2025
“Boya Penepene epayi na Ngai.”
Sanza ya mitano 2025


Etinda ya Sanza ya Liahona, Sanza ya mitano 2025

“Boya Penepene epayi na Ngai.”

Yesu Klisto alingaka moko na moko na biso. Apesaka biso libaku ya kopusana pene na Ye.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi ya bolingo, ezali esengo mpo na ngai ya kozala elongo na bino na likita linene oyo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka. Oyo ezali Eklezia na Ye. Tosangani na bisika ya mayangani mpe na bandako na mokili mobimba na nkombo na Ye.

Tozwaka nkombo na Ye likolo na biso ntango tokotaka na bokonzi na Ye na nzela ya boyokani. Azali Mwana asekwa mpe akumisama ya Nzambe. Tozali bakufi, tokonzami na lisumu mpe liwa. Nzokande, kati na bolingo na Ye mpo na mokomoko na biso, Mobikisi abengisi biso toya penepene na Ye.

Mobikisi azali kobima na lilita.

Oyo ezali libengisi na Ye epayi na biso: “Belema mpembeni na ngai mpe nakobelema mpembeni na yo; luka ngai na etingia mpe okomona ngai; senga mpe okozwa; beta, mpe ekofungolama yo.”

Ezali na bantango oyo tomiyokaka pene na Mobikisi Yesu Klisto. Mpe atako bongo, ntango mosusu na boumeli ya mimekano na biso ya kufa, tomiyokaka mwa mosika na Ye mpe tozalaka na mposa ya kondimisama ete Ye ayebi oyo ezali na mitema na biso mpe alingaka biso lokola bato.

Libengisi ya Mobikisi ezali na lolenge ya koyoka kondimisama yango. Bopusana penepene na Ye na komikundolaka Ye ntango nyonso. Boluka Ye na molende nyonso na nzela ya boyekoli makomi. Bosenga na nzela ya libondeli ya motema epayi ya Tata na Lola mpo na komiyoka pene na Mwana na Ye ya Bolingo.

Ezali na lolenge ya pete ya kokanisa na ntina na yango. Ezali oyo bolingaki kosala soki bokabwanaki mpo na mwa ntango na baninga. Bolingaki kozwa likoki ya kosolola na bango, bolingaki kosepela na nsango nyonso oyo bozwaki uta na bango, mpe bolingaki kosala nyonso oyo bokokaki mpo na kosalisa bango.

Ntango nyonso oyo ezalaki kosalema, ezalaki koumela ntango molai, bokangami ya bolingo ezalaki kolendisama, mpe bolingaki koyoka binomei kopusana penepene ntango nyonso. Soki ntango ebele elekaki kozangaka bosololi ya malamu mpe libaku ya kosungana moko na mosusu, bokangami ekokita.

Yesu Klisto alingaka moko na moko na biso. Apesaka libaku yango ya kopusana penepene na Ye. Lokola na moninga moko ya bolingo, bokosala yango mpenza na lolenge moko, na kosololaka na nzela ya libondeli epayi ya Tata na Lola na nkombo ya Yesu Klisto, koyokaka botambwisi ya motuya uta na Molimo Mosantu, mpe nsima kosalela basusu mpo na Nkolo na esengo nyonso. Kala te bokoyoka lipamboli yango ya kopusana penepene na Ye.

Na bolenge na ngai, nayokaki esengo ya kobelema penepene ya Mobikisi—mpe ya boyei na Ye penepene na ngai—na nzela ya misala ya pete ya botosi na mitindo. Ntango nazalaki elenge, elambo ezalaki kopesama na liyangani ya mpokwa. Nakoki kino sikawa komikundola butu moko, mibu 75 eleki, ntango ezalaki molili mpe malili libanda. Namikundoli liyoki ya pole mpe ya bosepeli ntango nasosolaki ete nabatelaki motindo ya kosangana elongo na Basantu mpo na kolia elambo, koyokana elongo na Tata na biso na Lola mpo na komikundola ntango nyonso Mwana na Ye mpe kobatela mitindo na Ye.

Na nsuka ya liyangani na butu wana, toyembaki loyembo “Abide with Me; ’Tis Eventide,” na maloba ya kobosana te “O Mobikisi, tikala mpokwa oyo elongo na ngai.”

