2025
Tata na Lola Alingi Koloba na Bino
Sanza ya misato 2025


“Tata na Lola Alingi Koloba na Bino,” Liahona, Sanza ya misato 2025.

Etinda ya Sanza ya Liahona, Sanza ya misato 2025

Tata na Lola Alingi Koloba na Bino

Tika ete bondimi na bino na Tata na Lola mpe Mwana na Ye ya Bolingo esalisa bino bozwa nzela monene na bokambi ya molimo mpe bososola mongongo ya Tata.

elenge mwasi azali kosambela

Tozali bana mibali mpe bana basi ya Nzambe, tozali kokabola mabele elongo mosika na ndako na biso ya lola. Oyo ezali bokufi na biso, ntango ya koyamba nzoto na biso, kopona malamu na esika ya mabe, “komeka bololo, ete [biso] tokoka koyeba kopesa motuya na malamu” (Mose 6:55), kokolisa bondimi na biso kati na Mobikisi na biso Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye ya bule, mpe koyamba mwango ya esengo ya Tata na biso. Tozali awa mpo ete tokoma mingi lokola Tata na biso na Lola.

Kozanga bokundoli ya bomoi na biso yambo ya mbotama, biso, na bantango mosusu, toyokaka ete tozali biso moko mpo na mokili oyo totikaki nsima. Tata na biso apesi biso likabo ya molimo mpo na kotikala na boyokani na Ye mpe kozwa litambwisi, bokambi, mpe libondisi uta na Ye. Toyebi likabo oyo malamu mpenza; ebengamaka losambo.

Bobondela Tata na Bino na Lola.

Epayi ya Adama na Eva mpe bato nyonso oyo bakokaki kolanda bango, anzelu moko apesaki malako ete, “Okobongola motema mpe okobelela Nzambe na nkombo ya Mwana libela na libela” (Mose 5:8).

Yesu ateyaki ete: “Senga, mpe ekopesamela yo; luka, mpe okomona; beta ekuke, mpe ekofungwamela yo” (Matai 7:7). s“Ntango ozali kosambela, … bondela Tata na yo … na nkuku” (Matai 6:6). Nsima ya lolenge boye sambela: Tata na biso oyo azali na likolo, nkombo na yo ekumisama”(Matai 6:9).

Yesu azalaki kobondela Tata na Ye ntango nyonso. “Akendaki na ngomba mpo na kobondela, mpe akobaki butu mobimba na libondeli epayi ya Nzambe” (Luka 6:12). “Mpe … alongwaki na ngomba mpo na kosambela” (Malako 6:46). Mpe bakomaki na esika moko oyo ezalaki na nkombo ya Getesemane: mpe Alobaki na bayekoli na ye ete: Botikala awa, ntango nakobondela” (Malako 14:32). Ntango azalaki na ekulusu, Yesu abondelaki mpo na basoda oyo babakaki ye na ekulusu: “Tata, limbisa bango; mpo bayebi te oyo bazali kosala” (Luka 23:34).

Makomi epesi biso toli ete “tobondelaka ntango nyonso” (Luka 21:36; 2 Nefi 32:9; Malongi mpe Mayokani 10:5; 19:38; 20:33; 31:12). “Solola na Nkolo na nyonso okosala, mpe akokamba yo mpo na bolamu” (Alma 37:37). Na kobakisa, “tozongisi matondi mpe masanzoli nyonso oyo molimo na biso mobimba ezali na nguya ya kozwa” (Mosiya 2:20), koyeba nyonso oyo Tata na biso asalaka mpo na biso.

Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki ete: “Komipesa limemya na molimo ebandi na bososoli ete ntongo nyonso ya sika ezali likabo uta na Nzambe. … Abatelaka biso mokolo na mokolo mpe asungaka biso uta na ngonga moko na mosusu. (tala Mosiya 2:21).”

