“Mayangani ya Masanga ya Bateyi—Mpo na Baboti mpe Bateyi Babengama,” Koteya na Lolenge ya Yesu Klisto: Mpo na Baoyo Nyonso Bateyaka na Libota mpe na Eklezia (2022)
“Mayangani ya Masanga ya Bateyi,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi
Mayangani ya Masanga ya Bateyi—Mpo na Baboti mpe Bateyi Babengama
Palwasi moko na moko esengeli esala mayangani ya masanga ya bateyi nsima ya sanza misato, nyonso mibaliempo na baboti mpe bateyi babengama na palwasi. Na mayangani oyo, baboti mpe balakisi mosusu bakoki kosolola elongo na oyo etali mabongisi ya mateya ya Klisto (tala Buku Monene: Kosunga na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 13.4, 13.5, 17.4, 17.5, Gospel Library).
Mayangani nyonso mibale ya masanga ya bateyi esalamaka mbala moko baminiti 50 na ntango ya eteyelo ya Eyenga.
Mayangani ya Masanga ya Bateyi mpo na Baboti
Nani Akambaka Mayangani Oyo? Na momeseno, moko ya Bokambi ya Eteyelo ya Eyenga akambaka mayangani ya masanga ya bateyi mpo na baboti. Nzokande, episikopo akoki kotinda bandimi mosusu ya palwasi bakamba makita soki basengeli.
Lisanga ya palwasi, na lisungi ya bakambi ya Eteyo ya Eyenga, bakamba mayangani ya lisanga ya bateyi mpo na baboti. Basololaka elongo na oyo etali bamposa ya baboti mpe mabota, mpe basalaka elongo mpo na koyeba mabongi nini uta Koteya na Lolenge ya Mobikisi ekokokisa malamu bamposa wana.
Nani Asengeli Kozala? Lisanga ya palwasi ekozwa mokano soki ekoki kobengisa baboti songolo to kofungola bikuke mpo na banso oyo balingi kozala wana.
Ntango Nini Makita Oyo Esengeli Kosalema? Mayangani ya masanga ya bateyi mpo na baboti ekoki kosalema na Eyenga nyonso, lokola esengami na lisanga ya palwasi.
Mayangani ya Masanga ya Bateyi Babengama
Nani Akambaka Mayangani Oyo? Na momeseno, moko ya Bokambi ya Eteyelo ya Eyenga akambaka mayangani ya masanga ya bateyi babengama. Nzokande, episikopo akoki kotinda bandimi mosusu ya palwasi bakamba makita soki basengeli.
Lisanga ya palwasi, na lisungi ya bakambi ya Eteyelo ya Eyenga, bakambaka mayangani ya masanga mpo na bateyi babengama. Basololaka elongo na oyo etali bamposa ya bateyi mpe bayekoli, mpe basalaka elongo mpo na koyeba mabongi nini uta Koteya na Lolenge ya Mobikisi ekokokisa malamu bamposa wana.
Nani Asengeli Kozala? Moto nyonso oyo ateyaka na lisanga likoki to kelasi na palwasi asengeli kozala na mayangani ya masanga ya bateyi. Bakambi ya masanga makoki mpe ya mangomba babengami mpe kozala.
Ntango Nini Mayangani Oyo Esengeli Kosalema? Bateyi bakendaka na mayangani ya masangani ya bateyi na Mokolo ya eyenga ntango bazali koteya kelasi na bango ya mbala na mbala te.
-
Bateyi ya Lisanga likoki ya Banganganzambe, ya Lingomba ya Bamama Basungi, mpe ya Bilenge Basi bakoki kosangana na eyenga ya yambo to ya misato, lokola esengami na bakambi ya esika bofandi.
-
Bateyi ya Eteyelo ya Eyenga bakoki kozala na Eyenga ya mibale to ya minei, lokola elobamaki na bakambi ya esika bofandi.
-
Bateyi ya Eteyelo ya Bana bakoki kozala na Eyenga kani, lokola esengami na bakambi ya Eteyelo ya bana mpe Eteyelo ya Eyenga. Soki mposa ezali, bateyi ya Eteyelo ya bana bakoki kosangana na bokabwani ya bateyi mosusu mpo na kosolola oyo etali makambo songolo ya koteya bana. Yango ekoki kosalema na miniti 20 ya ntango ya koyemba, yambo to nsima ya makita ya Eyenga, to na mokolo mosusu ya poso. Bakoki kosala makita ya bateyi koleka moko na sanza misato mpo na Eteyelo ya bana mpo ete banso bazanga te na bakelasi ya Eteyelo ya bana na poso moko. (Yeba malamu: Soki esengeli, bakambi ya Eteyelo ya bana bakopesa mokumba ya koteya na bateyi bakitani, bakosangisa bakelasi, to kosala mabongisi mosusu mpo na kopesa nzela na bateyi ya Eteyelo ya bana ete bazala na makita ya lisanga.)
Lolenge ya Mayangani
Mayangani ya masanga ya bateyi—mpo na baboti mpe mpo na bateyi babengama—elandaka lolenge oyo.
-
Bokabola mpe bosolola elongo (pene ya baminiti 20). Bosenga baboti to bateyi bakabola oyo ezali kosala malamu ntango bazali koteya nsango malamu na ndako to na bakelasi na bango. Bakoki mpe kokabola mikakatano oyo bazali kokutana na yango to makambo oyo bakolinga kobongisa.
-
Boyekola elongo (pene ya baminiti 15). Bosolola elongo na baboti to bateyi moko ya mabongi na kati ya Koteya na Lolenge ya Mobikisi. Yaka, Landa Ngai ekoki mpe kosalelama lokola mokanda mpo na masolo oyo.
-
Bolengela mpe bobengisa (pene ya baminiti 10). Bosenga baboti to bateyi bakabola maye bayekolaki na ntango ya likita mpe lolenge nini bakani kosalela yango.