“Nzela ya Liyokani ya Esengo,” Liahona, Sanza ya Mibale. 2026.
Etinda ya Sanza mpo na Liahona, Sanza ya mibale 2026
Nzela ya Esengo Ya Liyokani
Likamwa mpe monene ya bayi libota bakangami elongo na elongi ya Tata mpe Mwana mobali ememaka bokamwi ezanga nsuka mpe bosepeli na molimo na ngai mpe etondisaka ngai na molimo ya botondi.
Mpaka Patrick Kearon mpe mwasi na ye, Jennifer
Ntango Israel mpe Elizabeth Haven Barlow batikaki Nauvoo, Illinois, mpo na kokende Salt Lake Valley na 1848, bango batikaki bebe moko ya mobali akundamaki na lilita moko moke ya Nauvoo. James Nathaniel Barlow moke, mwana na bango ya yambo, akufaki ntango moke sima ya mbotana na sanza ya Mitano 1841.
Na bokeyi na bango na the Salt Lake Valley, Israel mpe Elizabeth bakanisaki ata moke te bakokai komona lisusu lilita ya mwana na bango ya mobali. Kasi ntango Israel abengamaki na misio na Angleterre mibu mike sima, alekaki na Nauvoo ntango abembukaki na esti. Na bosenga ya Elisabeth, atelemaki mpo na koluka lilita ya mwana na bango ya mobali mpo na komema ebembe na ye na lilita monene, na esti ya ekolo.
Sima ya boluki mokolo mobimba ezanga litomba, Israel alukaki lisungi ya mobateli ya esika. Mokolo elandi, bamonaki lilita, ezalaki pembeni ya oyo ya Mary ndeko mwasi ya James. Na mawa mpenza, basanduku epolaki mpe ebukanaki. Na mokanda atindelaki mwasi na ye, Israel akomaki, “Na boye nabalukaki mpe nazuaki mokano ete nakokaki kotika bangoo kuna kino mokolo ekoya.”
Akendaki mosika te uta na lilita ntango ayokaki mongongo moko. Kokundolaka komona, ya akomaki, “ezalaki koyokana mpenza te, kasi polele na makanisi na ngai ete nakokaki koboya yango te: ‘Tata, kotika ngai awa te.’” Israel azongaki na lilita, kozuaka mokano ya kolongola mwana na ye ya mobali ya moke sima na nyonso “Nayokaki kopema mpe kimia mpenza ya kokesena oyo nayoka yambo te. … Oyo mingi nakoloba: ete nazalaki ata mokolo moko te na bososoli ya mokumba moko oyo esalemaki na bomoi na ngai.”
Na sanza ya Libwa 2, 1853, Israel Barlow mpe mobateli ya esika balongolaki banzoto ya James mpe Mary na lilita monene ya Nauvoo, kotiaka elembo na esika na “mabanga na mutu mpe na nse ya lilita.”
Israel ayebisaki Elizabeth ete lokola atelemaki na pembeni ya lilita, “Nayokaki posa ya kobulisa ngai moko mpe nyonso oyo nakokaki kobenga ya ngai kati ya maboko ya Nkolo, ete nakoka kotangama sembo kokoma liboso elongo na [Yakobo] na ntongo ya Lisekwa ya Yambo.”
Komipesa ya Yisalaele na nsango malamu ya Yesu Klisto, kosangisaka na botosi ya nayokani ya bule, epesaki nzela na Klisto ya kopesa bomoi ya seko—oyo lipamboli monene koleka mapamboli nyonso—ekoki mpo na ye, bakoko na ye, mpe bana na ye.
Lolenge moko ezali solo mpo na biso nyonso.
Elilingi na Jerry Gams, ekoki kobimisa kaka mpo na bosaleli na Eklezia.
Bilaka ya Bule
Tata na biso na Lola mpe Mwana na Ye ya Mobali, Yesu Klisto, balingi moko na moko na biso koleka eloko nyonso tokoki kokanisa. Esika moko te bolingo na Bango emonisami koleka na nzela ya mapamboli esangani na mayokani epesameli biso na libatisi mpe kati na ndako ya Nkolo.
“Moko ya motuya koleka ya boyebi ya eyamba ebimisamaki ezali liyokani ya bule,” Mokambi Russell M. Nelson (1924–2025) ateyaki. “Na kota esengele, liyokani mingimingi elakisi boyokani moko katikati na bangambo mibale to ebele. Kasi kati lolenge ya eyamba, liyokani ezali na ndimbola monene koleka. Ezali elaka ya bule epesami na Nzambe.”
