Etinda ya Sanza ya Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya Mibale 2025
Lisalisi ewuti na Liziba Ebonga nie
Ata soki ozali kobunda na bitumba nini, Yesu Klisto akosalisa yo ntango okobaluka epayi na Ye.
Ndakisa, na Jeanette Bourup
Na ngonga moko to mosusu banso tosengelaka banso na mwa lisalisi. Ntango mosusu ebele ya lisalisi. Bosolo ezali, mingi mingi bomoi etambolaka malamu mingi soki omeki kokende na yango yo moko te.
Yesu Klisto azali lizibaa ebonga nie ya lisalisi, elikya, mpe makasi. Akoki mpe kosalisa mbongwana na yo na malamu koleka—mbala mosusu ata na ndenge oyo okanisaki ete ekoki kosalema te.
Mbongwana ya Motema
Esi osambela ete Nzambe alembisa mitema ya banguna na yo? Soki bongo, ozali na kompani malamu (tala 3 Nefi 12:44; Moroni 7:48). Ata soki ozali na banguna te na ndimbola moko wana kati na Buku ya Mormon (oyebi, banguna oyo bazali na bibundeli mpe bamibongisi mpo na kobundisa), mbala mosusu obondelaki ete Nzambe alembisa motema ya moto moko oyo azalaki kosalela yo malamu te.
Kasi esi okanisa kobondela mpe kosenga Nzambe kolembisa ya yo motema? Mbala mosusu ozali koleka na ntango ya mpasi kolimbisa moto moko. To ozali kokoba kozwa nkanda na yo, atako olingi te. To olingi koyoka boboto mingi epai ya bandeko na yo atako basilikisaka yo ntango mosusu.
“[Yesu Klisto] akobongola motema na yo mpe bomoi na yo. Muke muke, okokola mpe okokoma mingi lokola Ye. Bokangami na bino ya boyokani na Ye ekomemela bino bokoti mingi koleka na nguya na Ye” .(Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi [2022], 8, nsete ebaksami).
Ezali boye elaka moko ya monene te? Ata soki ozali kobunda na nini, ata motema na yo moko, Yesu Klisto akoki kosalisa. Lolenge nini okoki kobaluka epayi na Ye lelo?
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya mibale 2025.. Lingala. 19621 639