2020–2024
Bokufi Ezali Kosala!
Likita linene ya Sanza ya zomi 2024


10:59

Bokufi Ezali Kosala!

Atako mikakatano biso banso tokutanaka na yango, Tata na biso ya bolingo na Lola abongisi mwango ya esengo na boye ete tozala na mokano ya kozanga te.

Mpo na mibu mingi napesamaki mokumba ya koteya ndeko mwasi moko mobange na ndako na palwasi na ngai. Azalaki kobika na mpasi. Azalaki na mikakatano ndenge na ndenge ya kolongono ya nzoto mpe anyokwamaki bomoi na ye mobimba uta na likama moko ya bomwana na libanda ya masano. Libala ekufaki ntango azalaki na mibu 32 na bana mike minei ya kobokola mpe koleisa, abalaki lisusu na mibu 50. Mobali na ye ya mibale akufaki ntango azalaki na mibu 66, mpe ndeko mwasi oyo awumelaki lisusu na bomoi mibu 26 lokola mwasi mokufeli-mobali.

Atako mikakatano na ye ya bomoi mobimba, azalaki sembo na mayokani na ye kino na nsuka. Ndeko mwasi oyo azalaki na molende na bonkoko, kokende na tempelo, azalaki mpe mosangisi mpe mokomi ya mambi ya libota. Atako azalaki na mimekano mingi ya mpasi, mpe kozanga ntembe ayokaki na bantango mosusu mawa mpe kozala ye moko, azalaki na elongi ya esengo mpe bomoto ya ngolu mpe ya esengo.

Basanza libwa nsima ya liwa na ye, moko ya bana na ye ya mibali akutanaki na likambo moko ya kokamwa na tempelo. Ayekolaki na nguya ya Molimo Mosantu ete mama na ye azalaki na nsango moko mpo na ye. Asololaki na ye, kasi na nzela ya bomoni te to ya maloba oyo ezali koyokana te. Nsango oyo elandi ya ntembe te eyaki na makanisi ya mwana mobali uta na mama na ye: “Nalingi oyeba ete bokufi ezali kosala, mpe nalingi oyeba ete nazali kososola sikawa mpo na nini makambo nyonso ekomelaki ngai [na bomoi na ngai] lolenge ekomaki—mpe nyonso ezalaki malamu.”

Nsango oyo ezali mpenza ya kokamwa soki moko na moko azali kotalela ezalela na ye mpe mikakatano ndeko mwasi oyo ayikaki mpiko mpe alongaki.

Bandeko mibali mpe basi, bokufi ezali kosala! Ebongisami mpo na kosala! Atako mikakatano, mpasi ya motema, mpe bankpokoso biso nyonso tozali kokutana na yango, Tata na biso na Lola ya bolingo, ya bwanya, mpe abonga nie abongisi mwango ya esengo oyo ekosala ete tokweya te. Mwango na ye epesaka nzela mpo na biso tolonga mabunga na biso ya nkufa. Nkolo alobi, “Oyo ezali mosala na ngai mpe nkembo na ngai—kokokisa bozangi nkufa mpe bomoi ya seko ya moto.”

Nzokande, soki tolingi kozwa litomba ya “mosala mpe nkembo” ya Nkolo, ata “bozangi nkufa mpe bomoi ya seko,” tosengeli kozela koteyama mpe kotangisama, mpe koleka na nzela ya moto ya moyangwisi bibende—ntango mosusu na bandelo na biso ya nsuka. Kokima mpenza makambo, mikakatano, mpe bankpokoso ya mokili oyo ekozala nde kokima mwango oyo ezali mpenza ya ntina mpo na bokufi esala.

Mpe na yango, tosengeli te kokamwa ntango bangonga ya mpasi ekoyela biso. Tokokutana na makambo oyo ekomeka biso mpe na bato oyo bakopesa biso makasi ya kosalela bolingani ya solo mpe motema molai. Kasi tosengeli koyika mpiko na mikakatano na biso mpe komikundola, lokola Nkolo alobaki:

“Mpe moto nyonso oyo akotika bomoi na ye na ntina na ngai, mpo na ntina ya nkombo na ngai, akozwa yango lisusu, kutu bomoi ya seko.

