2025
Yesu Klisto: Elikya mpe Elaka ya Pasika
Sanza ya minei 2025


“Yesu Klisto: Elikya mpe Elaka ya Pasika,” Liahona, Sanza ya minei 2025.

Etinda ya Sanza ya Liahona, Sanza ya minei 2025

Yesu Klisto: Elikya mpe Elaka ya Pasika

Na nzela ya elikya mpe elaka ya Pasika, Yesu Klisto atondisaka bamposa ya mitema na biso mpe ayanolaka mituna ya makanisi na biso.

etape ya nzete ezanga mbuma

Bililingi na Michael Dunford

Tosengi boluka ntango moko ya kimya mpe esika ya kozala ya molimo ntango bozali kotanga nsango oyo.

Mingi mingi, mokili na biso ezali na makelele, ezali na makambo ya lokuta mpe lolendo. Kasi ntango tozali ya kofungwama, sembo, mpe tozali na libaku elongo na bisomei mpe Nzambe, elikya mpe elaka ya Pasika kati na Yesu Klisto ekomaka ya solo. Na bangonga ya ndenge wana, tozali kobondela:

“Lolenge nini nakoki komona moto ya libota na ngai, moninga na ngai, molingami na ngai lisusu?”

“Kati na mokili ya mayokani oyo ewumelaka te ‘ya komipona’, wapi nakozwa mpe koyoka kimya, elikya, mpe koyokana na Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 107:19), baye bazali nzinganzinga na ngai, mpe ngai moko?”

“Ezali na moto oyo nakoki kolinga—mpe oyo akolinga ngai ya solo? Bondeko ya mayokani ekoki kokola mpe koumela, lokola lisapo te kasi na bokangami ya makasi koleka bansinga ya liwa, ya esengo ya solo mpe mpo na libela?”

“Esika mpasi mingi ezali, minyoko, mpe bozangi bosembo, lolenge nini nakoki kopesa kimya, boyokani, mpe bososoli kati na Yesu Klisto mpe nsango malamu mpe Eklezia na Ye ezongisama?”

Na eleko ya Pasika oyo, nakaboli litatoli na ngai ya Yesu Klisto mpe ya elaka mpe elikya na Ye.

Elaka ya Kozala na Boyokani mpe Mokano na yango

Nzambe, Tata na biso na Lola; Yesu Klisto, Mwana na Ye ya Bolingo; mpe Molimo Mosantu bazali pembeni na biso. Pole na bango ezanga nsuka mpe ya seko, motema mawa, mpe bolingo ya kosikola ekangisama na ntina ya bokeli mpe bosali ya kozala na biso (botala Alma 30:44; Mose 6:62–63).

Kati na Lisanga na Lola yambo bomoi ya nkufa, “minzoto ya ntongo ezalaki koyemba elongo, mpe ntango bana mibali nyonso [mpe bana basi] ya Nzambe bazalaki koganga mpo na esengo” (Yobo 38:7). Toponaki mwango. Sikawa tozali kotambola na bondimi. Na nzela ya boyebi na bisomei, tozali komona kitoko, polele, esengo, mpe mokano elakama ya Nzambe kati na kozanga kondima ya bomoi ya nkufa, bolembu, mpe mikakatano.

Ebongi te toyengayenga biso moko kati na bozangi kondima oyo ezali. Tokoki koyokana na lola, kotonga bondimi mpe kozala kati na libota mpe ndako mpe lingomba ya Basantu, mpe kokoma biso moko bato ya solo, ya bonsomi, ya solo mpenza, ya esengo na nzela ya botosi ya bolingi mpe ya esengo na mitindo ya Nzambe. Bomikabi—na yango moko—kati mpe na nzela ya Yesu Klisto ememaka bozali na boyokani oyo.

