2025
Boloko ya Liberty
Sanza ya mitano 2025


“Boloko ya Liberty,” Moninga, Sanza ya mwambe 2025, 26–28.

Etinda ya sanza ya Moninga , Sanza ya mwambe 2025

Boloko ya Liberty

Kotumbaka bandako mpe bato ya nkanda na minduki

Bato ebele na Missouri balingaki Bansantu te. Mokambi ya engumba atindaki basoda babengana bango.

Mobali likolo ya mpunda kolakisaka mbeli epayi ya Joseph Smith

Basoda bakangaki Joseph Smith mpe bakambi misusu ya Eklezia. Butu moko, babateli bazalaki koseka na ntina ya makambo mabe bango basalaki epai ya Bansantu.

Joseph Smith na minyololo na maboko, ya kotelema mpe kosololaka na mibali.

Joseph atelemaki mpe agangaki ete, “Kimya!” Alobaki na nguya ya Nzambe. Babateli basengaki bolimbisi mpe batikaki koloba.

Joseph Smith mpe bato mosusu na Boloko ya Liberty bakomaki mawa mpe malili.

Nsima, Joseph Smith mpe baninga na ye batiamaki na boloko na engumba moko ebengamaki Liberty. Boloko ezalaki malili, moke, mpe molili. Bazalaki bobele na matiti ya bosoto mpo na kolala. Bilei bapesaki bango epesaki bango bokono.

Joseph Smith azali kolela mpe mobali moko azali kobondisa ye

Joseph amitungisaki mpo na bansantu. Kasi akokaki kosala eloko te mpo na kosalisa bango.

Joseph Smith afukami mpo na kosambela na boloko.

Joseph asambelaki mingi. Ye atunaki soki Nzambe abosanaki ye mpe bandimi ya Eklezia.

Joseph Smith afukami na boloko, atali likolo bongali ya moi kolekaka na lininisa moko ya moke.

Nzambe ayanolaki losambo ya Joseph. Ye alobaki, “Mwana na ngai, kimia ezala na kati ya molimo na yo.” Nzambe ayebisaki Joseph ete bitumba na ye ekoki kowumela libela na libela te mpe ete yango esengeli ezala mpo na bolamu na ye. Ye alakaki ete Akozala elongo na Joseph “libela na libela” (Doctrine and Covenants 121:7, 46).

Lokasa ya kopakola langi

Nakoki Kozala Pole epayi ya Basusu

Mosala ya kopakola langi na lokasa na muinda monene ya ebale, mabanga pembeni ya mai, mpe masuwa na mbu.

Elilingi na Corey Egbert

Lolenge nini ozali ndakisa malamu epayi ya basusu?