Nefi alobaki, “Soki okoyokela na Molimo oyo ezoteya moto kosambela, okoyeba ete esengeli osambela; mpo molimo mabe akoteya moto te kosambela, kasi akoteya ye ete asengeli kosambela te ” (2 Nefi 32:8).

botali ya lolenge  ya Mobikisi

Eloko mokomoko euti na Klisto Kosekwisaka Mwana Mwasi ya Jairus, na Greg K. Olsen.

Na ndakisa ya Mobikisi na biso mpe toli ya banzelu mpe baprofeta na nzela ya bikeke, toyebi polele kosambela mokolo na mokolo mpo na kolakisa botondi mpo na mapamboli na biso, mpe kobatela losambo moko na motema na biso ntango nyonso. Tozali na mokumba ya kosolola na Tata na biso.

Kasi kutu nkembo koleka, Tata na biso na Lola ayanolaka na mabondeli na biso. Motuna moko ya kokanisa na mokili oyo ya kufa ezali, lolenge nini tokoki kozwa mpe kososola malamu biyano, bokambi, mpe libondisi oyo euti na Tata na biso?

Na boumeli ya mibu koleka ntuku nsambo ya bomoi na ngai, nayebi ete Tata na biso alobaka na biso. Tozali biso moko te. Bikelamu ya Lola batalaka biso mpe basalisaka biso ntango tozali koluka kolanda Mobikisi.

Kozwa biyano na mabondeli na biso ebandi na bondimi na biso na Tata na biso ya Lola mpe na Mwana na Ye, Yesu Klisto. Yesu alobaki, “Kobanga te, ndima kaka” (Malako 5:36). Totyelaka Ye motema, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kobatela mitindo, mpe tolukaka loboko na Ye na makambo nyonso. “Mpe ezali na eloko moko te etukaka Nzambe … koleka baoyo balobelaka nguya na ye na makambo nionso te mpe batosaka mitindo na ye te” (Malongi mpe Mayokani 59:21).

Loboko ya Nzambe na bomoi na biso elakisi te ete Ye nde azali kobimisa mawa ya mabe to ya nsomo oyo ezali na mokili na biso. Nzokande, elakisi ete na ntango na bino ya mpasi mpe ya kozanga bosembo, Nzambe akotelema pembeni na bino, akolendisa makoki na bino, akobondisa bino, mpe “akobulisa bampasi na bino mpo na litomba na bino” (2 Nefi 2:2

Boyoka Mongongo na Ye

Lokola tozali na bondimi na Ye mpe tobatelaka mitindo na Ye, toyekolaka na lolenge ya bomoto koyoka mongongo na Ye malamu koleka.

Na sanza ya libwa 1993, mobu na ngai ya yambo lokola Mokambi Monene ya Eklezia, Mokambi James E. Faust (1920–2007), na ntango wana mosangani ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, abengisaki mwasi na ngai, Kathy, mpe ngai mpo na kokende na losambo ya Iniversite ya Brigham Young elongo na ye. Kobosana te ete, 1993 ezalaki liboso ete ba smartphones, ba reseaux sociaux, mpe internet ezala mingi.

Na lisolo na ye, oyo ezalaki na moto ya likambo “Mongongo ya Molimo,” Mokambi Faust akebisaki: “Na nkola na bino bokozala na ebele ya mingongo oyo ezali koyebisa bino lolenge nini bokoki kozala na bomoi, lolenge nini kokokisa bamposa na bino, lolenge nini kozala na yango nyonso. Bokozala na ba chaînes ya etando ike kino nkama mitano na nsonge ya misapi na bino. Ekozala na balogiciele ya ndenge na ndenge, bamodeme ya ordinateur interactif, babases de donne, mpe ba panneaux d’annonces; ekozala na ba editio ya bureau, ezuaka na satelite, mpe barezo ya comunikasio oyo eko ekotondisa bino na ba nsango. … Mongongo oyo bosengeli koyekola koyoka ezali mongongo ya Molimo.”

