“Nakobikisa Bango,” Liahona, Sanza ya mibale 2025.
Etinda ya Sanza mpo na Liahona Sanza ya mibale 2025
“Ngai Nako Bikisa Bango”
Mosala ya kobikisa ya Mobikisi ezali ebandeli ya bonzambe mpe elaka ya nzoto oyo ekoumela mpe kobikisama ya mayoki oyo ekoya epai ya moko na moko na biso na Lisekwa.
Nazali komikundola malamu mwa mibembo ya mpepo milai oyo nasalaki na boumeli ya bomoi na ngai ya mosala lokola kapiteni ya kompanyi ya mpepo.
Na moko na yango, Nazalaki kolongwa na Alemani na 11:00 mpe kokita na Californi na 13:00 kaka mukolo yango. Soki tokokanisi ngonga ya kolongwa mpe ya kokoma na mboka, ekoki komonana ete mpepo kokatisa Mbu Atlantike mpe kontina ya Amerika ya Nordi ezwaki kaka ngonga mibale. Bouingi 747 ezalaki mbangu, kasi mbangu mpenza te! Mpo na koloba solo, ezwaki biso ngonga soki 11, na kotalela mopepe, mpo na kosala bakilometre 5600 (9000 KM).
Lokola tozalaki kopumbwa na westi, moi elalaki te ntango tozalaki kopumbwa. Tosepelaki na moi makasi banda na Alemani tii na Californi.
Nzokande, kozonga na Alemani, ezalaki lisolo mosusu mpenza. Ata ntango tolongwaki na ebandeli ya nsima ya nzanga, ntango tozalaki kopumbwa na esti, kolala ya moi ezalaki nokinoki koleka ndenge ezalaki kosalema, mpe liboso toyeba yango, butu ezalaki likolo na biso.
Na boumeli ya mibembo milai wana, mbala mingi molimo na ngai etondaki na bobangi ntango nazalaki komanyola kitoko ya mabele oyo mpe molongo ya bozalisi ya Nzambe. Ata ntango nazalaki kopumbwa na butu, kati na molili makasi, nayebaki na ntembe te ete moyi ekobima lisusu, ete pole ya kongenga ekozonga mpe ekomema molunge mpe bomoi na mokolo ya sika yambo ya nsuka ya mobembo na biso. Makambo ya kopumbwa na ngai ekokaki kosala lokola moyi ezalaki kolala malembe mingi to noki mingi, kasi nayebaki ete moyi etikalaki ntango nyonso, ekangamaki, mpe ya kotyela motema na lola.
Nayokaka lolenge moko mpo na Nzambe. Lokola nazali na bondimi ya mozindo ya mayele mpe mokano ya Nzambe mpo na ekelamu na Ye nyonso, nakoki koyoka elikya ya esengo mpe kimia ya koumela ntango nakanisi na ntina ya bozali na biso ya kufa. Tozali bana ya Nzambe. Alingaka biso. Ayebi makambo na biso. Azali pene ya kosalisa. Bosolo oyo ebongwanaka te, ata soki biloko mosusu zingazinga na biso emonani lokola ete ezali kotepatepa mpe ekoki kokanisama te.
Biso nyonso tokutani na bantango ya molilil, mawa, mpe ntembe oyo ezali konyokola kimia na biso. Boniboni nazali na botondi mpo mpo na liziba ya bondimi mpe ya solo ya bosolo mpe pole (tala Malongi mpe Mayokani 88:6–11). Yesu Klisto Azali Pole mpe Bomoi ya Mokili. Likolo na Ye mpe komikabi mbeka na Ye, tozali na elikya mpo na mikolo ezali koya, kokota na pole ya bonzambe mpo na kongengisa mikolo ya molili ya mobembo na biso, mpe elaka ya elonga ya nsuka likolo ya lisumu mpe liwa.
“Alingi Mokili”
Yesu Klisto azalaki moto se moko abongi nie oyo atambolaki na mokili. Likolo ya bomoi na Ye ebonga nie, Azalaki na nyongo te na bosembo. Libanda ya bolingo mpo na biso, Apesaki bomoi na Ye mpo na moko na moko na biso mpe mpo na bana banso ya Nzambe na lisanga mpo na kofungola ekuke ya bozangi kokufa mpe bomoi ya seko.
Ata maye Satana alingi biso tondima, moko te kati na biso azali koleka makoki ya Mobikisi mpo na kobikisa biso. Moko te na biso alongwa na ngolu ya bolimbisi. Moko te kati na biso azali koleka makoki ya kozala “kozingama mpo na seko na maboko ya bolingo na ye”(2 Nefi 1:15).
