“Bobakisi C: Mpo na Eteyelo ya Bana—Mateya mpo na Ntango ya Koyemba mpe bolakisi ya Bana na Mayangani ya Elambo” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Kondimana na Kala 2026 (2026)
“Bobakisi C,” Yaka, Landa Ngai: Kondimana na Kala 2026
Bobakisi C
Mpo na Eteyelo ya Bana—Mateya mpo na Ntango ya Koyemba mpe Bolakisi ya Bana na Mayangani ya Elambo
Miziki ya bule ezali esalelo ya nguya mpo na kosalisa bana bayekola oyo etali mwango ya esengo ya Tata na Lola mpe bosolo ya motuya ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Ntango bana bazali koyemba oyo etali mabongisi ya nsango malamu, Molimo Mosantu akotatola na ntina ya bosolo na bango. Maloba mpe miziki ekotikala na makanisi mpe mitema ya bana bomoi na bango mobimba.
Boluka bokambi ya Molimo ntango bozali komilengela mpo na koteya nsango malamu na nzela ya miziki. Bokabola litatoli na bino ya bosolo oyo bozali koyemba. Bosalisa bana bamona lolenge nini miziki elobelaka maye bayekolaka mpe maye babikaka na libota mpe na Biteyelo ya bana.
Bokambi mpo na Molulu ya Liyangani ya Eyenga ya Elambo
Na bokambami ya episikopo, bolakisi ya bana na mayangani ya elambo esalemaka mingi nsima ya basanza zomi na mibale na mobu. Lokola mokambi ya Eteyelo ya bana mpe mokambi ya miziki, bokosala elongo na mopesi toli na boepisikopo oyo akokengela Eteyelo ya bana mpo na kolengela bolakisi.
Bolakisi esengeli kopesa bana libaku ya kotalisa maye bango mpe mabota na bango bayekolaki uta na Kondimana na Kala na libota mpe na Eteyelo ya bana, mpe lisusu nzembo ya Eteyelo ya bana oyo bayembaki na mobu. Ntango bozali kolengela bolakisi, bobanza banzela oyo ekoki kosalisa lingomba batalela Mobikisi mpe mateya na Ye.
Masanga na mitango moke ya bana bakoki kobanza banzela na lolenge bandeko ya libota bakoki kosangana na bana na bango. Moto ya boepisikopo moko akoki kosukisa liyangani na makebisi ya mokuse.
Ntango bozali kolengela bolakisi, bokanisa babokambi oyo elandi:
-
Misala ya boyekoli esengeli te kolekisa ntango mpamba libanda ya bakelasi Biteyelo ya bana to na mabota.
-
Bisalelo, bilamba, mpe bolakisi ya media ezali malamu te mpo na liyangani ya eyenga.
Botala Buku Monene: Kosunga kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 12.2.1.2, Gospel Library.
Malako mpo na Ntango ya Koyemba
Baminiti 5 (bokambi ya Eteyelo ya bana): losambo ya Bofungoli, makomi to eteni ya bondimi, mpe lisikulu moko
Baminiti 20 (mokambi ya miziki): Ntango ya koyemba
Bokambi ya Eteyelo ya bana mpe mokambi ya miziki bakopona nzembo mpo na sanza moko na moko mpo na kolendisa mabongisi oyo bana bazali koyekola na biteyelo na bango mpe na libota. Mokanda ya banzembo oyo ekolendisa mabongisi yango etiami kati na bokambi oyo.
Ntango bozali kolakisa bana banzembo, bobengisa bango bakabola maye basila koyekola na oyo etali masolo ya kala mpe mabongisi ya malongi oyo nzembo ezali koteya. Bobengisa bana bakabola makanisi na bango mpe mayoki oyo etali bosolo oyo ezwami kati na nzembo.
The Children’s Songbook ezali mokanda ya ebandeli mpo na miziki na Eteyelo ya bana. Nzembo kati na kantiki mpe nzembo uta na Moninga ezali lisusu malamu. Bokoki lisusu kosalela nzembo uta na Hymns—For Home and Church [Nzembo—Mpo na Ndako mpe Eklezia]. Bosaleli ya miziki mosusu kati ya Eteyelo ya bana esengeli endimama na episikopo (tala Buku Monene, 12.3.4).
Miziki mpo na Ntango ya Koyemba
Sanza ya yambo
-
My Heavenly Father Loves Me,” Children’s Songbook, 228–29
-
“I Will Follow God’s Plan, “ Children’s Songbook,164–65.
Sanza ya mibale
-
Follow the Prophet,“ Children’s Songbook, 110–11
-
“A Child’s Prayer,” Children’s Songbook,12–13
Sanza ya Misato
-
“Kindness Begins with Me,” Children’s Songbook, 145
-
“I Need Thee Every Hour,” Hymns, no. 98.
