“Bato bapambolami na Likoki mpe Nguya ya Bonganganzambe,” Liahona, Sanza ya libwa 2025.
Etinda ya Sanza ya Liahona, Sanza ya libwa 2025
Bato bapambolami na Likoki mpe Nguya ya Bonganganzambe
Bandimi ya Eklezia basalelaka nguya ya Nzambe na kosalelaka mpe kopambolaka basusu kati na Eklezia, na ndako, mpe na mokili mobimba.
Litatoli na biso na mokili ezali ete bonganganzambe bosantu ya Nzambe ezali na ntina mingi na kokokisaka mosala na Ye ya lobiko mpe ya bonetoli, ete azongisaki bonganganzambe na mabele mpo na ntina wana, mpe ete etambwisami na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.
Motuya ya Likoki mpe Nguya ya Bonganganzambe.
Yesu Klisto azali moto ya Eklezia Eklezia ezali esaleli oyo Ye moko akeli mpo na kokokisa mosala ya ntina ya kobikisa bato na eleko oyo ya nsuka ya nsango malamu kaka lokola na eleko oyo ntango Ye azalaki na mabele. Na nzela ya Eklezia:
-
Ye akoki kosakola nsango malamu na ye na mokili mobimba.
-
Akoki kopesa libatisi mpe mayokani nyonso mosusu—kutu nzela ya boyokani oyo ememaka na bokonzi ya selesitiale na Ye.
-
Akoki kosangisa mabota mpo na seko.
-
Akoki kopesa makabo ya lobiko, ata na baoyo bakufaki na yango te.
-
Akoki kosalisa na bamposa ya nzoto ya bana ya Nzambe na ntango ya sikawa.
Mpo na kokokisa mikano minene oyo, mpe mpo na kolengela bozongi ya Mobikisi, Eklezia ezali na mposa ya bokambi ya ntango nyonso, likoki, mpe nguya ya Nzambe. Eklezia ezali “eklezia ya solo mpe ya bomoi” (Malongi mpe Mayokani 1:30) mpo ete Klisto azali kofula yango na bokambi mpe nguya na Ye na nzela ya bonganganzambe na Ye, “Bonganganzambe Bosantu, na Molongo ya Mwana ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 107:3).
Kasi mpo na bonganganzambe bosantu oyo, Eklezia ekozala mpenza ebongiseli moko ya kala, oyo ezali kosala malamu na mokili kasi na nguya te mpo na kokokisa ntina ya libosoliboso ya kolengela bana mibali mpe bana basi ya Nzambe mpo na esengo ya bomoi ya seko na miso na Ye. Na bonganganzambe oyo, mpe bafungola ya kotambwisa mosala ya bonganganzambe oyo, ezali na likoki mpe na molongo kati na Eklezia.
“Na Eklezia, likoki nyonso ya bonganganzambe esalelami na nse ya bokambi ya baye bazali na bafungola ya bonganganzambe.
“Bandimi ya Eklezia ya mibali oyo balongobani bazwaka likoki ya bonganganzambe na nzela ya bopesi mpe bokulisi na bonganganzambe na masanga ya bonganganzambe. Bandimi nyonso ya Eklezia bakoki kosalela likoki oyo epesameli bango ntango batiami pembeni to bapesami mokumba ya kosunga na kokokisa mosala ya Nzambe.”
Na nzela ya bafungola ya bonganganzambe, makambo ya motuya ya Nkolo ekolonga ntango nyonso. Moto moko te akoki kosunga libongisi na ye moko oyo ezali na boyokani te na bokambi na Ye. Moto moko te akoki kolonga na mosala ya bonganganzambe, kolukaka litomba na ye moko mpe bolandi ya ye moko.