Elaka nyonso ya bule oyo tosalaka mpe tobombaka epambolaka biso. Tata na Lola mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto balingi kobenda biso pembeni na Bango. Balingi kosalisa biso koyekola mpe kokola na bondimi mpe bososoli. Balingi kolatisa biso na nguya ya lola. Balingi biso tozwa lobiko mpe kimia na mokili epai wapi mapamboli wana ekoki kosimbama te. Balingi biso tozwa esengo na bomoi oyo mpe na bomoi oyo ekoya. Kowutaka na bolingo yango ebongi nie, Bango bapesi biso libaku ya kokota na liyokani ya kokangama na Bango. Tozali na lipamboli ya kobandelaka mayokani yango poso nyonso kati ya liyangani ya elambo.
Toliaka elambo na molimo ya botondi mpo ete mpo ete tozali na lipamboli ya esengo ya kozuaka likolo na bisomoko nkombo ya Yesu Klisto, kokanisaka Ye mpe bolingo na Ye mpo na biso elakisami na nzela ya likabo ya Bomikabi na Ye—ete Ye anyokuamaki, atangisaki makila, mpe akufaki mpo na biso. Elambo epambolaka biso lisusu na libaku ya poso nyonso mpo na kolakisa bolingi na biso ya kobomba mitindo na Ye, kobandela mayokani na biso, mpe kosala liyokani moko ya sika (tala Malongo mpe Mayokani 20:77, 79).
“Mingimingi, nayokaka liloba moko ete toliaka elambo mpo na kobandela mayokani tosalaki na libatisi. Ezali ya solo, kasi yango ezali mingi kolaka yango,” elobaki President Nelson. “Nasalaki mayokani ya sika. Bosalaki mayokani ya sika. … Sika na bozongisi mpo oyo [Nkolo] alobaki ete tokozwa ntango nyonso na Molimo na Ye elongo na biso. Oyo libamboli monene!”
Ntango toyamboli mpe tolei elambo na motema ya peto, tozwaka Molimo Mosantu mpe “topetolami na lisumu lokola tobatisamaki lisusu. Oyo ezali elikya mpe ngolu Yesu apesi na moko na moko na biso.”
Oyo esengo ya koyambola mpe kolimbisama na nzela ya bolingo ya bosikoli ya Klisto
Elilingi ya Tempelo ya Nauvoo Illinois na Jennifer Rose Maddy
Ndako na Ye ya Esengo
Sima ya bokomi Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, mokambi Nelson alobelaki mingimingi na ya nzela ya liyokani, kobandaka na liteya na ye yambo liboso ya bato eble lokola Mokambi ya Eklezia. Tokoti na nzela wana na nzela ya “boyamboli mpe libatisi na mai” (2 Nefi 31:17), alobaki na libaku ekoya, mpe “sima tokoti yango mobimba kati ya tempelo.”
Kaka ndenge toliaka elambo ekanisaka biso mayokani na biso mpe mapamboli etambolaka na yango, ezali ndenge moko mpo na mosala ya bozweli na tempelo. ntango tosala makuli ya bozweli mpo baye bakufa, tokundolaka bilaka ya bule tosalaki mpe mapamboli elakami oyo tokozwa.
Na nzela ya liyokani, tokokoma baulani ya mapamboli nyonso elakama na Abalayama, Yisaka, Yakobo, mpe nkola na bango. Atako mapamboli elakama yango, Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo bazalaki na bomoi na pete te, mpe ndenge moko na biso. Lokola bango, tokutanaka na kibongunia, koniokuama, mpe bobungisi mpo ete tozali ya “komekama na makambo nyonso” (Malongi mpe Mayokani 136:31; tala lisusu 101:4–5). Kasi lokola baprofeta mpe Basantu ya mpiko ya kala, toyebi na nani tokoki kolikya (tala 2 Nefi 4:19).
Bomoi na biso ya bokufi ezali ntango moko kaka ya bozali na biso, kasi ntango yango—bangonga mosusu mpasi mingi—ezali na motuya ya libela. Iyo, Nzambe Tata na biso alingi biso toyekola mpe tokola. Mpe, iyo, bokoli yango etambolaka na kolemba nzoto mpe minyoko. Kasi Alingi bomoi na biso ezala kitoko mpe ya elikya. Na suka yango, mpe mpo na kokomisa pete mobembo na biso ya bozongi epai na Ye, Apesaki biso Mobikisi, oyo azali “mokokisi” ya mayokani na biso na Tata na Ye. Na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, Tata akokisi elaka azalaki na bana na Ye kati ya tempelo.
Na nzela ya bolingo mpe bomikabi na Ye, Mobikisi na biso azuaki mokumba mpe abikisaki nyonso tokokutana na yango kati na bomoi. Mpe mpo na ndako na ye ya Bule—Ndako na Ye Ya esengo—banso tokozala malamu atako botelemeli. Balsame ya kobatela liyokani elongolaka mawa, mpasi, mawa, mpe kozanga bosepeli. Tosengeli komitungisa to kobanga te. Na esika na yango, tokokikosepela ete talo ya boyamboli na biso efutamaki (tala Bakolinti 6:20) mpe ete nzela mawa ya liyokani mpo na bomoi ya seko etiamaki.
