Liahona
Kopambola Mabota Nyonso ya Mokili
Liahona Sanza ya misato 2026


“Kopambola Mabota Nyonso ya Mokili,” Liahona, Sanza ya misato 2026.

Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya misato 2026

Kopambola Nyonso Mabota ya Mokili

Soki tolandi mpe tokaboli mwango ya tata na lola mpo na mabota, Akozala elongo na biso, kosunga biso, mpe kosangana na biso na mobembo na biso ya kozonga epayi na Ye.

Elilingi ya Yakobo kozwaka limoni

Jacob’s Dream at Bethel [Ndoto ya Yakobo na Betele], na J. Ken Spencer

kala te, Ndeko mwasi Uchtdorf mpe ngai tozalaki na libatisi ya moko ya nkokololo na biso. Ntango tozalaki kotala bikeke ebele kokembela na esengo molulu oyo, toyokaki botondi makasi epayi ya Tata na biso na Lola mpo na mwango na Ye ya lobiko mpo na bana na Ye. Toyokaki boni libota mpe mayokani ya bule ezalaki motuya mpo na Ye uta na ebandeli mpenza.

Motuya wana ekoki komonisama kati na masolo ya Kondimana ya Kala ya moyengebeni Yakobo, oyo asalaki mobembo ya molai mpe ya mpasi mpo na komona mwasi na ye, abalaki kati na boyokani, mpe asalaki libota. Mpokwa moko, Yakobo atelemaki mpo na kolala na butu kasi amonaki bobele mabanga mpo na kotia moto. Asengelaki kozala ya kolemba mpenza mpamba te akokaki kozwa mpongi—mpe alotaki liloto.

Na mikano na ye elongobana ya libala mpe libota ya boyokani solo na makanisi na ye, yakobo amonaki “ebutelo etelemaki likolo na mokili mpe nsonge na yango ekomaki na likolo mpe tala banjelu na Nzambe bazalaki komata mpe kokita likolo na yango.

“Mpe tala, Nkolo atelemaki pembeni na ye mpe alobaki ete, Ngai nazali Nkolo, Nzambe ya Abalayama tata na yo mpe Nzambe na Yisaka” (Genese 28:12–13).

Nsima Nkolo asalaki mwa bilaka ya boyokani ya motuya na Yakobo—Bilaka asalaki lisusu na tata Yakobo, Yisaka, mpe nkoko na ye, Abalayama, kosangisaka:

  • Bilaka oyo Yakobo akokoma tata ya “ebele ya bato” (Genese 28:3; tala lisusu molongo 14).

  • Bilaka ya mokili mpo libota Yakobo (tala Genese 28:4, 13).

  • Bilaka ete na nzela ya Yakobo mpe ya ye “nkona mabota nyonso na mokili bakopambolama” (Genese 28:14; nsete ebakisami).

Likambo ya Yakobo ezalaki ya bule mpenza ete asakolaki: “Solo Nkolo azali na esika oyo. … Oyo ezali esika mosusu te kasi ndako ya Nzambe, mpe oyo ezali ekuke ya likolo” (Genese 28:16–17). Mpe bongo, Yakobo abengaki esika yango Betele, oyo elingi koloba “ndako na Nzambe” (Genese 28:19, nkoma ya nse a).

Mapamboli elakama oyo epesamaki na liloto ya Yakobo esengaki ete Yakobo asala mwa bobuti ya lisese na bomoyi ya solo. Lokola Basantu ya Mikolo ya Nsuka, ezali mpasi te komona mokangano kati ya liloto ya Yakobo, mayokani, mpe ndako ya Nkolo. batempelo ezali mingi lokola ebuteli Yakobo amonaki. Mateya, makuli mpe mayokani ya ndako ya Nkolo ekangisaka likolo mpe mabele. Mayokani ekoki komekolama na bandelo na ebuteli oyo epusaka biso tokoma pene ya Nkolo. Mpe, na nzela ya mosala ya bule oyo tosalaka na batempelo esantu, tozali kopambola “mabota nyonso ya mokili”—ya kola, ya mikolo oyo, mpe ya mikolo ekoya.

“Oyo Ezali Bomoni Monene!”

Mpaka Bruce C. Hafen, Ntuku Nsambo moko ya kala, kala ayambaki libiangi moko ya telefoni ya mokomi ya magazini moko ya nsango ya ekolo. Mokomi yango alingaki kosolola na oyo etali buku ya sika oyo ezalaki kolobela lisolo oyo etali bindimela etali lola na biyamba ya ndenge na ndenge.

“Bakomi bamonaki ete bato bayokaka mposa makasi ya lola—mpe ya mabota kati na lola,” ekomaki Mpaka Hafen. Kasi ntango bato mingi mpenza bazalaki naino kondimela bomoi nsima ya liwa, bolingo ya seko, mpe bosangani ya libota na lola, “baeklezia mingi mpenza ya baklisto epesaka eyano moke na mposa ya kati oyo”—na bokeseni moko: Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka.