etape ya nzete na bafololo ya sika

Elikya ya Bomoi mpe Mosala ya Yesu Klisto

Moko moko na moko, elikya mpe elaka ya Pasika esangisi mapamboli mpe mateya oyo Yesu Klisto akabolaki na ntango ya mosala na ye ya bomoi ya nkufa. Aponamaki na ebandeli, Yesu Klisto abotamaki Mwana se Moko ya Nzambe (botala Yakobo 4:5; Alma 12:33–34; Mose 5:7, 9). Akolaki na bwanya mpe nzoto, Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na ye (botala Luka 2:52). Kolukaka kosala kaka bolingi ya Tata na Ye, Yesu Klisto alimbisaki masumu, abikisaki bibosono, alamusaki bakufi, mpe abondisaki bato ya maladi mpe baye bazalaki komiyoka bango moko.

Kala, nsima ya kokila bilei mpo na mikolo 40, Atatolaki, ““Molimo ya Nkolo azali likolo na ngai, mpo aponi ngai nasakola nsango malamu na babola; atindi ngai nayebisa bakangami ete bakokangolama, mpe na bato bakufa miso ete bakomona lisusu; mpo na kokangola bato oyo bazali konyokwama” (Luka 4:18; botala lisusu Yisaya 61:1).

Wana nde moko moko kati na biso.

Na Elambo ya Mpokwa ya Nsuka, Yesu Klisto asokolaki makolo ya bayekoli na Ye (botala Yoane 13:4–8). Kati na Mokili ya Kala mpe ya Sika, “mayi ya bomoi” mpe “lipa ya bomoi” Yemei asalaki elambo. Na bokuli ya bule ya elambo, tobengaka Tata mpe toyokanaka mpo na kozwa likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto, komikundola Ye ntango nyonso, mpe kobomba mibeko na Ye, ete tokoki ntango nyonso kozala na Molimo na Ye elongo na biso (botala Luka 22:19–20; 3 Nefi 18:7, 10–11).

Na Elanga ya Getesemane, Yesu anyokwamaki mingi koleka lolenge moto akoki konyokwama mpo na kosikola mpe komikaba mpo na biso. Makila ebimaki na mposo nyonso. Anyokwamaki bampasi nyonso oyo, ete tokoka konyokwama te soki tokoyambola (botala Malongi mpe Mayokani 18:11; 19:16).

Atekamaki mpe bafundaki ye na lokuta, Yesu Klisto asekamaki mpe abetamaki fimbu, mpe ekoti ya banzube etiamaki likolo ya moto na Ye (botala Matai 27:26, 29; Malako 15:15, 17, 20, 31; Luka 22:63; Yoane 19:1–2). “Bazokisaki ye bampota mpo na botomboki na biso … na nzela ya bampota na ye biso tobikisami” (Yisaya 53:5). Ye “abakamaki na ekulusu” mpo na kobenda biso epayi na Ye (botala 3 Nefi 27:14–15). Atako bongo, kutu na ekulusu, Yesu Klisto alimbisaki (botala Luka 23:34). Asengaki Yoane abatela mama na Ye (botala Yoane 19:26–27). Amiyokaki ya kosundolama (botala Matai 27:46; Malako 15:34). Makomi wana esengeli ekokisama, Alobaki ete Ayokaki mposa ya mayi (botala Yoane 19:28). Ntango makambo nyonso ekokisamaki, Ye moko “azongisaki molimo” (Luka 23:46; botala lisusu Yoane 10:17–18).

Yesu Klisto ayebi lolenge nini kosalisa biso na maladi, bibosono, kozala bisomei, bomitangoli, mpe bampasi na biso (botala Alma 7:12). Mitungisi ya ndenge wana eyaka mingi mingi lokola mbuma ya maponi ya bato mosusu. Ayebi mpe lisusu lolenge nini kosepela elongo na biso kati na bisengo mpe botondi na biso, lolenge ya kolela na biso ntango esengo na biso etondi. Na boboto, Abengi biso na nkombo na Ye, na mongongo na Ye, kati na etonga na Ye. Abengaka moto nyonso esika nyonso. Azali kobenga biso banso tomona mpe tososola bomoi ya nkufa na nzela ya bomoni ya seko. Ntango tozali kotambola na bosembo mpe kobatela mayokani na biso, Alaki ete makambo nyonso kotambola elongo mpo na bolamu na biso (botala Malongi mpe Mayokani 90:24; Baloma 8:28).

