“Luka Esengo na Mobembo na Yo ya Nsango malamu,” Liahona, Sanza ya nsambo 2025.
Etinda ya Sanza ya Liahona , Sanza ya nsambo 2025
Luka Esengo na Mobembo na Yo ya Nsango malamu
Bosukisi ya nsuka ya kolakisa bolingo na biso mpo na Nkolo na kobatelaka mitindo na Ye ezali mapamboli oyo ememaka bosepeli mpe esengo.
Foto ya bandimi ya Eklezia oyo bazali na esengo na Thaïlande na Christina Smith
Ntango nazalaki kosalia lokola mokambi ya misio na Japon mibu ebele eleki, nakotaki na likita moko ya poso engumba moko na moko ya bisika moko misika na misio na biso. Mokambi ya disitiliki abongisaki mpo na ngai kosala bosololi elongo na mobali moko oyo akota na Eklezia mobu moko liboso mpe azalaki koluka kozwa mokanda ya tempelo. Alikyaki kozwa dotasio na ye moko na mokolo ya mobu moko ya libatisi na ye to pene na yango.
Na ntango ya lisolo na biso, mondimi oyo ya sika alimbolaki boniboni azalaki na botondi mingi mpo na mapamboli ebele oyo azwaki na mobu uta abatisamaki. Asepelaki kokende na elambo ya poso na poso mpe makita mosusu. Amipesaki mingi na milulu ya etape na ye. Mpo na ngai, abimisaki elikia ya liyokani oyo ewutaki na kososolaka ntina na ye ya nsango malamu, oyo ezalaki sikawa eteni ya ntina na ye. Azalaki moyekoli mobongwani ya Klisto oyo azuaki mbonguana moko ya nguya ya motema (tala Mosiya 5:2).
Lisolo na biso oyo etikali elandaki motindo moko ya elikya. Tolobelaki makuli mpe mayokani oyo ekozala eteni ya bokutani na ye na tempelo. Ayanolaki na bondimi moko na moko ya mituna ya momesano oyo etali kozwa mokanda ya tempelo.
Nsima ya bosololi, namikundoli kopesaka makanisi na mokambi ya disitiliki boniboni nazalaki na botondi ya kokutana na mobali moko ya kokamwa boye. Nayebisaki ye boniboni nasepelaki ete bamisionele mpe bandimi bazwaki, mpe baleisaki na molimo, moto moko ya makoki mpe elaka ya boye.
Nakamwaki ntango mokambi ya disitiliki akabolaki ete ntango mobali oyo abandaki kozwa mateya uta na bamisionele mpe kokende na lingomba koleka mbula moko liboso, azalaki na ndako te mpe na makambo ya mpasi mingi—pene na kozanga elikya. Mokambi ya disitiliki alakisaki sima lolenge nini boyekoli ya nsango malamu ya ndeko mobali oyo mpe mbonguana na ye na eleko ya basanza ememaki mbonguana na ye ya kokamua, kotiaka ye na nzela ya bomikoki nyonso mibale ya molimo mpe ya nzoto mpe kopesaka ye bomoni ya ntina mpe esengo.
Nsango malamu epesaki ye elilingi ya polele ya ntina ya bomoi na ye. Babosolo ya pete mpe ya motuya ya nsango malamu ememaki biyano na mituna ya ntina ya bokufi, kobandaka na boyebi ete “Nzambe azali Tata na biso ya Lola, mpe tozali bana na Ye. Nzambe ayebi biso yemei mpe alingi biso.” Kati na mwango na Ye, “Tata ya Lola apesaki makabo mpe babotambwisi ebele mpo na kosunga biso tozonga na miso na Ye.”
Lolenge ya lipamboli ezalaki mpo na mobali oyo, oyo ezali bongo mpo na bana ya Nzambe nyonso na nzela ya nsango malamu ya Yesu Klisto.
Ntina ya Bomoi
Mpo ete Yesu Klisto azongisaki nsango malamu na Ye na nzela ya Profeta Joseph Smith, “tozwi bososolki moko ya ntina ya bomoi, ya nani tozali,” elobaki Mokambi M. Russell Ballard (1928–2023). Kati na litatoli na ye ya nsuka na Eklezia, Mokambi M. Russell Ballard, Mokambi ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, alobaki:
“Toyebi nani Nzambe azali; toyebi nani Mobikisi azali mpo tozali na Joseph, oyo akendaki na kati ya zamba ya banzete lokola mwana mobali, kolukaka bolimbisi mpo ya masumu na ye. …
“Nakamwaka, mpe nandimi mingi kati na bino mpe bokamwaka, na lolenge topambolami mpo na koyeba nini tosengeli koyeba na ntina na biso na bomoi, mpo na nini tozali awa, nini tosengeli komeka kosala mpe kokokisa na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.”
Mpo na bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, boyebi yango esangisi bososoli moko ya “mwango ebongi nie” ya lobiko ya Nzambe. Lisusu eyebani lokola “mwango ya esengo,” “mwango ya bosikoli,” mpe “mwango ya ngolu” (Alma 42:8, 11, 5), oyo “elongoli mabombami ya bomoi mpe kozanga koyeba ya lobi na biso.” Ya motuya na mwango yango ezali “malongi ya Klisto,” oyo ezali moboko ya ntina ya bomoi.