Na Eklezia ezongisama ya Mobikisi, tozali na batempelo ya bule. Tozali na libala ya seko, na likoki ya bokangisi oyo epambolaka koleka liwa ya nzoto. Tozali na elaka ya lobi ekoya ya seko na balingami na biso liboso ya Tata mpe Mwana. Mpo na nyonso oyo, bakomi basukisaki ete makambo basantu ya Mikolo ya Nsuka mpo na ezali mobimba mpenza—mpe, nakoki kobakisa, ya esengo mpenza.

“Oyo Ezali Bomoni Monene!” Mpaka Hafen alobaki. “Bato mingi lelo bazali na mposa makasi ya mabota ya seko, mpe [nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto] ekokisi mposa wana malamu koleka makanisi mosusu kani eyebana [to mateya ya biyamba]. Nazali na mposa ete mokili mobimba ekoka koyoka [ya biso] bana koyembaka nsango ya esengo: ‘Families can be together forever [Mabota ekoki kozala elongo libela].’”

Mabota ezali kaka libongisi monene ya bato te. Ezali ndakisa ya seko ya lola. Ezali “na kati kati ya mwango ya Mokeli mpo na lobi ya seko ya bana na Ye.” Lokola Mokambi Russell M. Nelson (1924–2025) ateyaki biso: “[Nkolo] akelaki mokili [bongo] ete tokoka kozwa banzoto ya mosuni mpe tosala mabota. Atiaki Eklezia na Ye mpo na konetola mabota. Apesi batempelo mpo ete mabota ekoka kozala elongo libela.”

Kasi bosepeli na biso kati na mabota makasi ezali kaka na oyo etali lobi ya seko te. Libota ezali na mosala ya ntina kati na esengo na biso na kufa lokola mpe. Tata na Biso na Lola, oyo ayebi malamu maye ememaka esengo sikawa mpe seko seko, atindaka bana na Ye na mabota—atako ekoki kozala ya kobonga nie te—mpe abengisi biso totonga mpe tobokola mabota makasi. Ya solo, “Bokono, liwa, to makama mosusu ekoki kosenga mbongwana ya moto na moto.” Kasi eloko moko te ekoki kozua esika ya mikumba ya ntina, epesama na Nzambe ya mobali mpe mwasi, tata mpe mama.

Boluki etali “mabota ya bikelamu, ekangisama, ya baboti mibale” ekobaka mpo na kolakisa ete mabota ezali motuya na kobatela “bankanga makasi ya bolingo mpe bosepelisami.” Ezali “epeseli moto ya liboso mpo na bato na bato ya sikisiki, babongisama malamu, mpe ya makanisi ya bomoto.”

Babateli ya Molende ya Libota

Ya solo, esengeli kokamwisa biso te ete eloko moko ya motuya mpenza na mwango ya Nzambe ekutana na botelemeli. Satana azala mokolo moko te moninga ya libota, mpe makasi na ye ezali bobele kokoma moto moto koleka “awa eyebi ye ete azali na mwa ntango mokuse” (Emoniseli 12:12). Lokola Mokambi M. Russell Ballard (1928–2023), Mokambi ya mosala ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, alobaki, “Satana ayebi lolenge ya solo mpenza mpe ya makasi mpenza ya kokata mosala ya Nkolo ezali kokitisa makasi ya libota mpe bule ya ndako.”

Koyebaka maye toyebi etali libota ya seko ya Nzambe, mwango na Ye mpo na bana na Ye, mpe ndimbola ya seko ya bondeko ya libota, tosengeli kozala kati na babateli ya molende ya libota.

Lolenge nini tosalaka yango?

Mokambi Dallin H. Oaks apesaki toli oyo: “Libota Esakola … ezali bobeti lisusu nsete ya Nkolo ya bosolo ya nsango malamu tozali na yango bosenga mpo na kosunga biso kati na mikakatano ya lelo epayi na libota.”

Na bomoi na biso ya moto se moko, tokoki kosala “biloko ya mike mpe ya pete” (Alma 37:6) oyo elendisaka bondeko ya libota. Oyo esangisi kolandaka mibeko ya mabota mpe mabala ya elonga eteyami kati na esakola ya libota: “ bondimi, losambo, boyamboli, bolimbisi, botosi, bolingo, mawa, mosala, mpe milulu nyonso ya bosakani ya malamu.” ezali seko seko motuya epayi na biso.

Lokola “bayi mboka bakokai” kati na masanga na biso, tokoki “kotombola bimekoli wana eponama mpo na kobatela mpe kolendisa libota.”