“Boye, bobanga banguna na bino te [to makambo, mikakatano, to mimekano na bino ya bomoi oyo], mpo nasili kokamata mokano na motema na ngai …, elobi Nkolo, ete nakomeka bino na makambo nyonso, mpo na koyeba soki bokotikala na liyokani na ngai … ete bokoka komonana ete bolongobani.”

Ntango tozali komiyoka ya kotungisama to komibanzabanza na oyo etali makambo na biso to koyoka ete tozali kozwa mingi koleka ndambo na biso ya mikakatano ya bomoi, tokoki komikundola oyo Nkolo alobaki na bana ya Yisalaele:

“Mpe bokanisaka ndenge Nkolo Nzambe na bino atambwisaki bino na mobembo nyonso kati na esobe mibu ntuku minei (40), mpo na kobuka lolendo na bino, mpe komeka bino, ayeba mozindo ya mitema na bino, kotala soki [bokoki] kotosa mibeko na ye, to te.”

Lokola Lehi ateyaki mwana na ye ya mobali Yakobo:

“Oyokaki mpasi ya mitungisi mpe mawa mingi. … Nzokande, … [Nzambe] akobulisa mitungisi na yo mpo na litomba na yo. … Yango wana, nayebi ete osikolami, na ntina ya bosembo ya Mosikoli na yo.”

Mpo ete bomoi oyo ezali esika ya komekama mpe “mapata ya molili ya mikakatano ezali kozipa biso mpe kotya kimia na biso na likama,” ekozala malamu komikundola toli oyo mpe elaka ezwami na Mosiya 23 etali mikakatano ya bomoi: “Nzokande—oyo azali kondimela [Nkolo] lolenge moko akotombolama na mokolo ya nsuka.”

Ntango nazalaki elenge, nakutanaki ngai moko na mpasi moko monene mpe nsoni oyo eyaki lokola mbano ya misala ya mabe ya moto mosusu, oyo mpo na mibu mingi ekitisaki lokumu na ngai mpe ndenge ya bolongobani na ngai liboso ya Nkolo. Nzokande, nazali kopesa litatoli na ngai moko ete Nkolo akoki kolendisa biso mpe koyikisa biso mpiko kati na mikakatano nyonso oyo tobengami kokutana na yango na ntango tozali kofanda na lobwaku oyo ya mpizoli.

Toyebi malamu likambo oyo Paulo akutanaki na yango:

“Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na ntina ya bimoneseli ya kokamwa [Oyo nazwi], batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, lokola ntoma ya Satan mpo na konyokola ngai, na ntina ete nazala na lofundu te.

“Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato mpo ete alongola ngai nzube yango.

“Mpe alobaki na ngai, Ngolu na ngai ekoki mpo na yo: mpamba te nguya na ngai ekokisamaka kati na bolembu. Yango wana, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala na ngai.”

Toyebi te soki “nzube” nini ezalaki na kati ya nzoto ya Paulo. Aponaki kolimbola te soki ezalaki maladi ya nzoto, bokono ya moto to ya makanisi, to lisenginia. Kasi tosengeli te koyeba likambo yango nyonso mpo na koyeba ete azalaki kobunda mpe kosambela Nkolo mpo na lisungi mpe ete nsukansuka, makasi mpe nguya ya Nkolo ezali oyo esungaki ye na maladi yango.