Bonganganzambe ezali lisusu na mokumba monene na bandako ya bandimi ya Eklezia. Mokambi Dallin H. Oaks, Mopesi toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo, ateyaki, “Libongi oyo ete likoki ya bonganganzambe ekoki kosalelama kaka na nse ya bokambi ya moto oyo asimbi bafungola mpo na mosala wana ezali ya ntina koleka na kati ya Eklezia, kasi yango ezali kosalama na kati ya libota te.” Batata bazali kokamba mpe kosalela bonganganzambe na libota na bango—kopesa toli, kosala makita ya libota, kopesa mapamboli ya bonganganzambe to ya libiki na bato ya libota to basusu, mpe bongo na bongo—kozanga bokambi to ndingisa ya moto oyo asimbi bafungola ya bonganganzambe.
“Libongi se moko oyo eselamaka ntango tata azali te mpe mama azali mokambi ya libota. Akokamba na kati ya libota na ye mpe azali esaleli na komemaka nguya mpe mapamboli ya bonganganzambe na kati ya ndako na ye na nzela ya dotasio mpe bokangisi na ye na kati ya tempelo.”
Bozongisi ya Bonganganzambe na Mikolo na Biso
Sanza ya mitano 15, 1829
Bozongisi ya likoki ya bonganganzambe na eleko oyo ya nsuka esalamaki na molongo moko mpenza, ya bokobi ya litambe na litambe. Ntango makomi ya moboko mpo na eleko na biso, Buku ya Mormon, ezalaki kobongolama na 1829, Nkolo abandaki kotia ebongiseli na Ye ya bonganganzambe na esika. Na eyano na motuna ya losambo ya Joseph Smith mpe Oliver Cowdery na ntina ya libatisi, Yoane Mobatisi mosekwi abimaki mpe apesaki bango Bonganganzambe ya Alona, oyo bonganganzambe “esimbaka bafungola ya mosala ya banzelu, mpe ya nsango malamu ya boyamboli, mpe ya libatisi na kozindisama mpo na bolimbisi ya masumu” (Malongi mpe Mayokani 13:1). Na likoki yango, Joseph mpe Oliver bamibatisaki moko na mosusu mpe na nsima basusu lokola Eklezia ezalaki kobongisama na ndenge ya mibeko.
Kala te nsima ya Sanza ya mitano 15, 1829
Mikolo moke nsima ya bobimi ya Yoane Mobatisi, Bantoma ya kala Petelo, Yakobo, mpe Yoane babimaki mpe bapesaki bonganganzambe ya likolo, to ya Melekisedeke, bakisa mpe “bafungola ya bokonzi na ngai, mpe eleko ya nsango malamu mpo na litondi ya ntango” (Malongi mpe Mayokani 27:13); tala lisusu 128:20).
Sanza ya minei 3, 1836
Likoki mosusu ya bonganganzambe eyaki nsima ntango, na Tempelo ya Kirtland, basakoli misato ya kala, Mose, Elias, mpe Eliya, babimelaki Joseph mpe Oliver mpe bapesaki bango bafungola ya bosangisi ya Yisalaele mpe ya mosala oyo etali batempelo ya Nkolo (tala Malongi mpe Mayokani 110:11–16).
Eleko ya molunge 1829–Sanza ya minei 1835.
Bimoniseli oyo ekomami sikawa na Malongi mpe Mayokani elakisaki Profeta Joseph Smith etali bokulisi ya bato ya mibali na masanga ya bonganganzambe ya likolo (Melekisedeke) mpe ya bolengeli (Alona); boponi ya basali ya bonganganzambe, lokola baepiskopo; mpe ebongiseli ya masanga mpe makita ya bonganganzambe.
1835–1973
Bokambami ya bobimisi ezali kokoba kotambwisa ebongiseli mpe mosala ya bonganganzambe na kati ya Eklezia. Ndakisa, masanga makoki ya Bantuku Nsambo ebongisamaki na eleko ya Kirtland mpo na kosunga Lisanga likoki ya Bazomi na Mibale. Nsima ya bobimi monene mpo na kokende na Westi mpe kopalangana ya bandimi ya Eklezia na bisika minene ya mabele, masanga oyo epesamaki mokumba ya kosala kati na makonzi ya Eklezia.
