“Boloko ya Liberty,” Moninga, Sanza ya mwambe 2025, 26–28.
Etinda ya sanza ya Moninga , Sanza ya mwambe 2025
Boloko ya Liberty
Bato ebele na Missouri balingaki Bansantu te. Mokambi ya engumba atindaki basoda babengana bango.
Basoda bakangaki Joseph Smith mpe bakambi misusu ya Eklezia. Butu moko, babateli bazalaki koseka na ntina ya makambo mabe bango basalaki epai ya Bansantu.
Joseph atelemaki mpe agangaki ete, “Kimya!” Alobaki na nguya ya Nzambe. Babateli basengaki bolimbisi mpe batikaki koloba.
Nsima, Joseph Smith mpe baninga na ye batiamaki na boloko na engumba moko ebengamaki Liberty. Boloko ezalaki malili, moke, mpe molili. Bazalaki bobele na matiti ya bosoto mpo na kolala. Bilei bapesaki bango epesaki bango bokono.
Joseph amitungisaki mpo na bansantu. Kasi akokaki kosala eloko te mpo na kosalisa bango.
Joseph asambelaki mingi. Ye atunaki soki Nzambe abosanaki ye mpe bandimi ya Eklezia.
Nzambe ayanolaki losambo ya Joseph. Ye alobaki, “Mwana na ngai, kimia ezala na kati ya molimo na yo.” Nzambe ayebisaki Joseph ete bitumba na ye ekoki kowumela libela na libela te mpe ete yango esengeli ezala mpo na bolamu na ye. Ye alakaki ete Akozala elongo na Joseph “libela na libela” (Doctrine and Covenants 121:7, 46).
Lokasa ya kopakola langi
Nakoki Kozala Pole epayi ya Basusu
Elilingi na Corey Egbert
Lolenge nini ozali ndakisa malamu epayi ya basusu?
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, August 2024.. Lingala. 19642 639