Masalisi mpo na Makomi
2. Ngomba ya Sinai (Holebe) mpe Esobe ya Sinai


2. Ngomba ya Sinai (Holebe) mpe Esobe ya Sinai

foto 2

Bisika ezali ebele mpo na Ngomba ya Sinai. Moko ya esika ya kala ezali Yebele Musa (Ngomba ya Mose), etalisami awa.

Makambo Minene: Nzambe amonanaki na Mose mpe apesaki ye Mitindo Zomi (Esod. 19–20). Mose, Alona, mibale ya bana mibali ya Alona, mpe bampaka 70 bamonaki mpe basololaki na Nzambe (Esod. 24:9–12). Nzambe apesaki Mose malakisi mpo na kotonga tabelenakele (Esod. 25–28; 30–31). Bayisalaele bakumbamelaki mwana ngombe ya wolo oyo bandimisaki Alona kosala (Esod. 32:1–8). Eliya akimaki na mabele oyo uta na Lobwaku ya Yizelele, wapi Mwasi mokonzi Izebele azalaka (1 Mik. 19:1–18). Oyo ezali lisusu esika wapi Eliya asololaki na Nzambe (1 Mik. 19:8–19). (Tala MOMA Sinai, Ngomba.)