Na ntango mpe lolenge na Ye, bozongisi eyaka—kaka te na lolenge makambo ezalaki kasi lisusu na nini yango ekoki kokoma. Solo, Yesu Klisto akoki kosikola biso uta na boombo mpe lisumu, uta liwa mpe lifelo, mpe akoki kosunga biso tokokisa bomoto na biso ya bonzambe ntango tozali kokoma malamu koleka oyo tokanisaki, na nzela ya bondimi mpe boyamboli.

Elaka ya Bosikoli

Mpo na Yesu Klisto, liwa ezali nsuka te. Na Pasika tosakolaka:

Liwa elongami; moto azali na bonsomi.

Klisto azwi elonga.

Na motindo mpe nguya uta na Tata na Ye, Yesu akokaki kokaba bomoi na Ye mpe kozwa yango lisusu (botala Yoane 10:17). Ntango nzoto na Ye ezalaki na lilita, Yesu Klisto asalaki mpe abongisaki na mokili ya molimo, kosakolaka “bosikoli na bango uta na singa ya liwa” (Malongi mpe Mayokani 138:16).

Na ntongo ya mokolo ya misato, Asekwaki uta na lilita. Alobaki na Maria. Abimelaki bayekoli babale na nzela ya Emmaus, Bantoma, mpe bato mosusu. (Botala Matai 28; Malako 16; Luka 24; Yoane 20.)

Kati na litatoli ya maloba, Abengisaki bayekoli na Ye babwaka minyama na bango na ngambo mosusu ya masuwa; ntango oyo, etondaki lisusu mbisi, minyama ebukanaki te (botala Yoane 21:6–11; Luka 5:3–7). Aleisaki bayekoli mpe abondelaki Petelo mbala misato mpo na aleisa bampate mpe bana-mpate na Ye (botala Yoane 21:12–17). Amataki na lola, kosakolaka ete bayekoli na Ye nsima mpe biso banso sikawa tosengeli kokabola nsango ya nkembo ya Pasika mpe nsango malamu na Ye elongo na ekolo nyonso, mabota, mpe bato nyonso (botala Matai 28:19–20; Malako 16:15).

Yesu Klisto azali Mobateli Mpate Malamu na biso mpe Mwana-mpate ya Nzambe. Apesaki bomoi na Ye mpo na, mpe apesi bomoi na Ye na, bampate na Ye. Kati na elanga mpe na ekulusu, amemaki oyo ekokaki komemama te mpe amikabaki mpo na biso. Na ntango mpe seko, Alakisaka biso na nzela ya ndakisa lolenge nini “liwa efongolaka nzela na bomoi ya seko.”

Na nzela ya nguya ya Bomikabi ya Klisto mpe Lisekwa, banzoto mpe milimo na biso ekosangisama na lisekwa ya nzoto. Tozala na nkembo, tozongisami na elongi mpe nzoto, mosapi na mosapi. Ata suki ya mito na biso ekozongisama. Tokobikisama na maladi ya ntango, bokono, likama ya nzoto, mpe bozangi makoki ya mayele. Bomikabi ya Klisto ekoki kopambola biso tolonga lolenge nyonso ya bokabwani ya molimo mpe liwa ya molimo. Na ezalela ya boyamboli, tobikisami na lisumu nyonso mpe mawa mpe tofungwami na litondi ya bolingo mpe esengo ya seko. Na bosantu, peto, na bonsomi, tokoki kozonga kati na mayokani na biso ya bolingo ya libota na liboso ya nkembo mpe ya likolo ya Nzambe Tata mpe Yesu Klisto.