Lokola ezalaki mpo na Paulo, ezalaki na nzela ya lisungi ya Nkolo nde nsukansuka nalendisamaki na mayoki mpe na molimo, mpe nsukansuka, nsima ya mibu mingi namonaki ete nazalaki ntango nyonso moko ya motuya mpe ya kolongobana mpo na mapamboli ya nsango malamu. Mobikisi asalisaki ngai nalonga mayoki na ngai ya kozanga kobonga mpe kotanda bolimbisi ya solo epayi ya mosali mabe Na nsuka nasosolaki ete Bomikabi ya Mobikisi ezalaki likabo ya moto ye moko mpo na ngai mpe ete Tata na ngai ya Lola mpe Mwana na Ye balingaka ngai na lolenge ya kobonga nie. Mpo na Bomikabi ya Mobikisi, bokufi ezali kosala.

Ntango nazalaki nsukansuka kopambolama mpo na komona lolenge nini Mobikisi abikisaki ngai mpe asungaki ngai na ntango ya makambo yango, nazali kososola na polele ete ezalela ya mawa ya bomwana na ngai ezalaki ya ngai mobembo mpe makambo oyo nakutana na yango, ekateli mpe nsuka na yango ya makambo ekoki te kopesama na baye banyokwami mpe bazali kokoba konyokwama uta ezaleli ya mabe ya basusu.

Nayebi ete makambo ya bomoi—ya malamu mpe ya mabe—ekoki kolakisa biso mateya ya motuya. Sikawa nayebi mpe nazali kotatola ete bokufi ezali kosala! Nazali na elikya ete lokola mbano ya mobimba ya makambo nakutana na yango na bomoi na ngai—ya malamu mpe ya mabe—nazali na motema mawa mpo na baye banyokwami uta na masamu ya basusu mpe komitia na esika ya banyokwami.

Nazali mpenza na elikya ete lokola mbano ya makambo nakutana na yango na bomoi na ngai—ya malamu mpe ya mabe—nazali na boboto na basusu, kosalela basusu makambo ndenge Mobikisi alingaki kosalela bango, kozala na bososoli monene mpo na mosumuki, mpe ete nazali na bosembo ya solosolo. Ntango tozali koyekama na ngolu ya Mobikisi mpe kobomba mayokani na biso, tokoki kozala lokola ndakisa ya matomba oyo ekoki kozwama na Bomikabi ya Mobikisi.

Nakokabola ndakisa ya nsuka ete bokufi ezali kosala.

Mama leki mpe mama ya Mpaka Hales.

Mama leki ya Mpaka Hales, Lois VandenBosch, mpe mama na ye, Klea VandenBosch.

Mama na ngai azalaki na mobembo ya pete te na bokufi mobimba. Azwaki te masanzoli to lokumu mpe azwaki te mabaku ya kotanga nsima ya eteyelo ya ntei. Abelaki maladi ya polio na bomwana, oyo ememaki mpasi na bomoi mobimba mpe mpasi na lokolo na ye ya mwasi. Ntango azalaki mokolo, akutanaki na makambo mingi ya mpasi mpe mikakatano na nzoto mpe ya mosolo kasi atikalaki sembo na mayokani na ye mpe na kolinga Nkolo.

Ntango mama na ngai azalaki na mibu 55, yaya na ngai ya mwasi akufaki, kotikaka mwana mwasi ya sanza mwambe, mwana nkasi na ngai, azanga mama. Mpo na bantina ndenge na ndenge, nsukansuka Mama abandaki kobokola mwana nkasi na ngai mpo na mibu 17 oyo elandaki, kutu kati na mimekano ya makasi mpenza. Kasi, atako makambo yango, asalelaki libota na ye, bazalani, mpe bandimi ya palwasi na esengo mpe motema moko mpe asalaki lokola mokulisi na tempelo mpo na mibu mingi. Na mikolo ebele ya nsuka ya bomoi na ye, Mama anyokwamaki uta na maladi moko ya moto, azalaki kutu na mobulungano, mpe abombamaki na ndako moko ya mibange. Likambo ya mawa, azalaki ye moko ntango akufaki na mbalakaka.

