2025
Mpo na nini Nkolo azali na Eklezia?
Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya zomi 2025


Etinda ya Sanza ya Nsango Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya zomi 2025

Mpo na nini Nkolo azali na Eklezia?

elenge mwasi

Ntina ya Eklezia ya Klisto ezali “ya kopesa bato mpe mabota ndingisa ya kosalisa Nzambe akokisa mosala na Ye ya lobiko mpe ya bonetoli.” Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka esungaka “kolongobanisa bana ya [Nzambe] na ndelo ya likolo koleka ya nkembo, oyo ezali bonetoli to bomoi ya seko.”

“Mobikisi … atindaki [Eklezia] mpo na kokokisa bantina na Ye—kosakolaka nsango malamu na Ye, kopesaka makuli mpe mayokani na Ye, mpe kokokisaka yango mpo na nguya na Ye mpo na kolongisa mpe kosantisa biso.”

Bandimi ya Eklezia bazali na nzela ya kozwa nguya mpe mapamboli ya Yesu Klisto na nzela ya likoki mpe bafungola ya bonganganzambe, mayokani mpe makuli, bokambi ya boprofeta, makomi, mpe lisanga ya Basantu.

Eklezia epesameli lisusu etinda ete: “Etelema mpe engenga, ete pole na yango ekoka kozala bendele mpo na bikolo.” (Malongi mpe Mayokani 115:5).

Bandimi ya Eklezia basalaka makasi mpo na “kongenga” na kobika nsango malamu, kobengisaka banso mpo na koyamba nsango malamu, kosangisa mabota mpo na libela, mpe kobatela babola mpe bato na bosenga. Oyo Ezali mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli.

Matangi

  1. Buku Monene: Kosalisa na kati ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bsantu ba Mikolo mya Nsuka, 1.3, Gospel Library.

  2. Dallin H. Oaks, “Bosolo mpe Moango,” Sanza ya zomi. 2018 likita linene (Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 26).

  3. Dale G. Renlund, Oct. 2024 likita linene (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2024, 16).