Likabo eleki monene na nyonso ewuti na nguya ya kopesa makoki mpe ya kosikola ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Likolo ya mpasi ya Mobikisi na Getsemane mpe na Gologota, Ayebi lolenge nini kobikisa biso mpe kosalisa biso na nzela nyonso mpe bolembu na biso nyonso (tala Alma 7:12).
“Akosala eloko te longola se soki ezali mpo ya litomba ya mokili; mpo alingi mokili, kutu ete akopesa bomoi bwa yemei ete akoka kobenda bato banso epai ya ye.”(2 Nefi 26:24
Yesu Klisto azali makasi na biso.
Asembolaka loboko.
Azongisaka.
Abikisaka.
“Ntango Mobikisi [apesaki mbeka na Ye ya bomikabi] mpo na bato nyonso, Afungolaki nzela ete baoyo bakolanda Ye bakoka kozala na ndingisa ya kozwa libiki na Ye, bokasi, mpe nguya ya bosikoli,” elobaki Mokambi Russell M. Nelson.
Nguya wana, lokola moyi, ezali ntango nyonso wana. Eninganaka te. Liponi ya kolanda matambe ya Mobikisi ezali lokola kotambola libanda ya bilili mpe na kati ya pole ya moyi, epai wapi tokoki kozwa mapamboli ya pole ya Nzambe, molunge, mpe bolingo. Nayebi ete mokolo moko, tokotala sima mpe kotonda na botondi ete tozwaki mokano ya ntina ya seko ya kotia motema na Yesu Klisto mpe bolingo na Ye ya bonzambe mpo na kotombola mpe kolendisa biso.
“Zonga epai na Ngai”
Buku ya Mormon elobeli bato oyo basalaki mikolo misato na kati ya mozindo ya molili mpeza kolandisama bobakami na ekulusu ya Mobikisi. Molili ya nzoto zingazinga na bango ekoki kolakisa molili ya molimo biso nyonso tolekaki likolo ya lisumu. Na nsima bato bayokaki mongongo ya Klisto kobenga bango babima na molili mpe bakota na pole na Ye:
“Ekozonga bino te sikawa epai na ngai, mpe koyambola masumu na bino, mpe kobongwana, ete nakoka kobikisa bino?” (3 Nefi 9:33).
“Okopesa lokola libonza epai na ngai motema moko ebukana mpe molimo ya mawa,” (3 Nefi 9:20).
“Yambola mpe zonga epai na ngai na mokano ya motema mobimba” (3 Nefi 10:6).
Mobikisi atandi kaka mabiangi wana epayi na biso lelo ntango tomoni mabunga na bisomei kati na molili. Kaka lolenge kobima ya moyi nyonso elakisaka abandeli ya mokolo ya sika, ntango nyonso toyambolaka, tozwaka ebandeli ya sika, ebandeli ya sika ya kongenga.
Wana elimboli te ete ezali pete. Boyamboli elakisi mbongwana, mpe mbongwana esalesmaka na lombangu te. Atako ezali na esengo, boyamboli esangisi “mawa ya bonzambe” (2 Bakolinti 7:10). Esengi ete tondima mpe totubela mabe na biso, kosenga bolimbisi epai na Nzambe mpe na bato oyo tosalaki mabe. Koleka nyonso, esengi ete toluka “Molimo ya Nkolo ya Nguya Nyonso,” ete tokoka kokutana na “mbongwana ya makasi kati na … mitema na biso, ete tozali lisusu na bobendami mpo na kosala mabe te, kasi mpo na kosala bolamu ntango nyonso”(Mosiya 5:2).
Lolenge wana ya mbongwana ezali mobembo molai, kasi ntango kaka osali litambe ya yambo, “mokolo ya lobiko na bino” ebandi, mpe “sasaipi mwango monene ya bosikoli ekosalema mpo na bino” (Alma 34:31).
Na nzela ya boyamboli na biso ya motema, Nzambe alaki kolimbisa mpe komikundola masumu na biso lisusu te. Ntango tozali na mpasi ya kobosana masumu na biso, tika ete totya elikya kati na elaka ya Nkolo ya kolimbisa mpe koyekola kolimbisa basusu mpe bisomei.
“Milimo na biso ebebaka ntango tosalaka mabunga mpe masumu,” Mokambi Boyd K. Packer (1924-2015) ateyaki. “Kasi na bokeseni na likambo ya nzoto na biso ya kufa, ntango mosala ya boyamboli esili, bilembo ya mpota moko te etikali mpo na Bomikabi ya Yesu Klisto.”