Tozali bato ya boyokani ya mikolo ya nsuka ya Nkolo. Tozali basangoli ya bilaka esalamaka epayi ya Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo—bilaka oyo etali mabota. Bilaka wana eyaka elongo na libiangi ya bule mpo na kopambola “mabota nyonso ya mokili.” Mpe nzela moko ya motuya tosalelaka yango ezali na kobikaka, kobatelaka, mpe kokabolaka bosolo ya seko ete “libota etindami na Nzambe” mpe ete “makuli mpe mayokani oyo ezwami kati na batempelo esantu ekomisaka yango ekoka kozala mpo ete bato bazonga liboso na Nzambe mpe mpo ete mabota esangisama mpo na seko”

“Nazali elongo na Yo”

Ntango Ndeko mwasi Uchtdorf mpe ngai totalaka bato ya libota na biso kosala mayokani ya bule na ya biso wa bolingo, Tata ya seko na Lola, mitema na biso etondaka na bosepeli mpe botondi. Tosepelaka bobele te kati na bana na biso mpe bana na bango te kasi lisusu kati na baboti na biso mpe baboti na bango. Tomaniolaka na bolingo makasi lolenge nini mayokani ya nsango malamu esangisaka biso bikeke na bikeke. Ezali boyebi ekeseni te na komonaka “ebutelo etelemaki likolo na mokili, … nsonge na yango [kokomaka] na likolo: mpe tala mbanjelu na Nzambe bazalaki komata mpe kokita likolo na yango” (Genese 28:12).

Mapamboli Nkolo alakaaki Yakobo na liloto na ye esembolami na bana na Ye nyonso ya boyokani—kosangisaka yo mpe ngai. Lokola Nkolo asalaki mpo na Yakobo, Akoyanola biso “na mokolo ya [ya biso] mawa” (Genese 35:3) soki toponi Ye.

“Tala,” Nkolo alobaki, “nazali elongo na yo, mpe na kobatela yo bipai nyonso bikokenda yo, … mpo ete nakotika yo te” (Genese 28:15).

Lokola Yakobo, tozali banso na bisobe ya kokatisa. Ntango mosusu mapamboli elakama emonanaka lokola mosika mpenza. Ntango kpokoso to mikakatano eyei, tokoki komituna na ntina ya bolingo ya Nkolo . Tokoki kutu komiyoka ete Nzammbe atiki biso. Atako na makasi na biso malamu mpenza na kimoyekoli, tokoki komiyoka ete tozali kozwa mapamboli tozalaki kolikya.

Bandeko mibali mpe basi, baninga ba bolingo, nzela ya boyokani ezali nzela ya esengo, atako mbala misusu ekoki kobebisama na mpinzoli . Soki oyoki ete bandambo ya mwango ya esengo ekokisami te na bomoi na yo sikawa, nasengi otia motema ete Nkolo akanisaka yo mpe akopambola yo na ngonga na Ye ekoki, engebene na bwanya na Ye.

Bondimi na Yesu Klisto mpe bilaka na Ye efulaka biso totala liboso, nsima te. Mpo na Ye, lobi na biso esengeli te ezala ya kokangama na eloko kani oyo esalemaki kala to ezali kokanga emoneli na biso sikawa mpenza. Iyo, tozali banso, to tokozala, ya kozokisama na lolenge moko to mosusu. Kasi tondimelaka Mobikisi Monene. Totielaka Ye motema—mingi mpenza, boye, ete toyambaka bilaka na Ye, na mobimba “kati na kondima,” kutu ntango ezalaki naino “mosika” (Baebele 11:13).

“Bomikundola banso ete, na lolenge mpe ngonga Nkolo akolinga, mapamboli moko te ekopimelama na bansantu na Ye ya bosembo,” elobaki Mokambi Nelson. ,”Nkolo akosambisa mpe akopesa mbano na moto nyonso engebene na mposa na ye ya motema mpe misala.”

Nalaki ete ntango tolandi mpe tokaboli mwango ya tata na lola mpo na mabota, Akozala elongo na biso, kosunga biso, mpe kosangana na biso na mobembo na biso. Akotika biso mokolo moko te biso moko, mingimingi ntango mimekano eyeli biso to balingami na biso. Akomema biso, kotombola biso likolo, mpe komema biso na mokili ya elaka ya litondi ya bosepeli elongo na Ye, na Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe na mabota na biso—seko na seko.

Matangi

  1. Marion G. Romney, “Temples—The Gates to Heaven,” Ensign, Sanza ya zomi 1971, 16.

  2. Tala Bruce C. Hafen, Covenant Hearts: Marriage and the Joy of Human Love (2005), 58–59.

  3. Tala Bruce C. Hafen, Covenant Hearts, 59; Talalisusu “Families Can Be Together Forever, Hymns, no. 300.

  4. Libota: Esakola na Mokili,” Biblioteke ya Nsango malamu.

  5. Russell M. Nelson, “Set in Order Thy House,” Liahona, Sanza ya yambo 2002, 80.

  6. Libota: Esakola na Mokili.”

  7. Scott L. Buchanan, “The Nuclear Family Is Indispensable,” Public Discourse, Sanza ya motoba 4, 2020, thepublicdiscourse.com.

  8. M. Russell Ballard, “The Sacred Responsibilities of Parenthood” (Losambo ya Université ya Brigham Young, Sanza ya mwambe 19, 2003), 3, speeches.byu.edu; tala lisusu Ensign, Sanza ya misato 2006, 28–29.

  9. Dallin H. Oaks, “Mwango mpe Esakola,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 30.

  10. Libota: Esakola na Mokili.”

  11. Libota: Esakola na Mokili.”

  12. Libota: Esakola na Mokili.”

  13. Russell M. Nelson, “Celestial Marriage,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 94.