Nzela ya liyokani ezali solo nzela ya bolingo ya bosikoli. Ntango tokomisi mayokani tosali na tempelo, tozwaka mapamboli ya nguya monene koleka, bolingo monene koleka, ngolu monene koleka, bososoli monene koleka, mpe elikya monene koleka. Likamwa mpe monene ya bokangi na tempelo—ya libota bakangami elongo na bolingo mpo na libela—ememaka bokamwi ezanga nsuka mpe bosepeli na molimo na na ngai mpe etondisaka ngai na molimo ya botondi.
“Ntango nyonso lolenge kani ya mobulungano esalemi na bomoi na yo, esika ya kimia mpenza ya kozala na molimo ezali kofanda kati na yayo mayokani ya tempelo!” Mokambi Nelson apesaki toli. Nayebi uta na boyebi na ngai moko bokofi ya sukali mpe batango mosusu ya bololo ya bosolo ya maloba wana.
James Nathaniel Barlow, mwana ya yambo ya Israel mpe Elizabeth Barlow, akufaki kala te nsima ya mbotama na ye na sanza ya Mitano 1841. Mibu nsima, akangamaki na bozweli na baboti na ye na Tempelo ya Logane na Utah.
Elilingi na Allen Garns
Kozongisa Bango na Ndako
Nsima Israel Barlow kopesa mbote ya suka na mwana na ye ya moke ya mobali, akomelaki mwasi na ye, “Makanisi ya kolongwa mosika, mpe kozonga ata mokolo moko te na bomoi na lilita ya [James], ebukaki singa moke etikalaki ya bolingo kino ekatanaki na mayi ya miso likolo ya lilita na ye.”
Nakanisi ete mayi ya miso yango ya mingi—mayi ya miso ya esengo ntango wana—etangaki na sanza ya Zomi na mibale 4, 1889. Na mokolo yango, James Nathaniel Barlow ya moke akangisamaki na baboti na ye na Tempelo ya Logan Utah. Na ntango wana, Israel akufaki, boye bato mosusu batelemaki lokola bazweli mpo na ye mpe James.
Ndeko mwasi Kearon ngai tozalaki na liyoki moko ya kokesena mpe mawa monene mpo na Israel mpe Elizabeth. Mwana na biso ya yambo, mwana mobali na nkombo ya Sean, akufaki natngo ya lipaso ya motema ntango azalaki kaka na mposo misato ya mbotama. Ezalaki bobungisi moko ya kobalusa motema mpo na misu. Na ntango wana, tomitungisaki soki akokaki kobika. Tokundaki ye na lilita moko moke ya pasi na Angleterre. Nsima ya mibu zomi na mitano, libota na biso esengamaki kolongwa uta na ndako na biso na Royaume Unis kosala misio ya ntango mobimba na Eklezia, mpe totikaki lilita moke na nsima.
Tobungisaki bebe na biso te na bokeyi na westi, mpe tonyokwamaki te na mimekano ezangi bososoli lokola ba Barlow, kasi tobandaki kososola nini bango bayokaki. Lilita ya bebe na biso ya mobali ezali mosika mpenza, kaka lokola ya ba Barlow, tozali na bondimi makasi na Lisekwa ya Yesu Klisto mpe lolenge ya boseko ya libota na biso na nzela ya liyokani ya bokangisi ya bule.
Biso nyonso tozali na bakoko mpe balingami mosusu na nse ya malita oyo bazali koyebisa biso, “Botika ngai awa te.” Mpo na mayokani ya tempelo, moto moko te asengeli atikala na nsima. Mbela na biso ezali ya kolinga bango, kosalela bango, mpe kosalisa bango bazonga na ndako.
Tata na Biso ya Lola alingi bino, yo na ngai. Ye apesaki biso bantempelo boye ete “nyonso oyo [biso] tokangi na mabele esengeli ekangama na lola” (Malongi mpe Mayokani 128:8; tala lisusu Matai 18:18). Ye atindaki Mwana na Ye ya mobali abuka bankanga ya kufa, kofungolaka nzela na bokangani ya seko mpe bosangani ya seko ya mabota.
Yango wana tozali na makuli. Yango wana tosalaka mayokani. Yango wana tozali kotongaka batempelo. Yango wana tomipesaka na mosala mpe nkembo ya Nzambe (tala Mose 1:39). Mpe yango wana totangisaka misoli ya esengo, koyebaka ete bokutani ya seko ezali kozela biso mpe balingami na biso liboso ya Tata mpe Mwana.
Tika biso tozwa esengo mpe kimia ntango tozali kobomba mayokani na biso mpe kosangana na Nkolo mosala na Ye ya nkembo ya bobikisi
© 2026 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Liahona Message, February 2026. Lingala. 19933 639