Mpo ete tozali na nsango malamu, toyebi ete tozali bana ya Nzambe, totindamaki na mabele mpo na komeka, kosukolama, mpe kolengelama mpo na “komemama liboso na lisekwa ya nkufa, na nzela ya elonga mpe nkembo ya Mwana na mpate” (Malongi mpe Mayokani 76:39). Toyebi mitindo mpe toteyamaki “na bokoki mpenza ete [biso] toyebi malamu uta na mabe” (2 Nefi 2:5). Toyebi ete tozali na mabele mpo na kolinga mpe kosalisa. Mpe toyebi ete Mobikisi abengaki biso totelemela mokili mpe tosalisa basusu basala lolenge moko (tala Yoane 16:33; Malongi mpe Mayokani 64:2) na bolengeli mpo na Bozongi na Ye ya Mibale.
Soki totie makanisi epayi na Ye, oyo Joseph Smith abengaki “mongongo ya bobeti maboko ya Nsango malamu ya Nkolo Yesu Klisto” ekopesa biso makasi katikati ya mikolo ya mpasi mpe ekomema bososoli mpe ntina ya bomoi na biso mpe bomoi ya basusu.
Mabolongo Nyonso Makongumbama, na Dan Wilson, esengeli emekolama te.
Botosi, Lipamboli, Esengo
Nzambe apesaki biso bonsomi ya kopona ya kibomoto ete tokoka kozwa mokumba ya boponi na biso (tala Malongi mpe Mayokani 101:78; 2 Nefi 2:16). Lokola eteni ya “botelemeli na makambo nyonso” (2 Nefi 2:11), Satana apesameli nzela ya komeka biso tosalela na mabe bonsomi na biso ya kopona.
Kasi Nkolo Yesu Klisto “koyebaka mawa oyo esengeli koyela bato ya mabele” na mokolo moko, abiangaki Joseph Smith, ”alobelaki ye uta na lola, mpe apesaki ye mitindo” (Malongi mpe Mayokani1:17). Lolenge oyo Nkolo abimisaki mitindo na Ye mpe bolingi na Ye na baprofeta ezali kokoba na mokolo na biso na Mokambi Rusell M. Nelson—mpe mpo na ntina se moko. Nzambe azali na mposa ya komema biso na esengo na bomoi oyo mpe na nkembo ya lola na bomoi oyo ekolanda.
Botosi na mitindo ya Nzambe esengeli eya uta na bomipesi na biso mpe bolingo mpo na Ye. Nkolo Yesu Klisto Yemoko asakolaki ete kolinga Nzambe “ezali mobeko ya yambo mpe ya monene koleka” (tala Matai 22:37–38). Apesaki ndimbola ebele ntango asakolaki, “Soki bolingi ngai, bobatela mitindo na ngai” (Yoane 14:15).
Ezali na mbano mpo na kolinga Nkolo mpe kobatela mitindo na Ye. Na eleko oyo ateyaki “mobeko moko, ekateli moko ekobongwana te na lola , likolo na yango mapamboli nyonso eteyami—
“Mpe ntango tozui lipamboli nini kowuta na Nzambe, ezali na nzela ya botosi na mobeko oyo likolo na oyo esakolamaki” (Malongi mpe Mayokani 130:20–21).
Na bongo, mbano ya suka ya kolikasa bolingo na biso mpo na Nkolo na kobombaka mitindo na Ye ezali lipamboli oyo ememi bosepeli mpe esengo.
Kotalaka bomoi na nzela ya nsango malamu ezongisami mpe bobimisi ya mikolo oyo epesi biso pole koleka. Na bomoni ya pole ya lolenge na biso mpe lobi na biso ya bonzambe, toyebi ete “eloko ya motuya oyo ekosala bomoi na[bino] ya nkufa ezala malamu koleka ekoki kozala solo lolenge moko na makambo oyo ekosala ete bomoi na [biso] mobimba na boseko ezala malamu koleka oyo ekoki kozala!
Mpo na Kosukisa
Nasukisi esika nabandaki, kokundolaka boyebi na ngai mibu eleki na mobonguani ya sika na Japon. Na nzela ya nkonzo na ye mpe ya konzzo ya bamisonele mpe bandimi, amonaki nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto. Na komonaka nsango malamu, asosolaki lisusu ntina na ye, oyo epanzaki komona na ye. Amonaki lisusu mwango monene ya esengo. Botosi na mayokani ya mwango ya nsango malamu ememelaki ye mapamboli mpe esengo, kotomolaka ye na nzoto mpe molimo.
Ya ye mobembo komemaka na kibondimi na Eklezia ya Yesu Klisto epesaki ye nzela ya kokoma nzeneneke ya Yesu Klisto. Mpaka Patrick Kearon ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, alobelaki esengo oyo elandi:
“Mpo na mwango ya bolingo ya Tata na biso ya Lola mpo na bana na Ye moko na moko, mpe mpo na bomoi ya bolendisi mpe mosala ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto, biso tokoki—mpe tosengeli—kozala bato ya esengo koleka na mabele! Atango ntango bambonge ya bomoi kati na mokili etungisa mingi ebeti likolo na biso, tokoki kolona liyoki moko ya bokoli mpe ya ntango nyonso ya esengo mpe kimia na kati na biso na nzela ya elikya na biso na Klisto mpe na bososoli na biso ya esika na biso moko kati na mwango kitoko ya esengo.”
Nakabolaki botomdi na ngai, mpe litatoli ya, nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto, kosangisaka mwango monene ya bosepeli ekoki mobimba na kati na yango. Nabengi biso kokabola bambuma ya nsango malamu mpe koyoka esengo koleka na bomoi oyo na mobembo na bino ya bomoi ya seko.
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Etinda ya sanza ya Liahona, Sanza ya nsambo 2025. Lingala. 19601 639