Mokambi Boyd K. Packer (1924–2015), Mokambi ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, ateyaki na ntina ya mongongo ya kimia, moke ya Molimo na kozongelaka likambo moko ya John Burroughs, moto ya mayele na makambo ya bozalisi, ntango azalaki kotambola elongo na baninga na kati na parke moko oyo etondi na bato. Tala maloba ya Mokambi Packer:

“Likolo ya makelele ya bomoi ya engumba [Mr. Burroughs] ayokaki nzembo ya ndeke.

“Atelemaki mpe ayokaki! Bato oyo bazalaki elongo na ye bayokaki yango te. Atalaki zingazinga. Moto mosusu te amonaki yango.

“Etungisaki ye ete moto nyonso azanga eloko moko ya kitoko boye.

“Alongolaki mbongo ya ebende na poche na ye mpe abalusaki yango na mopepe. Ebetaki pavema na lopete, makasi koleka nzembo ya ndeke yango te. Bato nyonso babalukaki; bakokaki koyoka yango!

“Ezali mpasi kokabola nzembo ya ndeke na makelele nyonso ya mituka ya engumba. Kasi okoki koyoka yango. Okoki koyoka yango polele soki omimeseni mpo na koyoka yango.”

Mateya ya Molimo Mosantu ya Mokambi Packer esalemaki na 1979, ntango oyo bomoi ezalaki kimia mingi mpe makelele ya mokili ekitisamaki mingi koleka ndenge ezali sikawa.

Mokambi Nelson ateyaki, “Soki bozali kotya likebi mingi na bilei uta na ba reseaux sociaux koleka bozali na bosukisi ya Molimo, boye bozali komitia na likama ya molimo.”

Mokambi Faust alobaki, “Soki tosengeli koyoka mongongo ya Molimo, biso mpe tosengeli kofungola matoyi na biso, kobalusa liso ya bondimi epayi ya liziba ya mongongo, mpe kotala na bokasi epayi ya lola.”

Mongongo oyo ya Molimo eyaka na mayele na biso mpe na mayoki na biso. “Nakoyebisa yo na mayele na yo mpe na motema na yo, na nzela ya Molimo Mosantu, oyo ekoya likolo na yo mpe oyo mokofanda na motema na yo” (Malongi mpe Mayokani 8:2). Yoka lisosoli na yo—mbala mingi emoniseli ebandaka kuna.

Mpaka Andersen azali koloba na etuluku moko

Na ntango ya botali na Girls’ Home Boys’ Town Complex na Markina City, Philippines, na sanza ya mibale 2024, Mpaka Andersen ateyaki bilenge ete bazali bana ya Nzambe: “Alingi bino. Mpe bokoki kobenga Ye. Akoyoka mabondeli na bino.”

Bobondela na Motema ya Bondimi

Biyano mpe makanisi ekoki kozala na makasi te. Tosambela pe tozelaka na motema ya kondima. Biyano mosusu ekoya na bomoi oyo te, kasi epayi ya bayengebene, Nkolo akotinda ntango nyonso kimia na Ye (tala Yoane 14:27). Mbala mingi biyano eyaka ntango tozali kobondela mpo na kosalisa bato oyo bazali nzinganzinga na biso. Na bantango mosusu, bayaka “monkoloto likolo ya monkoloto, mosise likolo ya mosise” (Malongi mpe Mayokani 98:12).

Mongongo ya lola ekoki koya epayi na biso na bantango oyo tokanisaki te mpe na bisika oyo tokanisaki te, kasi tozwaka mabaku na biso ya koyebana mingi na bisika ya kimia mpe bisika ya bule. Na kimia ya mabondeli na ngai ya ntongo ya yambo mpe komanyola, nazwaka mapamboli ya momesano te. Botangi ya makomi ya mokolo na mokolo, ya moto ye moko, ya kozanga kokata, atako ya momesano na bantango mosusu, ememaka mongongo ya Molimo na mitema na biso lokola moto na bantango mosusu.

