6.
Linga Nzambe, linga mozalani na yo
Matai 22:37–40
Mpo na kosalisa yo osala maponi malamu, Nzambe apesi mitindo. Azali kosala yango mpo ete Alingi yo. Mpe ntina ya malamu koleka ya kotosa mitindo ya Nzambe ezali mpo ete alingi Ye. Bolingo ezali eteni ya motuya ya mitondo ya Nzambe.
Bosolo ya Seko
Nzambe alingi yo. Azali Tata na yo. Bolingo na Ye ebonga nie ekoki kofula yo olinga Ye. Ntango bolingo na yo mpo na Tata na yo na Lola ezali nguya ya motuya mingi koleka kati na bomoi na yo, bikateli ebele ekomaka pete.
Mitindo mibale eleki minene ya mitindo nyonso ezali ya kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani na Yo. Mpe nani azali mozalani na yo? Moto nyonso! Eloko nyonso mosusu oyo eteyami kati na makomi mpe na nzela ya baprofeta ekangami na mitindo mibale oyo.
Bato nyonso bazali bandeko na yo mibali mpe basi—kobakisa, ya solo, bato oyo bazali ya kokesena na yo to oyo bazali na makanisi ekeseni na oyo ya yo. Tata na Lola alingi bana na Ye balingana moko na mosusu. Ntango ozali kosalela bana na Ye, ozali kosalela Ye.
Mabengisi
Lakisa bolingo mpo na Nzambe na kobombaka mitindo na Ye. Ndakisa, na kobatelaka mokolo ya Saba esantu, kobakisa komilengela na bosembo mpo na yango mpe koliaka elambo, ozali kolakisa Nzambe ete ozali na mposa ya kopesa mokolo moko na poso mpo epayi na Ye. Ntango ozali kokila mpe kofuta moko na zomi mpe makabo ya kokila, ozali kolakisa Nzambe ete mosala na Ye ezali na motuya mingi epayi na yo koleka biloko ya mokili. Ntango ozali kosalela nkombo ya Nzambe mpe Klisto na limemya, na mpamba to na lolenge ya likololikolo te, ozali kolakisa ete ozali na botondi mpo na nyonso oyo Basali mpo na yo.
Zwa moto nyonso lokola mwana ya Nzambe. Lokola moyekoli ya Yesu Klisto, okoki kokamba na kosalelaka bato ya mposo nyonso, mangomba, mpe bitukulu mosusu na bolingo mpe limemya—mingimingi baye bazalaka mbala mosusu banyokwami na maloba mpe makambo oyo ezokisaka. Solola na baye bazali mbala mosusu komiyoka bango moko, ya kokabwana, to bazangi lisungi. Salisa bango bayoka bolingo ta Tata na Lola na nzela na yo. Kabola na bango mapamboli oyo Apesi yo, mpe bengisa bango mpo balanda Yesu Klisto.
Luka oyeba ete elobeli na yo ezali kolakisa bolingo na yo mpo na Nzambe mpe basusu—ezala ozali kosolola na bomoto to na nzela ya interneti. Loba makambo oyo etombolaka—eloko moko te oyo ekoki kokabola, kozokisa, to kosala mabe, atako ezali lokola liseki. Maloba na yo ekoki kozala na nguya mingi. Tika ete ezala na nguya mpo na bolamu.
Lakisa bolingo epayi ya libota na yo. Kolinga bana nyonso ya Nzambe ebandaka na ndako. Sala ya yo mokumba mpo na kokomisa ndako na yo esika oyo moko nyonso akoki koyoka bolingo ya Mobikisi.
Mapamboli Elakelama
Mokangano na yo na Nzambe ekokoma mozindo ntango ozali kolakisa bolingo na kotosaka mitindo na Ye mpe kobatelaka mayokani na yo elongo na Ye.
Mokangano na yo na basusu ekokoma mozindo ntangp ozali kolakisa bolingo na yo na nzela ya mosala ya Kimoklisto. Okozwa esengo na kokomisaka mokili esika moko ya bolingo mingi.
Mituna mpe Biyano
Lolenge nini nakoki koyoka bolingo ya Nzambe? Bolingo ya Tata na Lola ezali wana ntango nyonso. Solola na Ye mingimingi na nzela ya losambo. Kabola mayoki na yo elongo na Ye, mpe tya likebi na makanisi oyo ezali kowuta na Ye. Tanga maloba na Ye kati na makomi. Kanisa na oyo etali makambo nyonso asali mpo na yo. Lekisa ntango na bisika mpe milulu oyo Molimo na Ye ezali.
Ezali Nzambe kozela ngai nalinga moto nyonso, ata baye basalelaka ngai makambo mabe? Nkolo azeli ete yo olinga banguna na yo mpe osambela mpo na baye bazali kosalela yo mabe. Nzokande, yango elingi koloba te osengeli kotikala na likambo oyo ezali kosala yo mabe na mayoki, nzoto, to molimo. Tya ndelo ya malamu mpo na komibatela malamu. Soki bazali kotumola yo to kosala yo mabe, to oyebi ete yango ezali kokomela moto mosusu, solola na mokolo moko oyo otyelaka motema.
Ntango mpe lolenge nini nasengeli koyeba bandimi ya mibali to basi? Lolenge ya malamu mpo na koyeba basusu ezali na nzela ya kiboninga. Ntango ozali elenge, tonga kiboninga ya malamu na bato ebele. Na bikolo mosusu, bilenge bayebaka bandimi ya mibali to basi mosusu na nzela ya milulu kitoko ya bitukulu. Mpo na bokoli mpe libateli na yo ya mayoki mpe molimo, zelisa milulu ya moko na moko kino ntango okokomela—mibu 16 ezali etando ya malamu. Solola na libota na yo mpe bakambi. Bomba mikangano na yo moko mpo na ntango okozala mokolo. Lekisa ntango na bato oyo bazali kosunga yo obomba mikano na yo epayi ya Yesu Klisto.
Nini nakoki kosala soki ndako na ngai ezali te esika ya bolingo? Mobikisi na yo ayebi likambo na yo, mpe Alingi yo. Zala na motema molai, koba na kobomba mitindo ya Nzambe, mpe zala ndakisa malamu epayi ya libota na yo. Misala na yo mike ya bolingo ekoki kosala bokeseni monene. Okoki lisusu kotonga mikangano kati na libota na yo ya palwasi. Milengela sikawa mpo na kotonga libota na yo moko oyo etondami likolo ya Yesu Klisto mateya ya Yesu Klisto. Mikundola: Yesu Klisto azali makasi na yo!
Tala Yisaya 58:3–11 (bantina ya kokila); 58:13–14 (mapamboli ya kotosa Saba); Malaki 3:8–10 (mapamboli ya kofuta moko na zomi); Luka 6:27–28 (linga banguna na yo); 10:25–37 (nani azali mozalani na yo?); Yoane 3:16–17 (Nzambe alingaki biso, na yango Atindaki Mwana na Ye); 14:15 (tobatelaka mitindo mpo tolingaka Nzambe); 1 Yoane 4:19 (tolingaka Nzambe mpo Alingi biso); Mosiya 2:17 (ntango tosalelaka basusu, tozali kosalela Nzambe).
Mituna ya Ndingisa mpo na Tempelo
-
Olandaka mateya ya Eklezia ya Yesu Klisto na ezalela na yo ya nkuku mpe na miso ya bato banso elongo na bato ya libota na yo mpe basusu?
-
Ofutaka moko na zomi na yo mobimba?