Na Ntaka ya Mibu Mingi Te
Soki tozali sembo te mpe na botosi te, tokoki kobongola lipamboli ya bomengo oyo Nzambe apesi biso na elakeli mabe ya lolendo oyo ezali kopengwisa mpe kolongola likebi na biso.
Bandeko, kofandaka likolo lelo, namoni Ndako ya Makita oyo kotonda mbala misato, mpo na mbala ya liboso uta COVID. Bozali bayekoli bomipesa ya Yesu Klisto oyo bazali na mposa ya koyekola. Napesi bino longonia mpo na bosembo na bino. Mpe nalingaka bino.
Ezra Taft Benson asalaki lokola Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka kobanda sanza ya zomi na moko 1985 kino Sanza ya mitano 1994. Nazalaki na mibu 33 ntango Mokambi Benson akomaki Mokambi ya Eklezia mpe 42 ntango akufaki. Mpe mateya mpe litatoli na ye esalisaki ngai na ndenge ya mozindo mpe ya nguya.
Moko ya bilembo ya mosala ya Mokambi Benson ezalaki bolandeli na ye ya ntina mpe motuya ya Buku ya Mormon. Abetaki nsete mbala na mbala ete Buku ya Mormon “ezali libanga ya likonzi ya eyamba na biso—libanga likonzi ya litatoli na biso, libanga likonzi ya mateya na biso, mpe libanga ya likonzi na litatoli ya Nkolo mpe Mobikisi na biso.” Mbala mingi azalaki mpe kobeta nsete na mateya mpe makebisi etali lisumu ya lolendo oyo ezwami na kondimana oyo ya mikolo ya nsuka ya Yesu Klisto.
Liteya moko ya sikisiki ya Mokambi Benson etutaki ngai mingi mpe ezali kokoba kosunga boyekoli na ngai ya Buku ya Mormon. Alobaki:
“Buku ya Mormon … ekomamaki mpo na mikolo na biso. Banefi mpe Balamani ya kala batikala kozala na buku yango ata moke te. Ezalaki mpo na biso. Mormon akomaki penepene na nsuka ya sivilizasio ya Banefi. Na nse ya bofuli ya Nzambe, oyo amonaka makambo nyonso uta na ebandeli, [Mormon] akomaki na mokuse bikeke ya makomi, koponaka masolo, maloba, mpe milulu oyo esengelaki kosalisa biso mingi.
Mokambi Benson akobaki: “Moko na moko ya bakomi minene ya Buku ya Mormon batatolaki ete akomaki mpo na bankola ekoya. … Soki bamonaki mokolo na biso, mpe baponaki makambo wana oyo ekozala na litomba monene mpenza mpo na biso, ezali boye te lolenge nini tosengeli koyekola Buku ya Mormon? Tosengeli ntango nyonso komituna, ‘Mpo na nini Nkolo afulaki Mormon … mpo na kokotisa [lisolo oyo] na mokanda na ye? Liteya nini nakoki koyekola na [toli oyo] mpo na kosalisa ngai nabika na mokolo mpe mibu oyo?’”
Maloba ya Mokambi Benson esalisi biso tososola ete Buku ya Mormon ezali libosoliboso te mokanda ya mambi ya kala oyo etali makambo ya kala. Kasi, mokanda oyo ya makomi etali mikolo ekoya mpe ezali na mabongisi ya ntina, makebisi, mpe mateya oyo ekanamaki mpo na makambo mpe mikakatano ya mikolo na biso. Yango wana, Buku ya Mormon ezali buku moko oyo elobeli lobi na biso mpe bantango oyo tozali kobika sikawa mpe oyo tokobika lobi ekoya.
Nasambeli mpo na lisalisi ya Molimo Mosantu ntango tozali sikawa kotalela mateya ezali na ntina mpo na biso lelo uta na buku ya Elamani kati ya Buku ya Mormon.
Banefi mpe Balamani
Lisolo ya Elamani mpe bana na ye ya mibali elimboli bato oyo bazalaki kozela mbotama ya Yesu Klisto. Ndambo ya ekeke oyo elobelami lisusu na mokanda ya makomi emonisi mbongwana mpe bosembo ya Balamani mpe nkanda, bopengwi, mpe bosoto ya Banefi.
Milongo ya makambo ya bokokanisi mpe bokeseni kati na Banefi mpe Balamani uta na mokanda oyo ya kala ezali koteya mingi mpo na biso lelo.
“Balamani bakomaki, eteni eleki mingi ya bango, bato ya sembo, na lolenge ete bosembo na bango elekaki mpenza oyo ya Banefi, na ntina ya kotelema ngwi na bango mpe molende na bango kati na bondimi.
“[Mpe] tala, ezalaki na mingi ya Banefi oyo bakomaki mito makasi mpe bato bazanga boyamboli mpe ya nkuna mingi koleka, na lolenge ete babwakaki liloba ya Nzambe mpe mateya mpe masakoli nyonso oyo masalemaki na kati na bango.”
