“Lucy Azwi Bosolo,” Moninga, Sanza ya minei 2025, 26–28.
Etinda ya Sanza Moninga, Sanza ya minei 2025
Lucy Azwi Bosolo
Mokolo moko, Lucy Morley ya mibu 15 azalaki kosalisa mopene na ye, Abigail Daniels, na kotonga bilamba. Ntango bazalaki kosala yango, bamisionele misato babetaki na ekuke. Balobaki ete Yesu Klisto atindaki bango mpo na kokabola nsango moko.
Mibali yangobayebisaki Abigail mpe Lucy ete Yesu abengaki Joseph Smith mpo na azala profeta. Balobelaki bango lisusu etali Buku ya Mormon.
Na likambo ya kokamwa mpo na Lucy, Abigail akomaki na nkanda. Asalaki ete bamisionele bakende.
Lucy ayebaki ete bamisionele bazalaki basali ya Nzambe. Ayebisaki bango bakende kotala libota na ye na nzela na nse.
Bamisionele bakendaki na ndako ya Morley. Baboti ya Lucy babengisaki bamisionele mpo bateya bango mpe baninga na bango.
Na butu wana, bato 17 bazwaki libatisi. Na mikolo moke elandaki, bato koleka 50 bayokaki bamisionele mpe bazwaki libatisi. Ata mozalani ya Lucy, Abigail abongolaki makanisi na ye. Ye mpe mobali na ye, elongo na Lucy mpe bato ya libota na ye, baponaki kolanda Yesu Klisto na kozwaka libatisi.
Kopakola Langi na Lokasa
Mpo na Yesu Klisto, Nakosekwa
Elilingi na Corey Egbert
Lolenge nini bozali komikundola Yesu na Pasika?
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, April 2025. Lingala. 19631 639