Doctrine and Covenants 2025
Sanza ya Libwa 22–28: “Molongo ya Mwana na Nzambe”: Malongi mpe Mayokani 106–108


“Sanza ya Libwa 22–28: ‘Molongo ya Mwana na Nzambe’: Malongi mpe Mayokani 106–108,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Malongi mpe Mayokani 2025 (2025)

“Malongi mpe Mayokani 106-108,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: 2025

Yesu Klisto Apesi bokonzi ya bonganganzambe

Sanza ya Libwa 22–28: “Molongo ya Mwana na Nzambe”

Malongi mpe Mayokani 106–108

Na kotala ya liboso, Malongi mpe Mayokani 107 emonani lokola kaka mpo na oyo etali kobongisa misala ya bonganganzambe kati na ebongiseli moko ya bokambi mpo na Eklezia ya Nkolo. Na ntango emoniseli oyo ebimisamaki, bandimi ya Eklezia bazalaki kokola koleka makoki ya bakambi moke bazalaki wana. Boye, kotia mokoloto na misala mpe mikumba ya Bokambi ya Yambo, Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, Bantuku Nsambo, baepisikopo, mpe bokambi ya masanga makoki ezalaki likambo ya mposa makasi mpe ya kosalisa. Kasi ezali na mingi mpenza ya kolobela malako ya bonzambe kati na eteni 107 koleka kaka lolenge bokambi ya Eklezia esengeli kobongisama. Awa Nkolo ateyi biso oyo etali nguya mpe bokonzi, “Bonganganzambe Bosantu, nsima ya Molongo ya Mwana na Nzambe” (molongo 3). Ntina ya bonganganzambe ezali ya kofungola “mapamboli nyonso ya molimo ya eklezia” mpo ete bana nyonso ya Nzambe “bazala na lola efungwami na bango” mpe “basepela na boyokani mpe bozali ya Nzambe Tata, mpe Yesu moyokanisi ya boyokani ya sika” (milongo 18–19). Na koteyaka biso oyo etali bonganganzambe na Ye, Mobikisi azali koteya biso na ntina na Yemei mpe lolenge nini tokoki koya epayi na Ye.

Tala “Kozongisa Molongo ya Kala,” kati na Revelations in Context, 208–12.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Malongi mpe Mayokani 106; 108

elembo ya seminele
Nkolo asungaka ngai ntango abiangi ngai mpo na kosalela Ye.

Na Malongi mpe Mayokani 106 mpe 108, Nkolo apesaki toli mpe alaki epayi ya bandimi mibale oyo babiangamaki mpo na kosalela Ye kati na Eklezia na Ye. Ntango ozali koyekola toli na Ye, osengeli kokanisa oyo etali mabaku ya kosalela Nkolo—ntango mosusu mokumba ya kosalisa, libiangi ya Eklezia, mikumba kati na libota na yo, to botindiki ya molimo mpo na kosala malamu.

Oyokaka nini nsango ya Nkolo epayi na yo ezali kati na bimoniseli oyo? Makomi nini emonani ete ekosalisa yo mingi mingi? Awa ezali mwa mituna ya kotalela:

Ntango Mpaka Carl B. Cook azwaki mokumba moko ya mpasi ya Eklezia, azwaki makasi uta na likambo ya nkoko moko. Tanga oyo etali yango kati na nsango na ye “Serve [Kosalela]” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 110–12). Kanisa kokomaka mokanda mpo na kolendisa bakitani na yo—to lobi na yo ekoya—mpo na kondima mabaku ya kosalela Nkolo. Kotisa na mokanda na yo bosolo oyo oyekoli uta na nsango ya Mpaka Cook, Malongi mpe Mayokani 106 mpe 108, mpe makambo oyo yo moko okutanaki na yango.

Tala lisusu Henry B. Eyring, “Walk with Me [Tambola elongo na Ngai],” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 82–85; Topics and Questions, “Serving in Church Callings [Kosalela na Mabiangi ya Eklezia],” Gospel Library; “Warren Cowdery” mpe “‘Wrought Upon’ to Seek a Revelation [Babongisami mpo na koluka Emoniseli],” kati na Revelations in Context, 219–23, 224–28.