Tokomona lisusu balingami na biso. Ntango tosangani lisusu elongo na baye tolingaka, tokomonana moko na mosusu elongo na bomoni ya seko—na bolingo monene, bososoli, mpe bosembo. Bomikabi ya Yesu Klisto ekoki kosunga biso tomikundola nini ezali motuya mpe kobosana nini ezali te. Komonaka Mobikisi mpe mayokani na biso na bondimi monene mpe botondi ememaka kimia, kotombola bozito, koyokanisa lisusu mitema, mpe kosangisa mabota na ntango mpe na seko.

etape ya nzete na bafololo ya sika

Elikya ya Bozwi mpe Esengo

Pasika kati na Yesu Klisto esangisaka maninisa ya lola ya kofungwama, mbuma ya vinyo oyo ezali kokoma ebele, mpe mabele kokomaka na bisengo. Pasika kati na Yesu Klisto esangisaka kobondisa mpe kobatela basi bakufela mibali mpe bitike, bato ya nzala mpe baye bazanga lisalisi, baoyo bazali na bobangi, banyokolami, to bakangami na bosembo nyonso na nzela ya mabe. Na bokengi ya moko moko, Yesu Klisto azali kobengisa biso tomona mpe tosalela na bolingo mpe motema mawa, lokola Ye asalaka.

Na makambo nyonso ya malamu, Yesu Klisto azongisaka mingi (botala Yoane 10:10; Alma 40:20–24). Alaki ete “mabele ezali ya kotonda, mpe biloko ezali ya kokoka mpe mingi ya kotikala” (Malongi mpe Mayokani 104:17). Bozongisi na Ye ya makambo nyonso esangisi litondi ya nsango malamu na Ye, likoki mpe nguya ya bonganganzambe na Ye, mpe makuli ya bule mpe mayokani oyo ezwami kati na Eklezia na Ye, ebengami na nkombo na Ye, ata Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Pasika kati na Yesu Klisto esangisaka bandako esantu ya Nkolo ekoma pembeni ya bana ya Nzambe na bisika ebele, komemaka kati na mitema na biso malongi ya “babikisi na Ngomba Siona” (botala Obadia 1:21). Nkolo apesaka ndenge ya bosantu mpe ya koluka matomba na bisomei mpo na biso topesa na mokili oyo balingami bakufa bazali na yango mposa mpe basengeli na boseko oyo bakoki kozwa mpo na bango moko te.

Yango wana elikya, elaka, mpe litatoli na ngai. Natatoli Nzambe Tata na biso; Mobikisi mpe Mosikoli, Yesu Klisto; mpe Molimo Mosantu. Na Pasika mpe mokolo nyonso, ekoki biso kozwa elikya mpe elaka ya seko kati na mwango ya esengo ya bonzambe ya Nzambe, elongo na nzela ya boyokani na yango ya mbongwana uta bomoi ya nkufa na bozangi nkufa mpe bomoi ya seko. Mokolo moko na moko ekoki kondimisama ya Bomikabi ya Yesu Klisto kotombola bozito na biso, kosalisa biso tobondisa basusu kati na mawa na bango, mpe kobikisa milimo na biso mpo na kozwa esengo na Ye mobimba.

Na nzela ya elikya mpe elaka ya Pasika, Yesu Klisto atondisaka bamposa ya mitema na biso mpe ayanolaka mituna ya makanisi na biso.

Matangi

  1. Yoane 4:10, 14; 6:35; 7:37; botala lisusu Yisaya 49:10.

  2. Botala Matai 26:26–29; Malako 14:22–25; Luka 22:17–20; 3 Nefi 18:1–11.

  3. He Is Risen!,” Hymns, no. 199.

  4. Upon the Cross of Calvary,” Hymns, no. 184.

  5. Botala Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2011), 473, Biblioteke ya Nsango Malamu.