“Mpe boye tomoni ete Banefi babandaki kokita moke moke kati na bozangi boyambi, mpe bakolaki na nkuna mpe bonsomo, nzokande Balamani babandaki kokola mpenza na boyebi ya Nzambe na bango; iyo, babandaki kobatela meko mpe mitindo na ye, mpe kotambola na bosolo mpe alima liboso na ye.
“Mpe boye tomoni ete Molimo ya Nkolo abandaki kolongwa uta na Banefi, na ntina ya nkuna mpe bokasi ya mitema na bango.
“Mpe boye tomoni ete Nkolo abandaki kosopa Molimo na ye epayi ya Balamani, na ntina ya petepete na bango mpe bolingi na bango mpo na kondima maloba na ye.”
Mbala mosusu likambo ya kokamwa mpe ya kobulunganisa ya bokiti oyo na bopengwi ya Banefi ezali likambo oyo ete “mabe oyo nyonso eyaki epayi na bango na ntaka ya mibu mingi te.”
Banefi Bapesaki Nzambe Mokongo
Lolenge nini bato oyo kala bazalaki sembo bakokaki kokoma mitema makasi mpe bato mabe na mwa ntango moke boye? Lolenge nini bato bakokaki kobosana nokinoki Nzambe oyo apambolaki bango mingi?
Na lolenge moko ya nguya mpe ya mozindo, ndakisa ya mabe ya Banefi ezali liteya mpo na biso lelo.
“Lolendo … ebandaki kokota … kati na mitema ya bato oyo bazalaki koloba bazali bato ya eklezia ya Nzambe … na ntina ya bozwi monene koleka na bango mpe bofuluki na bango na mboka.”
“[Bango] batiaki mitema na [bango] likolo ya bozwi mpe biloko ya mpambampamba ya mokili oyo” “na ntina ya lolendo oyo [bango] … batikaki ekota kati ya mitema na [bango], oyo … etombolaki [bango] likolo koleka oyo ezali malamu na ntina ya bozwi na [bango] monene mpenza!
Mingongo ya kala uta na mputulu ezali kobondela biso lelo mpo na koyekola liteya oyo ya seko: bomengo, nkita, mpe makoki ezali bosangani ya nguya oyo ekoki komema ata bayengebene na komela ngenge ya molimo ya lolendo.
Kotika lolendo ekota na mitema na biso ekoki kotinda biso totiola oyo ezali ya bule; koboya kondima na molimo ya lisakoli mpe ya emoniseli; konyata na nse ya makolo na biso mitindo ya Nzambe; koboya liloba ya Nzambe; kobwaka libanda, koseka, mpe kofinga baprofeta; mpe kobosana Nkolo Nzambe na biso, mpe “kolinga te ete Nkolo [na biso] Nzambe, oyo akelaki [biso], ayangela mpe akamba [biso].”
Yango wana, soki tozali sembo te mpe na botosi te, tokoki kobongola lipamboli ya bomengo oyo Nzambe apesi biso na elakeli mabe ya lolendo oyo esepelisaka mpe elongolaka biso na bosolo ya seko mpe na makambo ya ntina ya molimo. Tosengeli ntango nyonso kokeba na liyoki ya lolendo mpe na kolekisa ndelo ya komimona na ntina, botali ya mabe ya komikokisa na biso moko, mpe koluka bisomei na esika ya kosalela basusu.
Ntango tozali komitia na lolendo nyonso, tozali mpe konyokwama na bokufi miso ya molimo mpe tozangi mingi, mingi mpenza, to mbala mosusu nyonso oyo ezali kosalama na kati mpe nzinganzinga na biso. Tokoki te kotala mpe kotia makanisi na Yesu Klisto lokola “elembo” soki tomimonaka kaka bisomei.
Bokufi miso ya molimo ya boye ekoki mpe kotinda biso tolongwa na nzela ya bosembo, tokweya mosika na banzela epekisami, mpe tobunga nzela. Ntango na bokufi misu “tobaluki na banzela [na bisomei]” mpe tolandi nzela ya bopengwi ya kobebisa, totelemeli bososoli na biso moko, tomikumisi na makasi na biso moko, mpe totii motema na mayele na biso moko.
Samuele Molamanite alobaki na mokusembala moko bopengwi uta na Nzambe na Banefi: “Bolukaki mikolo nyonso ya bomoi na bino oyo wana bokokaki kozwa te; mpe bolukaki esengo na kosalaka mabe, eye eloko ezali na bokeseni na ezalela ya bosembo boye ezali na Moto monene mpe ya Seko na biso.”
Profeta Mormon amonaki, “Eteni eleki mingi ya bato [batikalaki] se na lolendo mpe nkuna na bango, mpe eteni eleki moke ya bato [batambolaki] na bokebi mingi liboso ya Nzambe.”
Balamani Babalukaki epayi ya Nzambe
Na Buku ya Elamani, boyengebene ebakisama ya Balamani epesi bokeseni makasi na bokiti ya noki na molimo ya Banefi.
