Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya minei 2026
Nsima ya mabunga na yo−ata oyo ya minene
Tokoki koyekola ebele epai ya Petelo na oyo etali Mobikisi, Bomikabi na Ye, mpe komeka lisusu.
Bowangani ya Petelo, na Carl Bloch
Mingi kati na biso tosali ata makanisi moko oyo tolingaki tobosanakaka polele. Ezala ezalaki ntango moko ya nsoni ya peto, likama ya nzoto ya mpasi, tokoswana ntango olobaki maloba oyo olingaki kozongisa, ezali na bantango mingi na bomoi oyo bouton ’’kosala lisusu’’ to ata ’’kolongola’’ eyokani na kobenda mpenza.
Lisakoli ya bololo ekokisami
Apostolo Petelo azalaki moto ya kobenda likebi na Boyokani ya sika. Azalaki na kondima mpe mpiko ya kotambola likolo ya mayi epai ya Yesu, kasi kaka mwa ntango moke nsima atikaki bobangi na ye elonga ye mpe abandaki kozinda, kongangaka epai ya Nkolo mpo na lisalisi (talaMatai 14:28–31). Ntango toyebi te bozindo nyonso ya bomoi ya Petelo, Toyebi ngonga moko ntango alelaki makasi.
Kaka ba ngonga liboso Yesu Klisto akangamaki, Asakolaki ete Petelo akowangana Ye mbala misatu liboso nsoso eganga mbala mibale. Petelo aboyi kondima lisakoli ya bongo mpe “alobaki na makasi mingi koleka, soki nako kufa elongo na yo, nakowangana yo ata moko te ” (Malako 14:31).
Ya solo, esakweli ya Mobikisi ekomaki solo. Na nsomo mpe bobangi oyo ezingamaki na bokangami ya Mobikisi, mpiko ya petelo elongaki ye te. Nsima ya kowangana ete ayebaki Mobikisi te mbala mibale, mpe kofinama mbala ya misato, Petelo “abandaki kolakela mabe mpe kolapa ndai, kolobaka ete, nayebi te moto oyo bozali koloba mpo na ye” (Malako 14:71).
Ntango nsoso egangaki mbala mibale mpe Petelo amikundolaki esakweli ya Mobikisi, “ye … alelaki makasi mingi ” (Matai 26:75).
Kasi wana ezali nsuka ya lisolo te!
Bokutani ebalukaki, libela
Na nyonso tokoki koyekola na makomi ete, bobangi ya Petelo elongaki lisusu te litatoli na ye ya Yesu Klisto. Atatolaki na mpiko ya Mobikisi na libaku nyonso, ata soki likama ya moto ye moko na kosalaka bongo. Kobosana te, Petelo azalaki koteya bato oyo bautaki kobaka Yesu Klisto na ekulusu! Likama ezalaki ya solo.
Ntango Petelo abikisaki moto moko ya motengu banda kobotama, apesaki ye mitindo, “na nkombo na Yesu Klisto ya Nazarete telema mpe tambola” (Misala ya ba ntoma 3:6), bakangaki ye elongo na Yoane mpe atunaki ye ndenge nini abandaki kosala bikamwisi yango.
Petelo ayanolaki na mpiko nyonso ete, ’’eyebana na bino nyonso, mpe na bato nyonso ya Yisalaele, ete na kombo ya Yesu Klisto ya Nazarete, oyo bobakaki na ekulusu, oyo Nzambe asekwisaki uta na bakufi, na nzela na ye moto oyo atelemi awa liboso na bino.
Oyo ezali libanga oyo etiamaki mpamba na bino batongi, oyo ekomi moto ya songe. Mpe lobiko ezali te na moto mosusu: mpo ezali na nkombo mosusu te na nse ya lola epesami kati na bato, oyo na yango tosengeli kobikisama” (Misala ya ba ntoma 4:10–12).
Oyo nde eyano ya mpiko! Mpe bilembeteli ya polele oyo emonisi ete andimisamaki.
Basali ya kozanga kokoka, oyo bakoki mpenza kosala
Moko na moko kati na biso azali ko kende kosala masumu na bomoi oyo. Atako molende na biso mpenza, tokokweya te na bilikya mpe mikano na biso ntango na ntango. Lokola mokambi Jeffrey R. Holland (1940–2025), mokambi ya lisanga likoki ya bapostolo zomi na mibale, ateyaki mbala moko, ’’longola na likambo ya mwana na Ye Mobotami ya kokoka se moko, bato ya kokoa te bazali banso Nzambe asengelaki kosala elongo na bango .”
Motuya na yo ya molimo elimbolami te to ekangami te na mabunga na yo —ata oyo ya minene! Mpo ete ayambolaki mpe Klisto alimbisaki ye, kowangana ya Petelo ya Klisto epekisaki ye te na nsima atatola, koteya, mpe abongwana na nguya monene. Makomi etondi na bandakisa ya bayekoli mosusu oyo basalaki masumu, bayamboli, mpe bakobaki na bondimi na Klisto.
Satana akoluka ntango nyonso kondimisa yo ete mabunga na yo ezali kobakisama mpe ete okokoka kolonga yango soko moko te. Kolanda lokuta na ye te!
Ndeko mwasi Tamara W. Runia, Mopesi toli ya yambo na lisanga ya bilenge basi ya bokambi monene, ateyaki: ’’Esengeli na bino boyoka likambo oyo, yango nakoloba likambo oyo na mongongo makasi: ozali mongongo na mutu na’yo te to mabunga osala. Okoki mpe koloba yango na mongongo makasi. Yebisa Satana, ‘lelo te.’ Tia ye sima na yo.
“Yoka kobenda wana, mawa ya bonzambe oyo ebalusaka yo epai ya Mobikisi na yo, mpe tala ngolu na Ye ekota na bomoi na yo mpe na bomoi ya bato oyo olingaka. NaIaki ete miniti oyo tozali komema motema oyo ebukana na mpiko nyonso epai na Ye, Azali mbala moko wana”
Christus Consolator, na Carl Bloch
Mikolo na yo ya kongenga ezali liboso
Eleko oyo ya Pasika, ntango bozali komanyola mingi Bomikabi ya Mobikisi, bomikundola ete likoki ya koyambola mpe komeka lisusu ezali moko ya makabo minene bokoki kozwa. Mpo na Yesu Klisto, mabunga na yo ya mabe ekoki kolimbisama mpe kobwakama lokola minyololo ya kilo.
“Mobikisi azali libela kongenga koleka molili ya nsoni,” Ndeko mwasi Runia ateyaki.
Na ntina ya Yesu Klisto, elikia ekoki kongenga makasi liboso ntango otikali kotia makanisi epai na ye.
© 2025 na Intellectual Reserve, Inc. Makoki nyonso mabombami. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly For the Strength of Youth Message, April 2026. Lingala. 19624 639