Kobikisa Mokufi Miso, na Carl Heinrich Bloch
“Bomema Bango Awa”
Mobikisi azali Nkolo Mobikisi Moko ya bilakiseli ya kitoko mpenza ya nguya ya kobikisa na Ye ezwami na Buku ya Mormon, kati na lisolo ya mosala na Ye moko na Amerika ya kala:
“Bozali na ba oyo bazali kobela kati na bino?” Atunaki. “Bomema Bango Awa. Ezali bino na batengoli, to bato ba lolanda, bato ba tengutengu, to bakatami binema, to bato ba mbala, to balemene, to bakufa matoyi, to baye batungisami na ndenge inso? Bomema bango awa, mpe Nakobikisa bango, mpo nazali na mawa likolo na bino; misopo na ngai etondi na motema mawa. …
“Mpe esalemaki ete ntango alobaki boye, ebele ya bato nyonso, na lisanga moko, bakendaki elongo na bakoni na bango mpe batungisami na bango, batengoli na bango, mpe elongo na bakufa miso na bango, mpe elongo na bababa na bango, mpe elongo na bango nyonso oyo batungisamaki na moko lolenge, mpe abikisaki bango moko na moko lokola bamemamaki epayi na ye.” (3 Nefi 17:7, 9).
Ntango nyonso Mobikisi abikisi moto nyonso “banyokwami na lolenge nyonso,” na liboso mpe nsima ya lisekwa na Ye, ezalaki litatoli ya nguya na Ye ya nsuka mpo na kobikisa milimo na biso. Kobikisama moko na moko ya likamwisi ezalaki bobele ebandeli mpe elaka ya kobikisama ya koumela ya nzoto mpe ya mayoki oyo ekoya epai na moko na moko na biso na Lisekwa, oyo “ezali mosala ya kobikisa ya Nkolo oyo eleki nyonso.”
Ezali ya solo ete mabondeli na biso ya kobikasa na bomoi oyo ezwaka te ntango nyonso eyano lolenge tolikyaki, kasi ebosanaamaka te. Ntango ya kobikisa ekoya, kaka lokola molili ya butu epesaka nzela ntango nyonso—na ngonga malamu—kino na kobima ya moyi na nkembo.
Lokola Mokambi Nelson atatolaki: “Kondima na biso ezali ata mokolo moko te kozanga kosepela na yango. Nayabi ete makanisi ya Tata na Lola ya mayele nyonso ezali monene mingi koleka oyo ya biso. Ntango toyebi mikakatano mpe mpasi na biso ya kufa, Ye ayebi bokoli mpe makoki na biso ya kokufa te. Soki tosambeli mpo na koyeba mokano na Ye mpe tomipesi bisomei na yango na bompikiliki mpe mpiko, kobikisama ya lola ekoki kozwa esika na lolenge mpe ngonga na Ye moko.
Kala te mwasi na ngai, Harriet, mpe Ngai tokotisaki na mabondeli na biso elikya moko ya sikisiki mpe kobondela na nkombo ya bato mosusu oyo tolingaka. Tosambelaki ete ekipi na bango ya kolongono ya nzoto epesama likoki ya sikisiki mpo na kobikisa makono na bango. Tosepelaki kobakisa ete ata soki kobikisama ya mbala moko to kobika ekoki kosalema te, nguya ya kobikisa ya Mobikisi ekoki komemela bango libondisi mpe kimia. Bokasi ya kobikisa ya nguya ya bosikoli ya Mobikisi ekoki kozala na bopusi monene kutu na bolamu na biso ya mayoki, ya molimo, mpe kutu ya bokolongono ya nzoto koleka nkisi nyonso ya mabele oyo tokoki kozwa. Yesu Klisto azali Mobikisi na bomoi oyo mpe kati na bomoi ya seko.
Bandeko na ngai mibali mpe basi, baninga ya motema, natatoli ete boboto ya Mobikisi na biso ezali ya kokoka mpo na kobikisa bampota na yo, kopetola yo na lisumu, kolendisa yo na mimekano ekoya, mpe kopambola yo na elikya, buanya, mpe kimya na Ye. Nguya na Ye ezali ntango nyonso awa—ntango nyonso mpe ekoki kotyelama motema—kutu ntango biso, mpo na mwa ntango, toyokaka mosika na bolingo, pole, mpe molunge na Ye.
Nasambeli tobungisa ata moke te liyoki na biso ya bobangi mpe botondi ya mozindo mpo na nyonso oyo Yesu Klisto asali mpo na biso. Nasengi bino boyeba ete bolingami na ndenge ya kokoka, mpe bomikundola oyo balakaki bino libela.
“Tika Nzambe apesa bino ete mikumba na bino ezala pete, na nzela ya esengo ya Mwana na ye,” Yesu Klisto (Alma 33:23).
© 2025 na Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Liahona Message, February 2025.. Lingala. 19609 639