Sanza mingi nsima liwa na ye, nazwaki ndoto moko oyo natikala kobosana te. Kati na ndoto na ngai, nazalaki na biro na ngai na Ndako ya Misala ya Eklezia. Mama akotaki na biro. Nayebaki ete awutaki na mokili ya milimo. Nakomikundola kaka mayoki oyo nayokaki. Alobaki eloko moko te, kasi azalaki na kitoko ya elimo oyo naino namona liboso mpe oyo ezali mpasi mpo na kolimbola.

Elongi mpe bomoto na ye ezalaki ya kitoko mpenza! Namikundoli kolobaka na ye, “Mama, ozali mpenza kitoko!” koloba etali nguya mpe kitoko na ye ya molimo. Andimelaki ngai—lisusu kozanga koloba. Nayokaki bolingo na ye mpo na ngai, mpe nsima nayebaki ete azali na esengo mpe abikisami uta maladi mpe mikakatano na ye ya mokili mpe azali kozela na lombango “lisekwa ya nkembo.” Nayebi ete mpo na Mama, bokufi esalaki—mpe ete ezali kosala mpo na biso, mpe.

Mosala mpe nkembo ya Nzambe ezali ya kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto. Makambo ya bokufi ezali eteni ya mobembo oyo epesaka biso nzela tokola mpe tokende liboso kino bozangi kufa mpe bomoi ya seko yango. Totindamaki awa te mpo na kokweya kasi mpo na kolonga kati na mwango ya Nzambe mpo na biso.

Mokonzi Benyamina ateyaki: “Mpe lisusu, nazali na mposa ete bomaniola likolo lya bozali bopambolama mpe bwa bosepeli bwa bango baye babateli mitindo mya Nzambe. Mpo bapambolami o makambo manso, ma ntango mpe ma molimo lokola; mpe soko batikali potongono kina o nsuka bayambemi o kati ya lola, ete na yango bakoka kofanda elongo na Nzambe na bozali boko bwa esengo ekosuka mokolo moko te.” Na maloba mosusu, bokufi ezali kosala!

Natatoli ete lokola tozali kozwa makuli ya nsango malamu, kokota na mayokani na Nzambe mpe nsima kobomba mayokani yango, koyambola, kosalela basusu, mpe koyika mpiko kino na nsuka, tokoki mpe kozala na bondimisi mpe motema mobimba etyami na Nkolo ete bokufi ezali kosala! Natatoli na ntina ya Yesu Klisto mpe ete lobi na biso ya nkembo elongo na Tana na biso ya Lola ekokisami na ngolu mpe Bomikabi ya Mobikisi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Ekabolami na ndingisa. Likambo oyo ezali na boyokani na liteya ya Nkolo ete liwa “ekozala elengi epayi ya” bayengebene (Malongi mpe Mayokani 42:46). Profeta Joseph Smith alimbolaki, “Milimo ya bayengebene etombwami mpo na mosala monene mpe ya nkembo koleka … [na] mokili ya milimo” (Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith [2007], 179). Ateyaki lisusu, “Bazali mosika te uta na biso, mpe bayebi mpe basosolaka makanisi, mayoki, mpe misala na biso” (in Discourse, Oct. 9, 1843, as reported by Times and Seasons, 331, josephsmithpapers.org).

  2. Mose 1:39.

  3. Malongi mpe Mayokani 98:13–14.

  4. Dutelenome 8:2.

  5. 2 Nefi 2:1–3.

  6. “Seigneur, merci pour le prophète,” Cantiques, no. 10.

  7. Mosiya 23:22.

  8. 2 Bakolinti 12:7–9.

  9. Mpaka Richard G. Scott alobaki “Natatoli ete nayebi bato oyo banyokwami makasi oyo balongi na kolongwa na mobembo ya mpasi kino na libiki mobimba na nzela ya nguya ya Bomikabi” (“To Heal the Shattering Consequences of Abuse,” Liahona, Sanza ya mitano 2008, 40).

  10. Malongi mpe Mayokani 138:14

  11. Tala Mose 1:39.

  12. Mosiya 2:41.