na Ye—mingimingi na nzela ya losambo—ezongisaki bondimi na bango. Kozongela eklezia esilisaki mituna mpe mitungisi na bango nyonso te, kasi bamonaki ete kozala na bokangami makasi ya moto ye moko na Nzambe ezalaki na ntina mingi koleka kozanga kondima na bango.
Nyonso oyo ebandaki ntango moninga —elenge lokola yo—abengisaki Kailey atala epayi ya Klisto. Mpe asalaki bongo!
Yesu Klisto alobaki, “Botalela ngai na makanisi na bino nyonso; botia ntembe te, bobanga te.”(Malongi mpe Mayokani 6:36). Oyo ezali likanisi oyo ezali nsima ya Moto ya likambo ya Bilenge ya 2025. Tika biso tokabola lolenge nini okoki kopona elikya likolo ya ntembe mpe bondimi likolo ya bobangi ntango ozali kotala epayi ya Klisto:
Uta na loboko ya mwasi kino na loboko ya mobali: Ndeko mwasi Runia, Mokambi Freeman, Ndeko mwasi Spannaus
Tamara W. Runia
Ntango nazali kobunda, esalisaka ngai ntango nyonso komona na makanisi Yesu Klisto na maboko esembwama. Ntango nazali kotala epayi na Ye, na kanisaka maloba ya loyembo, “Nakotambola elongo na Yesu”: “Akotika ngai ata moke te, ata soki nakweyi.”
Emily Belle Freeman
Ntango natangaki makomi ya moto ya likambo oyo, nazali komikundola Petelo na Mbu ya Galilai. Kokanisa mingi na mopepe ebakisaki kobanga mpe ntembe na ye, oyo esalaki ete azinda na mbonge makasi. Kasi kotyaka makanisi na ye nyonso epayi ya Mobikisi esalisaki ye asala likambo oyo asalaki naino liboso: atambolaki likolo ya mai! Ezali ya kokamwa, mpenza. Nini okoki kokokisa ntango ozali kotala epayi na Ye?
Andrea Muñoz Spannaus
Ntango nabandi kobanga, ezala esika nini nazali to likambo nini ekomeli ngai, nakanisaka na nko boyokani na ngai na Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Nazongelaka na makanisi na ngai mbala mingi: NAZALI MWANA MWASI YA NZAMBE. Nakobaka kosala bongo kino ntango nakobanda koyoka malamu. Yango esalamaka ntango nyonso!
Uta na loboko ya mwasi kino na loboko ya mobali: Ndeko mobali Wilcox, Mokambi Lund, Ndeko mobali Nelson
Bradley R. Wilcox
Mituna soki nani atyelaka yo likebi mpe alingaka yo mingi. Ezali baboti na yo mpe bakambi ya Eklezia? Ezali batu na rezo socio oyo okoki kozala kaka motango pona bango? Tala epayi ya Tata na Lola mpe Klisto. Batyaka mpenza likebi!
Steven J. Lund
Mikundola ntango ozali kotanga mito ya makambo ya Lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona mpe Bilenge Basi: Ozali mwana mobali to mwana mwasi ya bolingo ya Nzambe. Zala na bondimi ete Tata azali na mwango mpo na yo. Kotala epayi ya Klisto elimboli komona ete Bomikabi na Ye ezali mpenza na katikati ya mwango wana.
Michael T. Nelson
Kotanga makomi ezali kotala epayi ya Klisto! Ntembe mpe bobangi esili na lolenge ya bomoto ntango tozali komikundola makamwisi mpe mateya ya Yesu. Tozali mpenza na libaku malamu ya kozala na maloba na Ye. Basalaka na likambo nyonso oyo tokutanaka na yango na bomoi na biso.
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya yambo 2025.. Lingala. 19615 639