Maloba oyo ememaki mayoki oyo eleki makasi ya Molimo epayi na ngai, atako lokola elenge mobali. Nayokaki bolingo ya Nkolo mpe boyokani na Mobikisi mpokwa wana na nzela ya libondisi ya Molimo Mosantu.

Mibu nsima nalingaki kozongisa makasi liyoki se moko wana ya bolingo ya Mobikisi mpe boyokani oyo nayokaki epayi ya Nkolo na liyangani wana ya elambo na bolenge na ngai. Na yango na batelaki motindo mosusu ya pete: nalukaki makomi.

Kati na buku ya Luka, natangaki etali mokolo ya misato nsima ya Bobakami na Ye na ekulusu mpe bokundami, ntango basali ya bondimi bayaki, na bolingo mpo na Mobikisi, mpo na kopakola nzoto na Ye mafuta. Ntango bakomaki, bakutaki libanga ya kolongwa uta na lilita mpe bamonaki ete nzoto na Ye ezalaki wana te.

Anzelu azalaki libanda ya lilita ya Klisto.

Banzelu mibale batelemaki mpembeni mpe batunaki mpo na nini bazalaki kobanga:

“Mpo na nini bozali koluka moto na bomoi kati na bakufi?

“Azali awa te kasi asekwi. Kanisa lokola elobaki ye na bino wana ezalaki ye naino na Galilai,

“Ete esengeli Mwana na moto apesama na maboko na bato na masumu mpe abakasama na ekulusu mpe na mokolo ya misato akosekwa.”

Klisto mpe bayekoli na nzela ya Emmaus.

Na mpokwa wana, bayekoli mibale bazalaki kowuta Yelusaleme na nzela ya Emmaus, mpe Nkolo oyo asekwi abimelaki bango mpe atambolaki elongo na bango.

Buku ya Luka epesi biso nzela ya kotambo elongo na bango na mpokwa wana:

“Ejalaki bango kosolana mpe kotunana, Yesu ye mpenja abilemaki bango mpe atambolaki na bango njela moko.

“Nde miso na bango mapekisamaki ete bayeba ye.

“Alobaki na bango ete, Oyo makambo nini majali bino kosolana awa na mobembo, mpe mpo na nini bozali na mawa?

“Bongo moko na bango, nkombo na ye Keleopa, alobaki na ye ete, Bobele yo moko ojali mopaya na Yelusaleme, oyo ayebi makambo mabimi wana na mikolo oyo te?”

Balobaki na Ye na ntina ya mawa na bango ete Yesu akufaki ntango balikiaka ete Ye alingaki kozala Mosikoli ya Yisalaele.

Esengelaki kozala na boboto na mongogo ya Nkolo mosekwi wana ezalaki Ye koloba na bayekoli mibale ya mawa mpe matanga.

Ndenge nakobaki kotanga, maloba elandi eyaki oyo etondisaki motema na ngai na esengo, kaka ndenge nayokaki ntango nazalaki mwana moke:

“Mpe babelemaki na mboka kuna ejalaki bango kokenda, mpe ye asalaki lokola alingaki koleka na ye.

“Nde bandimisaki ye makasi ete, Tikala awa na biso mpo ete moi etiki mpe butu elingi kokufa. Akotaki na ndako mpo na kotikala na bango elongo.”

Klisto afandi elongo na bayekoli.

Mobikisi andimaki butu wana libiangi ya kokota na ndako ya bayekoli na Ye. Afandaki na mesa elongo na bango. Azwaki limpa, apambolaki yango, akataki, mpe apesaki yango epai na bango. Miso na bango efungwamaki, mpe bayebaki Ye. Nsima Alimwaki na miso na bango.

Luka akomaki mpo na biso mayoki ya bayekoli oyo bapambolama: “Balobanaki ete, Wana ejalaki ye kosolola na biso na njela mpe kofungola makomi mpo na biso, mitema na biso mijalaki na moto kati na biso te?”

Bayekoli mibale nsima bakendaki mbangu na Yelusaleme mpo na koyebisa Bantoma moko na zomi makambo oyo ekomaki. Ntango bazalaki kokabola likambo oyo ekomelaki bango, Mobikisi abimaki lisusu.