Na bantango mosusu, makanisi mazali mpenzampenza uta na maye tozali kotanga, mpe na bantango mosusu, maye tozali komanyola ememaka eyano na motungisi moko ekeseni mpenza. Bomikundola maloba ya Mpaka Robert D. Hales: “Ntango tolingi koloba na Nzambe, tosambela. Mpe ntango tolingi Ye aloba na biso, tolukaka makomi.”

Lokola makelele mpe bopengwisi ya mokili ezali kobalukabalukaka nzinganzinga na biso, Nkolo akambaki profeta na Ye mpo na kotonga batempelo mingi mpe mingi. Na bandako oyo ya bule ya Nkolo, lokola totikaka mikakatano na biso libanda kasi tokoti na mabondeli mpe mitungisi na biso, toteyamaka bosolo ya seko.

Mobu moko eleki, Mokambi Nelson apesaki biso elaka oyo ya kokamwa: “Bandeko mibali mpe basi na ngai ya bolingo, awa ezali elaka na ngai. Eloko moko te ekosalisa bino mingi kosimba makasi na lingenda ya libende koleka bokumbameli kati na tempelo mbala na mbala ntango makambo na bino epesi ndingisa. Eloko moko te ekobatela bino koleka ntango bokokutana na mimekano ya mokili. Eloko moko te ekolendisa litatoli na bino ya Nkolo Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye to ekosalisa bino bososola mwango monene ya Nzambe koleka. Eloko moko te ekobondisa mingi molimo na bino na ntango ya mpasi. Eloko moko te ekofungola balola koleka. Eloko moko te!”

Likita linene moko na moko ememaka mapamboli ebele ya kobakisa. Na sanza ya minei oyo ezali koya, mbala moko lisusu, tokokutana na likita linene mpo na koyoka mongongo ya Nkolo. Toyaka na likita linene nsima ya kosambela mpe komilengela. Mpo na mokomoko na biso, ezali na mitungisi ya mpasi mpe mituna ya molende. Toyaka kozongisa sika bondimi na biso na Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpe kolendisa makoki na biso ya kotelemela komekama. Toyaka koteyama uta na likolo. Nalaki bino ete ntango bozali komilengela mpe koya na losambo na biteni ya likita linene, bokoyoka biyano na mitungisi na bino, mpe bokoyeba ete “loboko ya lola” ezali likolo na bino.

Bozala na bondimi ete Tata na bino ya Lola azali koloba na bino. Azali! Botika bondimi na bino na Ye mpe Mwana na Ye ya Bolingo esalisa bino bokabola elamba mpe bozwa mongongo ya Tata na bino. Natatoli Ye azali wana mpe alingaka bino koleka maloba ekoki koloba.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Joy Cometh in the Morning,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1986, 68.

  2. James E. Faust, “The Voice of the Spirit” (Brigham Young University devotional, Sanza ya Libwa. 5, 1993), 2, 3, speeches.byu.edu.

  3. Boyd K. Packer, “Prayers and Answers,” Ensign, sanza ya zomi na Moko 1979, 19.

  4. Russell M. Nelson, “Elikya ya Yisalaeleworldwide youth devotional, Sanza ya Motoba 3, 2018), Gospel Library.

  5. James E. Faust, “The Voice of the Spirit,” 4.

  6. Robert D. Hales, “, Makomi ya Bule: Nguya ya Nzambe Kati na Lobiko nya Biso,” Liahona, Sanza ya zomi na Moko. 2006, 26–27.

  7. Russell M. Nelson, “Bosepela na Likabo ya Bafungola ya Bonganganzambe,” Liahona, Sanza ya mitano 2024, 122.

  8. Tala Neil L. Andersen, “The Voice of the Lord,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 126.