Sanza ya minei
-
“Gethsemane,” Gospel Library
-
Keep the Commandments,” Children’s Songbook, 146
Sanza ya mitano
-
“Holy Places,” Gospel Library
-
As I Search the Holy Scriptures,” Hymns, no. 277
Sanza ya motoba
-
I Will Be Valiant,” Children’s Songbook, 162
-
Love One Another,” Children’s Songbook, 136–37
Sanza ya nsambo
-
Search, Ponder, and Pray,” Children’s Songbook, 109
-
“I Pray in Faith,” Children’s Songbook, 14
Sanza ya mwambe
-
Dare to Do Right,” Children’s Songbook, 158
-
I Feel My Savior’s Love,” Children’s Songbook, 74–75
Sanza ya Libwa
-
“Teach Me to Walk in the Light,” Children’s Songbook, 177
-
“Love Is Spoken Here,” Children’s Songbook, 190–91
Sanza ya zomi
-
“Seek the Lord Early,” Children’s Songbook, 108
-
“I Lived in Heaven,” Children’s Songbook, 4
Sanza ya zomi na moko
-
Families Can Be Together Forever,” Children’s Songbook, 188
-
Choose the Right,” Hymns, no. 239
Sanza ya zomi na mibale
-
We’ll Bring the World His Truth,” Children’s Songbook, 172–73
-
“The Hearts of the Children,” Children’s Songbook, 92–93
Bosaleli Miziki mpo na Koteya Malongi
Ntango ya koyemba esalamaka mpo na kosalisa bana bayekola bosolo ya nsango malamu. Makanisi oyo elandi ekoki kofula bino bolengela banzela ya koteya mabongisi ya nsango malamu oyo ezwami na kantiki mpe na nzembo ya Eteyelo ya bana.
Botanga makomi oyo ekokani. Mpo na mingi ya banzembo kati na Children’s Songbook mpe buku ya nzembo, ekokani na makomi oyo etangami. Bosalisa bana batanga mwa milongo miye, mpe bosolola oyo etali lolenge nini makomi ekokani na loyembo. Bokoki lisusu kokoma mwa makomi ekokana na etando mpe kobengisa bana bakokanisa likomi moko na moko na loyembo to molongo uta na loyembo.
Bokoma kati na bisika ezangi nkoma. Bokoma molongo ya loyembo na etando na maloba ya ntina ebele ezanga. Nsima bosenga bana bayemba loyembo, boyoka maloba oyo etondi kati na bozangi. Ntango batondisi kati na bozangi nyonso, bosolola mabongisi nini ya nsango malamu boyekoli uta na maloba ezangi.
Botatola. Boloba litatoli ya mokuse epayi ya bana na ntina ya bosolo ya nsango malamu oyo ezwami kati ya loyembo ya Eteyelo ya bana. Bosalisa bana basosola ete koyemba ezali lolenge moko oyo bakoki kotatola mpe koyoka Molimo.
Botelema lokola nzeneneke. Bobengisa bana basala moko nsima ya mosusu batelema mpe batatola maye bayekoli uta na loyembo oyo bayembi to lolenge nini bayokaka oyo etali babosolo oyo eteyami kati na loyembo. Botuna bango lolenge nini bayoki ntango bayembi loyembo, mpe sunga bango bayeba nguya ya Molimo Mosantu.
Bosalela bililingi. Bosenga bana basalisa bino bozwa to bokela bilili oyo ekotambola na maloba ya ntina to maloba ya loyembo. Bobengisa bango bakabola lolenge nini bilili ekokani na loyembo mpe maye loyembo ezali koteya. Ndakisa, soki bozali koteya loyembo “When He Comes Again” (Children’s Songbook, 82–83), bokoki kotia bililingi na kisuku mpo elakisa maloba ya motuya uta na loyembo (lokola banjelu, mvulampembe, mpe monzoto). Bosenga bana basangisa bilili mpe basimba yango likolo na lolenge malamu ntango bozali koyemba loyembo elongo.
Bokabola liteya na nzela ya eloko. Bokoki kosalela eloko mpo na kofula lisolo oyo etali loyembo. Ndakisa, ntango bozali koyemba loyembo “My Heavenly Father Loves Me” (Children’s Songbook236), bokoki kolakisa bana elilingi ya biloko lokola ndeke, mvula, to fololo. Yango ekoki komema na masolo etali lolenge nini tokoki komona bilembo ya bolingo ya Tata na Lola nzinganzinga na biso.
Bobengisa bango bakabola makambo na bango bayebi. Bosalisa bana bakangisa mabongisi oyo eteyami kati na loyembo na makambo bayebi na mabongisi oyo. Ndakisa, yambo ya koyemba “I Love to See the Temple” (Children’s Songbook, 95), bokoki kosenga bana batombola maboko na bango soki basila komona tempelo. Bobengisa bango, ntango bazali koyemba, bakanisa oyo etali lolenge bazali koyoka ntango bamonaka tempelo.
Botuna mituna. Ezali na mituna ebele bokoki kotuna ntango bozali koyemba banzembo. Ndakisa, bokoki kotuna bana nini bayekoli uta na molongo moko na moko kati na loyembo. Bokoki lisusu kotuna bango bakanisa mituna oyo loyembo ezali koyanola. Yango ekoki kokamba na lisolo etali babosolo oyo eteyami kati na loyembo.
Bosalela makambo ya pete na maboko. Bobengisa bana bakanisa makambo ya pete mpo na kosalisa bango bamikundola maloba mpe bansango ya loyembo. Ndakisa, ntango bozali koyemba “Search, Ponder, and Pray” (Children’s Songbook, 109), bokoki kobengisa bana balakisa misu na bango misapi ntango bazali koyemba oyo etali kolukaka makomi, balakisa mitu na bango misapi ntango bazali koyemba oyo etali komanyola, mpe bakanga maboko na bango ntango bazali koyemba oyo etali losambo.