2025
Lucy Azwi Bosolo
Sanza ya minei 2025


“Lucy Azwi Bosolo,” Moninga, Sanza ya minei 2025, 26–28.

Etinda ya Sanza Moninga, Sanza ya minei 2025

Lucy Azwi Bosolo

Elenge mwasi azali kofongola ekuke mpo na kokotisa etuluku moko ya mibali ntango mwasi moko afandi na masini ya bilamba

Mokolo moko, Lucy Morley ya mibu 15 azalaki kosalisa mopene na ye, Abigail Daniels, na kotonga bilamba. Ntango bazalaki kosala yango, bamisionele misato babetaki na ekuke. Balobaki ete Yesu Klisto atindaki bango mpo na kokabola nsango moko.

Mwasi oyo azalaki na masini ya bilamba akangi elongi ntango mibali yango bazali kosolola na mwana moke ya mwasi

Mibali yangobayebisaki Abigail mpe Lucy ete Yesu abengaki Joseph Smith mpo na azala profeta. Balobelaki bango lisusu etali Buku ya Mormon.

Mwasi ya nkanda azali kobengana mibali libanda ya ndako na ye

Na likambo ya kokamwa mpo na Lucy, Abigail akomaki na nkanda. Asalaki ete bamisionele bakende.

Mibali bazali kotala nsima ntango mwana mwasi azali kolanda mbangu nsima na bango

Lucy ayebaki ete bamisionele bazalaki basali ya Nzambe. Ayebisaki bango bakende kotala libota na ye na nzela na nse.

Mibali na mesa ya kolya elongo na mwana mwasi mpe libota na ye

Bamisionele bakendaki na ndako ya Morley. Baboti ya Lucy babengisaki bamisionele mpo bateya bango mpe baninga na bango.

Mwana mwasi mpe kotya elamba na mapeka ya mwasi ntango moto mosusu azali kozwa libatisi na ebale moko na nsima

Na butu wana, bato 17 bazwaki libatisi. Na mikolo moke elandaki, bato koleka 50 bayokaki bamisionele mpe bazwaki libatisi. Ata mozalani ya Lucy, Abigail abongolaki makanisi na ye. Ye mpe mobali na ye, elongo na Lucy mpe bato ya libota na ye, baponaki kolanda Yesu Klisto na kozwaka libatisi.

Kopakola Langi na Lokasa

Mpo na Yesu Klisto, Nakosekwa

liyemi ya lilita ya mpamba

Elilingi na Corey Egbert

Lolenge nini bozali komikundola Yesu na Pasika?