Malongi mpe Mayokani 107:1–4, 18–20

Bonganganzambe ezali “nsima ya Molongo ya Mwana na Nzambe.”

Nkolo abandi “emoniseli na Ye na bonganganzambe” (Malongi mpe Mayokani 107, moto ya likambo ya eteni) na koteyaka biso nkombo ya ebandeli ya Bonganganzambe ya Melekisedeki (tala milongo 1–4). Mpo na nini okanisi ete ezali motuya mpo ya koyeba yango? Boniboni nkombo oyo ebongoli lolenge okanisi oyo etali bonganganzambe?

Omikundola makanisi oyo ntango ozali kotanga oyo etali bonganganzambe, mingimingi na milongo 18–20. Elimboli nini “kofungwama na lola”? Elimboli nini “kosepela na boyokani mpe bozali ya Nzambe Tata, mpe Yesu”? Lolenge nini nguya mpe bokonzi ya bonganganzambe ya Mobikisi esalaka ete nyonso oyo ezala na bino?

Tala lisusu Alma 13:2, 16; Malongi mpe Mayokani 84:19–27.

Kangama na Yesu Klisto. “Ezali na makambo ebele ya koteya oyo etali nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto—mibeko, mitindo, masakoli, mpe masolo ya makomi. Kasi oyo nyonso ezali bitape ya nzete moko, mpo nyonso ezali na ntina moko: ya kosalisa bato nyonso baya epayi ya Klisto mpe bakoma ya kobonga nie epayi na Ye (tala Yalome 1:11; Moroni 10:32). Na yango bomitungisa te na oyo bokoteya, bokanisa ete bozali mpenza koteya oyo etali Yesu Klisto mpe lolenge nini kokoma lokola Ye” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 6). Ndakisa, ntango ozali koteya—mpe koyekola— oyo etali bonganganzambe na Malongi mpe Mayokani 107, tunaka ntango nyonso, “Tozali koyekola nini oyo etali Mobikisi?”

Malongi mpe Mayokani 107:22

Basali ya Nkolo “basimbami na elikya, bondimi, mpe losambo ya Eklezia.”

Okanisi nini elingi koloba kosimba basali ya Nkolo na elikya na yo? na bondimi na yo? na losambo na yo?

Tala lisusu “God Bless Our Prophet Dear [Nzambe Apambola Molingami Profeta Na Biso],” Hymns, no. 24.

Malongi mpe Mayokani 107:23–24, 33–35, 38, 91–92

Baprofeta mpe Bapostolo batatolaka etali Yesu Klisto.

Joseph Smith akabolaki eteni 107 na 1835 elongo na Lisanga likoki ebiabami sika ya Bapostolo Zomi na Mibale (tala moto ya likambo ya eteni). Nkolo ateyaki bango nini oyo etali kobiangama na bango kati na milongo 23–24, 33–35, 38? Loleenge nini litatoli na yo ya Yesu Klisto elendisami na mateya mpe mosala ya Bapostolo na Ye ya bomoi?

Na milongo 91–92, Nkolo ateyi oyo etali Apostolo na Ye ya monene, Mokambi ya Eklezia. Lolenge nini “azali lokola Mose”? (tala Mokambi na Makomi, “Mose,” Gospel Library).

Tala lisusu David A. Bednar, “Chosen to Bear Testimony of My Name [Aponami mpo na Kopesa Litatoli ya Nkombo na Ngai],” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2015, 128–31.

Malongi mpe Mayokani 107:27–31, 85–89

Nkolo akokisaka mosala na Ye na nzela ya bokutani na masanga.

Kanisa oyo Nkolo ateyaki oyo etali masanga na Malongi mpe Mayokani 107:27-31, 85-89. Nini esalaka lisanga ezala malamu? Loleenge nini okoki kosalela mabongisi oyo na libiangi na yo ya Eklezia, na ndako na yo, to na mikumba na yo misusu?