Balamani babalukaki epayi ya Nzambe mpe bamememaki na boyebi ya bosolo na kondimaka mateya ya makomi masantu mpe ya baprofeta, kosalelaka bondimi na Nkolo Yesu Klisto, koyambolaka masumu na bango, mpe kokutana na mbongwana monene ya motema.
“Boye, mingi lokola bayei na boyebi boye, boyebi mpo na bino moko ete bazali ngwi mpe molende kati na bondimi, mpe kati na kikambo mpo na oyo wapi bakomisami nsomi.”
“Bosengeli kotala ete eteni eleki mingi ya [Balamani] bazali na nzela ya lotomo na bango, mpe bazali kotambola na bokebi liboso ya Nzambe, mpe batosi kobomba mitindo na ye mpe meko na ye mpe masambisi na ye. …
“… Bazali kosalaka makasi na molende ya kolembe te ete bakoka komema ndambo etikalii ya bandeko na bango na boyebi ya bosolo.”
Lokola mbano, “bosembo [ya Balamani] elekaki oyo ya Banefi, na ntina ya kotelema ngwi na bango mpe molende na bango kati na bondimi.”
Likebisi mpe Elaka
Moroni alobaki: “Tala, Nkolo alakisaki epayi na ngai makambo minene mpe ya kokamwa mpo na oyo etali oyo wana esengeli kala mingi te koya, na mokolo oyo wapi makambo oyo ekoya na kati na bino.
“Tala, nazali kolobela bino lokola soki bozalaki awa, mpe nzokande bozali te. Kasi tala, Yesu Klisto alakisi bino epayi na ngai, mpe nayebi misala na bino.”
Nasengi bomikundola ete Buku ya Mormon etali mikolo ezali koya mpe ezali na mitindo ya ntina, makebisi, mpe mateya oyo ekanamaki mpo na ngai mpe bino na makambo mpe mikakatano ya mikolo na biso ya lelo.
Bopengwi ekoki kosalema na ndelo mibale ya moboko—ya bibongiseli mpe ya moto na moto. Na ndelo ya bibongiseli, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka ekobunga te na nzela ya bopengwi to ekolongolama te na mabele.
Profeta Joseph Smith asakolaki: “Ndelo ya Bosolo etongam; loboko moko te oyo esantisami te ekoki kopekisa mosala yango ekende liboso; … bosolo ya Nzambe ekokende liboso na mpiko, na lokumu, mpe na bonsomi kino ekokota na mikili nyonso, ekotala bisika nyonso, ekokota mboka nyonso, mpe ekobeta na matoyi nyonso, kino mikano ya Nzambe ekokokisama mpe Yehova monene akoloba ete mosala esalemi.”
Na ndelo ya moto na moto, moko na moko na biso asengeli “kokeba na lolendo, noki te [tokokoma] lokola Banefi ya kala.”
Tika napesa likanisi ete soki bino to ngai tondimi tozali makasi mpe mpifo ya kokima lofundu ya lolendo, boye mbala mosusu tosili kozala na makoki uta na bonyokwami na bokono oyo ya molimo oyo ebomaka. Na pete, soki bino to ngai tondimi te tokokaki konyokwama na yango mpe na lolendo, boye tozangi bobatelami mpe na likama ya molimo. Na esika ya mikolo mingi te, baposo, basanza, to mibu, tokoki kobungisa lotomo na biso ya mbotama ya molimo mpo na moke mosika koleka potopoto ezanga ntina.
Soki, nzokande, bino to ngai tondimi tokokaki kotungisama na ntina na yango mpe na lolendo, boye tokosala ntango nyonso makambo ya mike mpe ya pete oyo ekobatela mpe ekosalisa biso tokoma “lokola mwana moke, moto ya botosi, ya bopolo, ya komikitisa, ya motema molai, ya kotonda na bolingo, oyo alingi kotosa makambo nyonso oyo Nkolo amoni ete ebongi kopesa [biso].” “Bapambolami baoyo bamikitisaka kozanga kotindama na makasi mpo na komikitisa.”
Ntango tozali kolanda toli ya Mokambi Benson mpe tomituni mpo na nini Nkolo afulaki Mormon akotisa na bokuse na ye ya buku ya Elamani masolo, masakoli, mpe makebisi oyo asalaki, nalaki tokososola bosaleli ya mateya oyo na makambo ya sikisiki ya bomoi na biso moko na moko mpe ya mabota na biso lelo. Ntango tozali koyekola mpe komanyola likomami oyo efulama, tokopambolama na miso mpo na komona, matoyi mpo na koyoka, makanisi mpo na komanyola, mpe mitema mpo na kososola mateya tosengeli koyekola mpo na “kokeba na lolendo, noki te [tokota] na komekama.”
Natatoli na esengo nyonso ete Nzambe Tata ya Seko azali Tata na biso. Yesu Klisto azali Mwana Mombotami na Ye mpe ya Bolingo. Azali Mobikisi. Mpe natatoli ete ntango tozali kotambola na bopolo ya molimo ya Nkolo, tokokima mpe tokolonga lolendo mpe tokozala na kimia kati na Ye. Natatoli boye na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amene.