Atelemaki kati na bango mpe “alobaki epayi na bango, Kimia ezala na bino.” Nsima, Ye azongelaki masakoli ya etinda na Ye ya komikaba mpo na masumu ya bana banso ya Tata na Ye mpe mpo na kobuka basinga ya liwa.

“Mpe alobaki na bango ete, Esili kokomama boye ete Klisto akojua mpasi, mpe akosekwa na bakufi na mokolo na misato:

“Mpe ete kobongolama na motema na kolimbisama na masumu, ekosalema na nkombo na ye na mabota yonso, kobanda Yelusaleme.

“Bino bojali batatoli na makambo oyo.”

Alma azali koteya na Mayi ya Mormon.

Kaka lokola bayekoli na Ye ya bolingo, mwana nyonso ya Tata na Lola oyo aponi kokota na nzela ya ekuke ya libatisi azali na nse ya boyokani ya kozala nzeneneke ya Mobikisi mpe mpo na kokengela baye bazali na bosenga na bomoi na biso ya kufa mobimba. Bomipesi oyo emonisamaki polele mpo na biso na nzela ya profeta monene ya Buku ya Mormon Alma bikeke mingi eleki na Mayi ya Mormon:

“Lokola bozali na mposa ya kokota kati na etonga ya Nzambe, mpe kobiangama bato na ye, mpe bozali kondima komema mikumba ya moko na mosusu, ete mikoka kozala pepele;

“Iyo, mpe bozali kondima kolela elongo na baoyo bazali kolela; iyo, mpe kobondisa baoyo batelemi na mposa ya libondisi, mpe kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe na bantango nyonso mpe na makambo nyonso, mpe na bisika nyonso … , kutu kino liwa, ete bokoka kosikolama na Nzambe, … ete bokoka kozwa bomoi ya seko.”

Ntango bozali sembo na bilaka oyo, bokomona ete Nkolo abombaka elaka na Ye ya kozala moko elongo na bino na misala na bino, kokomisaka mikumba na bino pepele. Bokoya koyeba Mobikisi, mpe na ntango bokokoma lokola Ye mpe “bokobonga nie kati na ye.” Na kosalisaka basusu mpo na Mobikisi, bokomona ete bozali kopusana penepene na Ye.

Mingi kati na bino bazali na balingami na bango oyo bazali kowayawaya mosika na nzela ya bomoi ya seko. Bozali komitunanini lisusu bokoki kosala mpo na kozongisa bango. Bokoki kotalela Nkolo mpo na kobelema mpembeni koleka na bango wana ezali bino kosalela Ye na bondimi.

Bokoki komikundola elaka ya Nkolo epai ya Joseph Smith mpe Sidney Rigdon ntango bazalaki mosika ya mabota na bango likolo ya bitinda na Ye: “Baninga na ngai Sidney mpe Joseph, mabota na bino mazali malamu; mazali na maboko na ngai, mpe nakosala na mango lokola ekomona ngai malamu; mpo kati na ngai ezali na nguya nyonso.”

Ntango bozali kokangisa bampota ya baye bazali na bosenga, nguya ya Nkolo ekosunga bino. Maboko na Ye ekosembolama elongo na oyo ya bino mpo na kosalisa mpe kopambola bana ya Tata na biso na Lola.

Mosali ya boyokani nyonso ya Yesu Klisto akozwa litambwisi na Ye uta na Molimo ntango bazali kopambola mpe kosalela basusu mpo na Ye. Nsima bakoyoka bolingo ya Mobikisi mpe bakozwa esengo na kozalaka penepene na Ye.

Nazali nzeneneke ya Bosekwi ya Nkolo solo mpenza lokola soki nazalaki wana elongo na bayekoli mibale na ndako na nzela ya Emmaus. Nayebi ete Ye azali na bomoi.

Oyo ezali Eklezia na Ye ya solo—Eklezia ya Yesu Klisto. Tokotelema, na Mokolo ya Bosambisi liboso ya Mobikisi, miso na miso. Ekozala ntango ya esengo monene mpo na baye oyo, kati na bomoi oyo, baye bapusani penepene na Ye na mosala na Ye mpe bakoki na mposa makasi kokanisa koyoka liboso maloba na Ye: “Malamu, ozali mosali malamu mpe ya sembo.”

Natatoli lokola nzeneneke ya Mobikisi mosekwi mpe Mosikoli na biso, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.