Tala lisusu M. Russell Ballard, “Family Councils [Masanga ya Libota],” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 63–65; Buku Monene ya Malako, 4.3–4.4, Gospel Library.

libota kobongisaka elongo

Nkolo abengisi mabota masangana elongo.

Mpo na makanisi mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na magazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

eteni ya elembo ya bana 2

Makanisi mpo na Koteya Bana

Malongi mpe Mayokani 107:18–20

Yesu Klisto apambolaka ngai na nzela ya nguya ya bonganganzambe na Ye.

  • Ntango bino na bana na bino bozali kotanga elongo Malongi mpe Mayokani 107:18–19, bobeta nsete na liloba “mapamboli nyonso ya molimo.” Mbala mosusu bino mpe bana na bino bokokaki kotanga mapamboli nyonso euti na bonganganzambe. Bokoki kosala lisano na yango—botala nani akoki kosala liste ya molai koleka. Bana na bino bakokaki mpe kosala mayemi to koluka bililingi mpo na komonisa mapamboli oyo (tala ya poso oyo lokasa ya mosala). Bokoki nsima kolobela lolenge nini makuli ya bonganganzambe (lokola libatisi to elambo) esalisaka biso tozwa mapamboli ya Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 107:21–26, 33–35, 91–92

Nkolo aponaka basali mpo kokamba Eklezia na Ye.

  • Nimelo nyonso ya likita linene ya Liahona ezalaka na lokasa moko ya bililingi ya Bakonzi Minene. Bokanisa kotala bililingi oyo elongo na bana na bino ntango bozali kotanga oyo etali mikumba na bango na Malongi mpe Mayokani 107:21–26, 33–35, 91–92. Bino mpe bana na binoo bokoki kolobela mpo na nini bozali na botondi Nkolo apesi bango mikumba oyo.

  • Bana na bino bakoki koyekola ebele oyo etali basali na Nkolo na “General Church Leadership [Bakambi Minene ya Eklezia]” na ChurchofJesusChrist.org. Mbala mosusu moko na moko ya bana na bino akokaki koyekola oyo etali moko ya bakambi oyo mpe koteyana oyo etali ye. Bokabola moko na mosusu lolenge nini boyebi ete bakambi oyo bazali basali ya solo ya Yesu Klisto.

  • Nsima ya kotanga Malongi mpe Mayokani 107:22 elongo, bino mpe bana na bino bokoki kosala ngala na ngala kosimba elilingi ya Bokambi ya Yambo mpe kokabola banzela bokoki kosunga bango lokola basali ya Nkolo.

Bokambi ya Yambo

Bokambi ya Yambo

Malongi mpe Mayokani 108:3

Nakoki kozala na bokebi na kobika mayokani na ngai.

  • Mpo na kobanda lisolo oyo etali molongo oyo, bokoki kobengisa bana na bino basala likambo oyo esengaka kotya bokebi malamu, lokola kotondisa kopo kozanga ete basopa yango. Nini esalamaka soki tozali na bokebi te? Nsima bokoki kotanga Malongi mpe Mayokani 108:3 mpo na koyeba nini Nkolo alingi tosala na bokebi. (Bilaka to mayokani) nini tosalaka elongo na Nzambe? Ndenge nini tokoki kokeba mingi mpo na kobatela yango? Bokoki kokabola biteni ya nsango ya Ndeko mwasi Becky Craven “Careful versus Casual [Bokebi kotelemela Bozangi Bokebi]” (Liahona, Sanza ya mitano 2019, 9–11) oyo boyoki ekokaki kofula bana na bino mpo na kobatela mayokani na bango. Bokoki lisusu koyemba nzembo oyo etali kobatela mayokani, lokola “I Will Be Valiant [Nakozala Na Mpiko]” (Children’s Songbook, 162).

mwana mwasi azali kosopa mai

Kosopa mayi na bokebi ekokaki kokokana na kobatela mayokani na biso na bokebi.

Mpo na makanisi mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na magazini ya Moninga .

elilingi ya Melikisedeki mpe Abalayama

Melikisedeki Azali Kopambola Abalayama, na Walter Rane.

lokasa ya molulu mpo na bana