Uta 1973–Kino lelo
Na nse ya misala ya Bakambi Spencer W. Kimball (1895–1985), Ezra Taft Benson (1899–1994), mpe Gordon B. Hinckley (1910–2008), Bantuku Nsambo mpe masanga na bango ebandaki kosala mbala moko na nse ya Lisanga likoki ya Bazomi na Mibale na Eklezia mobimba mpe bituka ya Eklezia. Masanga na likonzi esukisamaki nsima. Lelo, masanga makoki ya bazomi na mibale ya Bakambi Minene mpe ya Bantuku nsambo bazali kosalisa Bapostolo “na kotongaka eklezia mpe koyangelaka makambo nyonso lolenge moko na bikolo nyonso” (Malongi mpe Mayokani 107:34). Masanga mosusu ya Bantuku Nsambo ekoki kokelama lokola Eklezia ezali kokola.
Mpaka Christofferson azali kopesa mbote na bandeko Sampson mpe Daniel Amako na Gambie, Afrika ya Westi, na Sanza ya mibale 2022.
Bonganganzambe: Nguya ya Kopambola
Na liloba moko, ntina ya likoki mpe nguya ya bonganganzambe oyo Yesu Klisto azongisaki ezali mpo na kopambola. Ezali kopesa nzela na bandimi ya Eklezia ya kosalela nguya ya Nzambe na kosalela mpe kopambola basusu kati na Eklezia, na ndako, mpe na mokili mobimba. Bandimi bazali kosangana na Mobikisi na kokokisaka mosala na Ye ya lobiko mpe ya bonetoli, kosalelaka makabo ya bonzambe mpe nguya mosika koleka oyo ya bango moko mpo na kosalisa bokonzi ya Nzambe ekola mpo na kotondisa mabele (tala Malongi mpe Mayokani 65:2, 5–6).
Nkolo alimboli ete “bonganganzambe ya likolo [Melekisedeke] oyo eyangelaka nsango malamu mpe ezali na fungola ya misala ya bokonzi, kutu fungola ya boyebi ya Nzambe.
“Na yango, na makuli na yango, nguya ya bonzambe ezali komonana.
“Mpe kozanga makuli na yango, mpe likoki ya bonganganzambe, nguya ya bonzambe ezali komonana te epayi ya bato na mosuni” (Malongi mpe Mayokani 84:19–21).
Makuli, ya solo, ezali milulu esalami na nzela ya bonganganzambe to elambo oyo na nzela na yango nde tosalaka mayoki elongo na Nzambe, kobandaka na libatisi mpe kokobaka na nzela ya mayokani oyo ezwami kati na ndako ya Nkolo. Ezali na kobatelaka mayokani oyo nde tobongwani uta na bato ya “bomoto” na basantu (tala Mosiya 3:19) na ngolu ya bomikabi ya Klisto mpe kokoma bato ya sembo mpe bule—kozanga mbeba mpe litono—liboso ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 20:29–31; 3 Nefi 27:16–20).
Liloba oyo uta “Bozongisi ya Litondi ya Nsango Malamu ya Yesu Klisto:Esakola ya Mibu Nkama Mibale na Mokili,” na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga ya Bapostolo Zomi na mibale, ezali kolakisa maloba ya mokuse oyo ebongi mpenza:
“Tosakoli ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka, ebongisamaki na mokolo ya 6, Sanza ya minei 1830, ezali Eklezia ya Klisto ezongisami ya Boyokani ya Sika. Eklezia oyo ekangami makasi kati na bomoi ebonga nie ya kokonzi na yango oyo azali libanga esimbi ndako, Yesu Klisto, mpe kati na Bomikabi na Ye ezanga nsuka mpe Bosekwi na Ye na nzoto. Yesu abiangi mbala moko lisusu Bapostolo mpe apesi bango likoki ya bonganganzambe. Abengisaka biso banso toya epai na Ye mpe na Eklezia na Ye, tozwa Molimo Mosantu, makuli ya lobiko, mpe tozwa esengo oyo ewumelaka.”
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Liahona Message, September 2025. Lingala. 19604 639