Etinda ya Sanza ya Nsango Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya zomi 2025
Mpo na nini Nkolo azali na Eklezia?
Ntina ya Eklezia ya Klisto ezali “ya kopesa bato mpe mabota ndingisa ya kosalisa Nzambe akokisa mosala na Ye ya lobiko mpe ya bonetoli.” Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka esungaka “kolongobanisa bana ya [Nzambe] na ndelo ya likolo koleka ya nkembo, oyo ezali bonetoli to bomoi ya seko.”
“Mobikisi … atindaki [Eklezia] mpo na kokokisa bantina na Ye—kosakolaka nsango malamu na Ye, kopesaka makuli mpe mayokani na Ye, mpe kokokisaka yango mpo na nguya na Ye mpo na kolongisa mpe kosantisa biso.”
Bandimi ya Eklezia bazali na nzela ya kozwa nguya mpe mapamboli ya Yesu Klisto na nzela ya likoki mpe bafungola ya bonganganzambe, mayokani mpe makuli, bokambi ya boprofeta, makomi, mpe lisanga ya Basantu.
Eklezia epesameli lisusu etinda ete: “Etelema mpe engenga, ete pole na yango ekoka kozala bendele mpo na bikolo.” (Malongi mpe Mayokani 115:5).
Bandimi ya Eklezia basalaka makasi mpo na “kongenga” na kobika nsango malamu, kobengisaka banso mpo na koyamba nsango malamu, kosangisa mabota mpo na libela, mpe kobatela babola mpe bato na bosenga. Oyo Ezali mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli.
© 2025 na Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na Etazini Bondimami na Lingala: 6/19 Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Etinda ya Sanza ya Nsango ya Bokasi Mpo na Bilenge, Sanza ya zomi 2025. Lingala. 19624 639